Mituna ya batángi . . .
Mabele ekokoba kobimisa biloko oyo esengeli mpo na kobatela bomoi?
▪ Mabele, planɛti na biso kitoko, ezali na makoki minene mpo na kobatela bomoi. Nzokande, ndenge motángo ya bato ezali se komata mpe ndenge bato bazali kobebisa makoki ya mabele, okoki komituna boye: ‘Likambo oyo toboyaka kokanisa ekoki nde kosalema? Biloko oyo esengeli ekozala kaka?’
Ntango tozali kokanisa motuna wana, elaka moko oyo Nzambe apesaki bato eleki sikoyo mbula 4 000 ekoki kokitisa biso motema: “Mpo mikolo nyonso oyo mabele ekoumela, ntango ya kolona mboto ná ntango ya kobuka mbuma, mpe malili ná molunge, mpe eleko ya molunge ná eleko ya mpiɔ, mpe moi ná butu, ekosuka soki moke te.” (Ebandeli 8:22) Na yango, kaka ndenge toyebi ete moi ekobima mokolo na mokolo, tokoki kozala na elikya ete mabele ekotika ata mokolo moko te kobimisa biloko oyo esengeli mpo na kobatela bomoi.
Na 2004, lapolo moko oyo ezalaki na motó ya likambo “Planɛti na biso ekoki koleisa biso?” Alex Kirby, mopanzi-nsango moko ya makambo etali mabele, alobaki boye: “Mabele ebimisaka mpenza biloko oyo esengeli mpo na koleisa moto nyonso. Kasi, mbala mingi, bilei yango ezalaka na esika oyo ebongi te, to ezalaka na ntalo mingi, to ekoki kobombama ntango molai te. Na yango, mpo moto nyonso azala na biloko ya kolya oyo esengeli, ezali likambo etali mingimingi politiki kasi siansi te.” Soki mabele ebatelami malamu mpe makoki na yango esalelami na mayele, ntina ya kobanga ete bilei ekozanga mokolo mosusu esengeli kozala te. Na ndakisa, na ntango ya Yisraele ya kala, Nzambe apesaki malako ya polele mpo báyeba ndenge ya kosalela mabele malamu. Ndenge Balevi 25:4 emonisi yango, Nzambe alobaki na Bayisraele boye: “Na mbula ya nsambo, ekozala sabata oyo mokili ekopema mpenza kopema . . . Osengeli kolona mboto te na elanga na yo.” Atako basengelaki te kosala bilanga na mbula nyonso ya nsambo, Nzambe alakaki ete akosala nyonso mpo bato bázala na biloko mingi ya malamu mpe bámitungisa te ete mbala mosusu bilei ekozanga.—Balevi 26:3-5.
Atako bato mosusu bakómi kosala mpenza milende lelo mpo na kobongisa mbeba oyo bato basalelá mabele mpe makoki na yango, bato mingi bazali kokanisa ete milende ya ndenge wana ezali moke mpe eyei na retare mingi. Emoniseli 11:18 elobeli lolenge kaka moko oyo mabele ekobonga mpo na libela. Na vɛrsɛ yango, Biblia elobi ete Yehova ‘akobebisa baoyo bazali kobebisa mabele.’ Yehova akosukisa kaka te mabe oyo bazali kosalela mabele mpe makoki na yango, kasi akosala mpe ete mabele ebotaka mingi mpo na bafandi na yango nyonso. Nzambe akosukisa lityo ya bato oyo bazali kotyola mokano na ye mpe kosalela mabele na lokoso mpo na matomba na bango moko. Epai mosusu, bato oyo bandimi kosimba boyangeli ya Yehova bakomona kokokisama ya maloba oyo ezali na Nzembo 72:16 ete: “Mbuma ekozala beboo na mabele; na nsɔngɛ ya bangomba biloko ekotondana.”
Na bolingo na ye oyo ezangi nsuka mpe na bwanya na ye, Yehova akanaki ete bato bakofanda mpe bakobatela esika na bango—mabele oyo ekokóma paradiso. (Ebandeli 1:28) Na nse ya boyangeli na ye, bato ya botosi bakoyekola ndenge ya kosalela makoki ya mabele na mayele, kozanga básilisa ebele ya biloko oyo ezali na mabele. Tozali mpenza na botɔndi mpo na Mopesi ya bolingo ya ndenge wana, oyo akokokisa mposa ya ekelamu nyonso oyo ezali na bomoi!—Nzembo 145:16.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 22]
“Mpo moto nyonso azala na biloko ya kolya oyo esengeli, ezali likambo etali mingimingi politiki kasi siansi te”