Pusaná penepene na Nzambe
“Amonaka ndenge motema ezali”
ELONGI ekoki kokosa. Ndenge oyo moto azali komonana libándá emonisaka mpenza te ndenge azali na kati, na motema na ye mpenza. Bato balingaka kosambisa moto kaka na ndenge azali komonana na miso. Likambo ya esengo ezali ete Yehova Nzambe atalaka kaka libándá te. Emonani polele na maloba oyo ezali na 1 Samwele 16:1-12.
Talá ndenge makambo elekaki. Yehova alingi kotya mokonzi ya sika mafuta mpo na ekólo ya Yisraele. Nzambe alobi na mosakoli Samwele ete: “Nakotinda yo epai ya Yese, moto ya Beteleme, mpamba te namizweli mokonzi kati na bana na ye ya mibali.” (Vɛrsɛ 1) Yehova atángi nkombo te kasi ayebisi ye kaka ete moto oyo ye aponi akozala moko ya bana mibali ya Yese. Ntango Samwele azali kokende na Beteleme, mbala mosusu azali komituna boye: ‘Ndenge nini nakoyeba mwana ya Yese oyo Yehova aponi?’
Ntango akómi na Beteleme, Samwele abongisi makambo mpo Yese ná bana na ye báya kolya mbeka oyo akopesa. Ntango Eliabe, mwana ya liboso, akɔti, nzoto na ye ebendi likebi ya Samwele na mbala moko. Samwele akanisi ete lokola Eliabe azali engambe, abongi kozala mokonzi mpe alobi na nse ya motema ete: “Ya solo, moto ya Yehova oyo atyami mafuta ye oyo liboso na ye.”—Vɛrsɛ 6.
Nzokande Yehova azali komona makambo ndenge mosusu. Alobi na Samwele ete: “Kotala elongi na ye te mpe bolai na ye te, mpo ngai naboyi ye.” (Vɛrsɛ 7) Molai to kitoko ya Eliabe ekamwisi Yehova te. Miso ya Yehova oyo emonaka makambo nyonso etalaka kaka libándá te, etalaka esika oyo kitoko ya solosolo ezalaka.
Yehova alobi na Samwele boye: “Mpo Nzambe amonaka ndenge moto amonaka te, mpamba te moto amonaka oyo emonanaka na miso; kasi Yehova, amonaka ndenge motema ezali.” (Vɛrsɛ 7) Ya solo, ezali motema—bomoto ya kati, esika makanisi, bizaleli mpe mayoki ya moto eutaka—nde ezali na ntina epai ya Yehova. “Moto oyo atalaka mitema malamumalamu” aboyi Eliabe; aboyi mpe bana mosusu motoba ya Yese oyo bayei liboso ya Samwele.—Masese 17:3.
Yese azali na mwana mosusu, Davidi, mwana ya nsuka, oyo “azali koleisa bampate.” (Vɛrsɛ 11) Na yango, atindi bábenga Davidi na esobe mpe ayei liboso ya Samwele. Na nsima, Yehova ayebisi Samwele ete: “Tɛlɛmá, tyá ye mafuta, mpo ye oyo!” (Vɛrsɛ 12) Ya solo, Davidi azali “elenge mobali na miso kitoko mpe na bonzenga.” Kasi, motema na ye nde ekómisi ye kitoko mingi na miso ya Nzambe.—1 Samwele 13:14.
Na mokili oyo bato bazali kotya likebi mingi na kitoko ya nzoto, tokoki kobɔndisama na koyeba ete ndenge moto azali komonana libándá esalaka Yehova Nzambe eloko te. Ozala molai ndenge nini to bato bámona yo kitoko ndenge nini, ezali na ntina te epai na ye. Ndenge ozali na kati, na motema na yo, nde ezali na ntina epai ya Yehova. Koyeba yango etindi yo te ondima kolona bizaleli oyo ekokómisa yo kitoko na miso ya Nzambe?