Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/10 nk. 6-9
  • Elimo santu—Nguya oyo osengeli na yango

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elimo santu—Nguya oyo osengeli na yango
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino”
  • Bazali komata likoló “na mapapu lokola bampongo”
  • Litambwisi ya elimo ya Nzambe na ekeke ya liboso mpe na mikolo na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Elimo santu ezali likabo na Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • ‘Na nkombo na elimo santu’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Elimo santu ezali nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/10 nk. 6-9

Elimo santu​—Nguya oyo osengeli na yango

“KOBWAKA ngai mosika na elongi na yo te; mpe elimo santu na yo, Ee kolongola ngai yango te.” (Nzembo 51:11) Wana ezali libondeli ya Mokonzi Davidi ntango asalaki lisumu monene.

Na boumeli ya bambula mingi, Davidi amonaki nguya ya elimo santu. Ntango azalaki naino elenge, esalisaki ye alonga Goliate, soda moko ya nsɔmɔ. (1 Samwele 17:45-50) Esalisaki ye mpe akoma banzembo ya kitoko koleka. Davidi alobaki boye: “Elimo ya Yehova nde elobaki na nzela na ngai, mpe liloba na ye ezalaki na lolemo na ngai.”​—2 Samwele 23:2.

Yesu Kristo mpe amonisaki ete elimo santu esalaki mosala na bomoi ya Davidi. Mokolo moko, Yesu ayebisaki bato oyo bazalaki koyoka ye boye: “Na nzela ya elimo santu, Davidi ye moko alobaki ete: ‘Yehova alobaki na Nkolo na ngai ete: “Fandá na lobɔkɔ na ngai ya mobali tii nakotya banguna na yo na nse ya makolo na yo.”’” (Marko 12:36; Nzembo 110:1) Yesu ayebaki ete Davidi akomaki banzembo na ye na lisalisi ya elimo santu. Elimo santu yango ekoki mpe kosalisa biso lelo?

“Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino”

Ntango mosusu yo okokoma nzembo te. Kasi, okoki kokutana na mikakatano minene oyo ezali lokola Goliate. Tózwa ndakisa ya Isabel.a Mobali na ye asundolaki ye mpe azwaki mwasi mosusu ya elenge. Atikaki Isabel, ná ebele ya banyongo mpe apesaki ye ata mbongo te mpo na kobikela ná bana na bango mibale ya basi. Isabel alobi boye: “Namonaki ete atɛki ngai mpe amoni ngai eloko mpamba. Atako bongo, bandá asundolá ngai namonaka ete elimo santu ya Nzambe esungaka ngai.”

Isabel akanisaki ete akozwa elimo santu kozanga kosala milende? Te, azalaki kobondela Nzambe mikolo nyonso mpo apesa ye elimo santu. Ayebaki ete nguya ya Nzambe nde ekopesa ye mpiko ya kobɔkɔla bana na ye malamu, mpe ekosalisa ye amimona mpamba te. Akanisaki maloba ya Yesu: “Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino; bókoba koluka, mpe bokomona; bókoba kobɛta kɔkɔkɔ, mpe bakofungolela bino.”​—Matai 7:7.

Roberto mpe amonaki ete azali na mposa ya elimo ya Nzambe, kasi mpo na ntina mosusu. Amipesaki mingi na komɛla makaya mpe hashish. Amekaki bambula mibale mobimba kotika momeseno yango, kasi azalaki kolonga te. Ye moko alobi boye: “Ntango otiki komɛla bangi okoyoka lokola eloko moko ezali kozanga yo, nzoto ezali kosɛnga yo bangi mokolo na mokolo.”

Roberto abakisi boye: “Kasi, nazwaki ekateli ya kobongola bomoi na ngai mpo nasalela Nzambe na ndenge oyo alingaka. Nazalaki kotondisa motó na ngai na makanisi ya Biblia. Nazalaki kobondela mikolo nyonso, kosɛnga Nzambe apesa ngai makasi ya kopɛtola bomoi na ngai. Nayebaki ete na makasi na ngai moko, nakolonga te. Mpe namonaki ndenge oyo Yehova ayanolaki na mabondeli na ngai, mingimingi ntango nazalaki kolɛmba nzoto soki nazongeli lisusu komɛla makaya. Nandimi mpenza ete elimo santu ya Nzambe ezalaki kopesa ngai makasi; soki bongo te nalingaki kolonga te kotika momeseno yango.”​—Bafilipi 4:6-8.

Bazali komata likoló “na mapapu lokola bampongo”

Lokola Isabel ná Roberto, bamilio ya Batatoli ya Yehova bamonaka nguya ya elimo santu na bomoi na bango. Soki olingi, yo mpe okoki kozwa nguya oyo Yehova asalaka na yango mosala​—nguya oyo azalisaki na yango molɔ́ngɔ́ mobimba. Nzambe alingaka mpe azalaka na mposa ya kopesa bato nguya yango soki basɛngi ye yango na etingya. Kasi, mpo na kozwa elimo yango, osengeli koyeba ye mpe koluka kosala mokano na ye.​—Yisaya 55:6; Baebre 11:6.

Elimo santu ekoki kopesa yo nguya ya kosalela Nzambe mpe koyika mpiko ata na mikakatano ya ndenge nini oyo okoki kokutana na yango. Ezali yango nde Biblia elaki biso: “[Yehova] apesaka nguya na moto oyo alɛmbi; mpe moto oyo azangi makasi, atondisaka ye na nguya. . . . Baoyo bazali kotyela Yehova elikya bakozwa nguya ya sika. Bakomata likoló na mapapu lokola bampongo. Bakopota mbangu mpe bakosila makasi te; bakotambola mpe bakolɛmba te.”​—Yisaya 40:28-31.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bankombo mosusu ezali ya bango te.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 8]

‘Nazalaki kobondela mikolo nyonso, kosɛnga Nzambe apesa ngai makasi. Nayebaki ete na makasi na ngai moko, nakolonga te. Mpe namonaki ndenge ayanolaki na mabondeli na ngai’

[Etanda/​Bililingi na lokasa 7]

MAKAMBO OYO ELIMO SANTU ESALAKI

Nzambe asalelaki elimo santu mpo na kozalisa mabele mpe molɔ́ngɔ́ mobimba. Mokomi ya nzembo alobaki boye: “Ee Yehova, misala na yo ezali mpenza ebele! Osalá yango nyonso na bwanya. Mabele etondi na biloko oyo obimisaki. Soki otindi elimo na yo, bazalisami.”​—Nzembo 104:24, 30; Ebandeli 1:2; Yobo 33:4.

Elimo santu esalisaki basaleli ya Nzambe bákoma Biblia. Ntoma Paulo akomaki boye: “Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe ezali na litomba.” (2 Timote 3:16) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “ekomami na litambwisi ya elimo” elimboli “epemami na Nzambe.” Mpema ya Yehova, to elimo na ye ekambaki bakomi ya Biblia, yango wana, oyo bakomaki ezalaki “liloba ya Nzambe.”​—1 Batesaloniki 2:13.

Elimo santu epesaki basaleli ya Nzambe nguya ya kosakola makambo ekoya na bosikisiki. Ntoma Petro alobaki boye: “Esakweli moko te ya Likomami euti na ndimbola moko boye ya moto. Mpo esakweli eyá ata mbala moko te na mokano ya moto, kasi bato balobaki makambo oyo euti na Nzambe ndenge elimo santu ezalaki kotinda bango.”​—2 Petro 1:20, 21; Yoele 2:28.

Elimo santu esalisaki Yesu mpe bato mosusu ya kondima básakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe mpe básala makamwisi. Yesu alobaki boye: “Elimo ya Yehova ezali na ngai, mpo atye ngai mafuta mpo nasakwela babola nsango malamu, atindi ngai mpo nasakwela baoyo bakangami kosikolama mpe nafungola miso ya bato oyo bakufá miso.”​—Luka 4:18; Matai 12:28.

[Etanda/Bililingi na lokasa 9]

NDENGE OYO ELIMO SANTU EKOKI KOSALISA BISO

Elimo santu ekoki kopesa yo makasi ya kolonga komekama mpe kotika bizaleli ya mabe. Ntoma Paulo alobaki boye: “Nzambe azali sembo, mpe akotika te ete bómekama koleka oyo bokoki kokangela motema, kasi nzela moko na komekama akobongisela mpe bino nzela ya kobima mpo bózala na likoki ya koyikela yango mpiko.”​—1 Bakorinti 10:13.

Elimo santu ekoki kosalisa yo okolisa bizaleli oyo esepelisaka Nzambe. “Mbuma ya elimo ezali bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, bolamu, kondima, motema pɛtɛɛ, komipekisa.”​—Bagalatia 5:22, 23.

Elimo santu ekoki kopesa yo makasi ya koyika mpiko na komekama. “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.”​—Bafilipi 4:13.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto