Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 1/2 nk. 4-5
  • Likoló ezali ndenge nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Likoló ezali ndenge nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Esika oyo mosala esalemaka na esengo
  • Bato bakelamaki mpo bákende na likoló?
  • Likoló
    Lamuká!—2016
  • Likoló ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Tóluka koyeba solo na ntina na likoló
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Bolamu ya seko tokozwa yango na likoló to awa na mabele?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 1/2 nk. 4-5

Likoló ezali ndenge nini?

BATO mosusu bakanisaka ete moto moko te ayebi ndenge likoló ezalaka mpo moto moko te autá kuna mpo na koyebisa biso ndenge ezali. Ntango mosusu, babosanaka maloba oyo ya Yesu: “Nakitaki uta na likoló.” (Yoane 6:38) Epai ya bakonzi mosusu ya lingomba, alobaki mpe ete: “Bino bozali bato ya nse; ngai nazali moto ya likoló.” (Yoane 8:23) Yesu alobaki nini na ntina na likoló?

Yesu amonisaki ete likoló ezali esika oyo Yehova afandaka. Abengaki Nzambe “Tata na ngai oyo azali na likoló.” (Matai 12:50) Kasi, Yesu asalelaki liloba “likoló” na bandimbola mingi. Na ndakisa, abengaki etando oyo ezingi mabele, “likoló” ntango alobaki ete: “Bótala malamumalamu bandɛkɛ ya likoló.” (Matai 6:26) Nzokande, Yehova afandaka mosika mpenza ya etando oyo ezingi mabele. Biblia elobi ete: “Ezali na Moto oyo afandi likoló ya zolongano ya mabele.”​—Yisaya 40:22.

Yango elingi nde koloba ete ‘Tata oyo azali na likoló’ afandaka na kati ya minzoto? Molɔ́ngɔ́ oyo tomonaka ebengami mpe “likoló,” na kati ya Makomami Mosantu. Na ndakisa, mokomi moko ya nzembo akomaki boye: “Ntango nazali komona likoló oyo osalá, misala ya misapi na yo, sanza ná minzoto oyo obongisá, moto​—mowei mpamba—​azali nani mpo okanisa ye?”​—Nzembo 8:3, 4.

Te, Yehova Nzambe akoki te kofanda na kati ya molɔ́ngɔ́ oyo akelá ndenge kaka mosali mabaya akoki te kofanda na kati ya armware oyo asali. Yango wana, ntango Mokonzi Salomo asalaki molulu ya kofungola tempelo ya Yerusaleme mpo na kopesa yango Yehova, alobaki boye: “Nzambe akofanda mpenza na mabele? Talá! Likoló, ɛɛ, mosika kuna na likoló mpenza, ezali kokoka yo te; bongo ekozala boni mpo na ndako oyo natongi!” (1 Bakonzi 8:27) Soki Yehova afandaka te na likoló oyo tomonaka, afandaka na likoló oyo wapi?

Atako bato bayekoli likoló oyo emonanaka na nzela ya ba-télescope ya makasi mpe bamosusu basali mibembo na mapata, likambo oyo Biblia elobi ezali kaka solo: “Moto ata moko te amoná Nzambe.” (Yoane 1:18) Yesu amonisaki ntina yango ntango alobaki ete: “Nzambe azali Elimo.”​—Yoane 4:24.

Bomoi ya elimo ezali lolenge moko ya bomoi oyo eleki mosika bomoi ya bato. Nzoto ya elimo ezali te na mosuni mpe makila oyo moto akoki komona mpe kosimba. Na yango, ntango Yesu alobaki ete azalaki kofanda elongo na Tata na ye na “likoló,” alingaki koloba ete azalaki na bomoi oyo elekaki na nkembo, bomoi ya ekelamu nyonso mosusu oyo ekoki komonana. (Yoane 17:5; Bafilipi 3:20, 21) Esika ya elimo epai Yesu azalaki kofanda na Tata na ye ezali oyo Biblia ebengi “likoló.” Ezalaka ndenge nini? Nini esalemaka kuna?

Esika oyo mosala esalemaka na esengo

Biblia elobeli likoló lokola esika ya mosala mingi. Elobeli bamilio na bamilio ya bikelamu ya elimo ya sembo oyo bafandaka kuna. (Danyele 7:9, 10) Ekelamu yango mokomoko ezalaka na bomoto na yango. Ndenge nini toyebi yango? Na biloko nyonso oyo Nzambe akelá, oyo tomonaka, ezali te na biloko mibale oyo ezali mpenza ndenge moko; na yango, tokoki kondima mpenza ete na likoló, bikelamu oyo bazali kuna bazali nyonso ndenge moko te. Likambo ya kokamwa, bikelamu yango nyonso ya likoló basalaka na bomoko, bakeseni mpenza na bato awa na mabele oyo basalaka mpenza na bomoko te.

Yoká ndenge Biblia elobeli misala na likoló. “Bópambola Yehova, Ee bino baanzelu na ye, oyo bozali na makasi na kati ya nguya, oyo bozali kosalela liloba na ye, oyo bozali koyoka mongongo ya liloba na ye. Bópambola Yehova, bino mampinga na ye nyonso, bino basaleli na ye, oyo bozali kosala mokano na ye.” (Nzembo 103:20, 21) Na yango, mosala mingi esalemaka na likoló. Tokoki mpenza kondima ete mosala yango esepelisaka.

Banda kala, baanzelu basalelaka Nzambe mosala na esengo, ata liboso kutu mabele ekelama. Makomami emonisi ete, ntango Yehova akelaki mabele, bana ya Nzambe ‘bagangaki elongo na esengo’ mpe “babandaki koganga na esengo.” (Yobo 38:4, 7) Kutu, moko ya bana ya Nzambe na likoló azwaki libaku ya kosala elongo ná Nzambe mpo na kozalisa biloko mosusu nyonso. (Bakolose 1:15-17) Maloba kitoko wana oyo emonisi ndenge mosala esalemaka na esengo na likoló ekoki kobimisa mituna na makanisi na yo na oyo etali likoló mpe moto.

Bato bakelamaki mpo bákende na likoló?

Lokola baanzelu bazalaki kosalela Nzambe na likoló liboso mabele ekelama, emonani polele ete mobali mpe mwasi ya liboso bakelamaki te mpo bátondisa likoló. Kutu, Nzambe alobaki na bango boye: “Bóbota mpe bókóma mingi mpe bótondisa mabele.” (Ebandeli 1:28; Misala 17:26) Adama azalaki ekelamu ya liboso ya bomoi awa na mabele, oyo azalaki na likoki ya koyeba Nzambe mpe kosalela ye na bosembo. Asengelaki kobimisa bato ya lolenge nyonso oyo basengelaki kofanda awa na mabele. “Nde likoló, likoló ezali ya Yehova, Kasi mabele, apesá yango bana ya bato.”​—Nzembo 115:16.

Bato balingaka kokufa te, bakelamá te mpo bákufaka. Nzambe alobelaki liwa epai ya Adama kaka lokola etumbu oyo asengelaki kozwa soki azangi botosi. Soki Adama atosaki, alingaki kokufa soki moke te.​—Ebandeli 2:17; Baroma 5:12.

Yango wana, tokoki kokamwa te ndenge Nzambe alobelaki Adama te likambo ya kokende na likoló. Na yango, mabele ezalaki te esika oyo bato basengelaki komekama mpo na komona soki babongi kokende na likoló. Moto akelamaki mpo afanda seko na mabele, mpe mokano yango ya Nzambe ekokokisama. Biblia elaki ete “bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.” (Nzembo 37:29) Emonani polele ete na ebandeli Nzambe akanaki te ete bato bákende na likoló. Kasi, mpo na nini Yesu alakaki bantoma na ye bomoi na likoló? Yesu alingaki nde koloba ete bato nyonso ya malamu bakokende na likoló?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto