Tóluka koyeba solo na ntina na likoló
LIKANISI ya kokende na likoló ekoki mpenza kosepelisa! Bamizilma, Bahindu, bato ya Lingomba ya Bouddha, ya Lingomba ya bokristo, ata mpe bato oyo bakipaka makambo ya Nzambe te bazalaka na makanisi ndenge na ndenge oyo emonisaka ete bazalaka na elikya ete moto akobaka kozala na bomoi nsima ya liwa. Mbala mingi, bato bakanisaka ete likoló ezali esika moko kitoko mpe ya bisengo, epai moto akoki kofanda kozanga mitungisi mpe kokutana lisusu na “bato oyo azalaki kolinga oyo bakufá.” Nzokande, makambo oyo bato mingi basalaka emonisaka bosolo ya lisese oyo ya kala ete, moto nyonso alingaka kokende na likoló, kasi moto moko te alingaka kokufa mpo na kokende kuna. Mpo na nini ezali bongo?
Soki Nzambe akelaki biso mpo tókufaka mpe tókende na likoló, bato mingi balingaki te kozala na mposa ya kokende kuna ndenge kaka mwana moke azalaka na mposa akola to elenge azalaka na mposa abala? Kasi, bato mingi balingaka kokufa te.
Atako bongo, bateyi mingi balobaka ete nsima ya ntango mokuse oyo tolekisaka awa na mabele, likoló ezali esika oyo ebongisamá mpo biso tókende kofanda. Na ndakisa, kardinale Theodore McCarrick, oyo azalaká episkɔpɔ-mokonzi ya Washington, alobaki boye: “Tokelamaki te mpo tózala na bomoi oyo tozali na yango. Tokelamá mpo tózala na bomoi na likoló.” Ndenge moko mpe, Ted Haggard, oyo azalaká mokambi ya Association américaine des mouvements évangéliques, alobaki boye: “Ntina ya bomoi ezali ya kokumisa Nzambe mpe ya kokende na likoló . . . mpamba te likoló ezali esika na biso.”
Bato oyo bandimaka ete moto akobaka kozala na bomoi na likoló, mbala mingi elikya na bango esimbamaka na makambo mikemike. George Barna, mokambi ya kompanyi oyo elukaka koyeba makanisi ya mangomba, amonaki ete “makanisi oyo bato bazalaka na yango mpo na bomoi oyo tozali na yango mpe bomoi nsima ya liwa, eutaka na bisika ndenge na ndenge na ndakisa, bafilme, miziki mpe masapo ya lokuta.” Pastɛrɛ moko ya Lingomba ya Épiscopalien na Florida, alobaki ete: “Toyebi eloko moko te na ntina na likoló, toyebi kaka ete ezali esika oyo Nzambe afandaka.”
Nzokande, likoló ezali lisolo moko ya ntina oyo Biblia elobeli. Na kotalela Liloba ya Nzambe, likoló ezali ndenge nini? Moto akelamaki mpo afanda na likoló? Soki bato bakendaka na likoló, bakendaka kosala nini kuna?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 3]
Mpo na nini bato mingi balingaka kokende na likoló, nzokande bato moke kaka nde balingaka kokufa mpo bákende kuna?