Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/3 nk. 2-3
  • Esakweli moko ya ntina mingi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Esakweli moko ya ntina mingi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Masolo mosusu
  • Tozali na “mikolo ya nsuka”?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Marko 1:15—“Bokonzi ya Nzambe ebelemi”
    Ndenge bavɛrsɛ ya biblia elimbolami
  • ‘Ekoki ete nsango malamu esakolama liboso’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Nsuka ya mokili ekómi pene?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/3 nk. 2-3

Esakweli moko ya ntina mingi

“Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.”​—MATAI 24:14.

BATO ya mayele na makambo ya Biblia bandimaka ete vɛrsɛ yango ezali na ntina mingi. Ezali na ntina mpo mosala oyo vɛrsɛ yango elobeli, esengeli kosalema na mokili mobimba. Mpe ezali na ntina mpo ezali kolobela oyo bakristo basengelaki kosala​—mosala ya kosakola oyo esengelaki kosalema liboso ete likambo moko ya ntina mingi oyo Yesu abengaki “nsuka” eya.

Vɛrsɛ wana ya esakweli ezali kokokisama lelo oyo. Etaleli yo mpamba te nsango malamu yango ezali na libyangi mpe likebisi. Ezali kosɛnga yo opona: Kondima Bokonzi ya Nzambe to koboya yango. Liponi oyo okosala, etaleli mpenza bomoi na yo.

Tótalela ndenge makambo elekaki. Mwa mikolo liboso bábaka Yesu na nzete, bayekoli na ye bayaki epai na ye mpe batunaki ye mpo na mikolo ezali koya. Bazalaki na mposa ya koyeba ntango nini Bokonzi ya Nzambe, oyo Yesu azalaki kolobela mbala mingi ekotyama. Balingaki mpe koyeba ntango “bosukisi ya makambo ya ntango oyo” ekozala, to ndenge mabongoli mosusu ebongolaka maloba yango, “suka ya mokili.”​—Matai 24:3, Bible na lingala ya lelo oyo.

Na eyano na ye, Yesu alobaki ete bitumba, nzala, maladi mabe mpe koningana makasi ya mabele ekozala na mokili mobimba. Alobaki mpe ete kobuka mibeko ekobakisama, bateyi ya lokuta ya mangomba bakokosa bato mingi, mpe bakristo ya solo bakoyinama mpe bakonyokwama. Makambo oyo nyonso ezalaki bansango ya mabe.​—Matai 24:4-13; Luka 21:11.

Kasi, ezalaki mpe na nsango ya malamu. Na nsima, Yesu alobaki maloba oyo totángi liboso, maloba oyo na boumeli ya basiɛklɛ bato balukaki koyeba ndimbola na yango mpe epesi bango elikya. Atako bato bandimaka ete maloba wana ya Yesu ezali na ntina, kasi baboyaka kondima ndimbola na yango. Nsango malamu yango ezali mpenza nini? Bokonzi ezali nini? Esakweli oyo ekokokisama ntango nini, mpe nani akokokisa yango? Mpe “nsuka” ezali nini? Tótala naino.

[Elilingi na nkasa 2, 3]

Bakopi ya maniskri ya Washington ya baevanzile minei. elobeli Matai 24:14.

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Euti na buku Facsimile of the Washington Manuscript of the Four Gospels in the Freer Collection 1912

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto