Mituna ya batángi . . .
Yesu azali Mikaele, anzelu-mokonzi?
▪ Kozanga kokakatana, tokoyanola Ɛɛ. Momeseno ya kobengama na bankombo ebele ezalaka na bamboka mingi. Ezali mpe bongo mpo na bankombo mingi na Biblia. Na ndakisa, Yakobo abengamaki mpe Yisraele. (Ebandeli 35:10) Na bisika mitano ekeseni, ntoma Petro abengami—Simeone, Simo, Petro, Kefa mpe Simo Petro. (Matai 10:2; 16:16; Yoane 1:42; Misala 15:7, 14) Mpo na nini tokoki kondima ete Mikaele ezali nkombo mosusu ya Yesu? Tótalela makambo oyo mikapo elandi emonisi.
Biblia elobeli mbala mitano, Mikaele, ekelamu ya elimo ya nguya. Mbala misato na mokanda ya Danyele. Na Danyele 10:13, 21, tozali kotánga ete Mikaele, oyo abengami “moko ya bankumu minene” mpe “nkumu ya bato ya ekólo” atindamaki mpo na kosunga anzelu moko. Lisusu, na Danyele 12:1, tozali kotánga ete na ntango ya nsuka, “Mikaele akotɛlɛma, ye nkumu monene oyo azali kotɛlɛma mpo na bolamu ya bato ya ekólo na yo.”
Esika mosusu batángi Mikaele ezali na Emoniseli 12:7, oyo elobi ete “Mikaele ná baanzelu na ye” bazali kobunda etumba moko monene oyo esukaki na kobwakama ya Satana ná baanzelu na ye ya mabe.
Simbá ete na mokapo mokomoko oyo touti kotánga, Mikaele amonisami lokola anzelu moko elombe ya bitumba oyo azali kobunda mpo na kobatela basaleli ya Nzambe, ata mpe kobunda na Satana, monguna monene ya Yehova.
Yuda vɛrsɛ 9 ebengi Mikaele “anzelu-mokonzi.” Liloba “anzelu-mokonzi” esalelami soki moke te na boike na Biblia. Vɛrsɛ kaka moko mosusu oyo esaleli liloba Mikaele ezali na 1 Batesaloniki 4:16, epai Paulo alobeli Yesu oyo asekwaki ete: “Nkolo ye moko akokita uta na likoló na mbela ya komanda, na mongongo ya anzelu-mokonzi mpe na kelelo ya Nzambe.” Na yango, Yesu Kristo abengami awa anzelu-mokonzi.
Na kotalela makambo oyo touti komona, tokoki koloba nini? Yesu Kristo azali Mikaele, anzelu-mokonzi. Nkombo Mikaele (elimboli “Nani akokani na Nzambe?”) mpe Yesu (elimboli “Yehova azali lobiko”)—bankombo yango ebendaka likebi mingi na mokumba oyo azali na yango ya kokɔtela boyangeli ya Nzambe. Bafilipi 2:9 elobi ete: “Nzambe atombolaki ye [Yesu oyo azwaki nkembo] likoló koleka mpe na boboto mpenza apesaki ye nkombo oyo eleki nkombo mosusu nyonso.”
Ezali na ntina kosimba ete kobotama ya Yesu lokola moto, ezalaki ebandeli ya bomoi na ye te. Liboso Yesu abotama, anzelu ayaki epai ya Maria mpe ayebisaki ye ete akozwa zemi na nguya ya elimo santu mpe asengeli kobenga mwana yango Yesu. (Luka 1:31) Na boumeli ya mosala na ye, Yesu azalaki kolobela mbala mingi bomoi oyo azalaki na yango liboso aya awa na mabele.—Yoane 3:13; 8:23, 58.
Na yango, liboso aya awa na mabele lokola moto, Yesu azalaki Mikaele, anzelu-mokonzi. Nsima ya kosekwa mpe kozonga na likoló, Yesu azongelaki mosala na ye ya Mikaele, anzelu-mokonzi, “mpo na nkembo ya Nzambe Tata.”—Bafilipi 2:11.