Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
“Nsango malamu oyo ya bokonzi . . .”—MATAI 24:14.
NA LISOLO na ye oyo eyebani mingi, oyo asalaki likoló ya ngomba, Yesu alakisaki libondeli ya ndakisa, oyo ezali na maloba oyo: “Bokonzi na yo eya.” Ebele ya bato bakangá libondeli yango na motó mpe bazongelaka yango mbala na mbala. Buku moko elobi ete ezali “libondeli ya libosoliboso oyo bakristo nyonso basalelaka ntango basambelaka.” Kasi, bato mingi oyo bazongelaka libondeli yango bayebaka mpenza te soki bokonzi ya Nzambe ezali nini to oyo yango ekosala ntango ekoya.—Matai 6:9,10.
Ezali likambo ya kokamwa te. Bakonzi ya mangomba bapesaka bandimbola ndenge na ndenge na likambo yango oyo esalaka ete bato báyeba te soki bokonzi ya Nzambe ezali nini. Moto moko akomaki ete Bokonzi ya Nzambe ezali “eloko oyo ekosalema na nguya ya Nzambe, . . . mpe ezali eloko oyo esalaka ete moto azala na boyokani na Nzambe . . . , mpe oyo esalaka ete moto azwa lobiko.” Moto mosusu alimbolaki evanzile ya bokonzi lokola “mateya etali lingomba.” Mpe mateya ya Katekisimo ya Lingomba ya Katolike elobi ete: “Bokonzi ya Nzambe [ezali] boyengebene, kimya mpe esengo na kati ya Elimo Santu.”
Okozwa ndimbola ya polele mpenza na lokasa 2 ya zulunalo oyo. Tozali kotánga boye: “Etikali moke Bokonzi ya Nzambe, oyo ezali guvɛrnema ya solo mpenza kuna na likoló, esukisa mabe nyonso mpe ebongola mabele mobimba Paradiso.” Tótala ndenge Biblia endimi likanisi yango.
Bakonzi oyo bakoyangela mabele mobimba
Bokonzi ezali guvɛrnema oyo mokonzi azali koyangela. Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe ezali Yesu Kristo oyo asekwaki. Kotyama na ye na kiti ya bokonzi kuna na likoló elobelamaki na emonaneli oyo Nzambe apesaki mosakoli Danyele, oyo akomaki ete: “Nazalaki se kotala na bimonaneli ya butu, mpe talá! moto moko lokola mwana ya moto [Yesu] azalaki koya na mapata ya likoló; mpe balekisaki ye epai ya Mokóló na Mikolo [Yehova Nzambe], mpe babɛlɛmisaki ye liboso na Oyo wana. Mpe bapesaki ye boyangeli, lokumu ná bokonzi, mpo bato ya bikólo, bituluku ya bato ya bikólo mpe minɔkɔ nyonso básalela ye. Boyangeli na ye ezali boyangeli oyo ekoumela seko, oyo ekoleka te, mpe bokonzi na ye ezali bokonzi oyo ekobebisama te.”—Danyele 7:13, 14.
Mokanda ya Danyele emonisi mpe ete Nzambe akopika bokonzi yango, mpe ekosukisa baguvɛrnema nyonso ya bato, mpe moto moko te akokweisa bokonzi yango. Mokapo 2 elobeli ndɔtɔ oyo Nzambe alɔtisaki Mokonzi ya Babilone, oyo amonaki ekeko moko ya monene, oyo emonisaki kolandana ya banguya ya mokili mobimba. Mosakoli Danyele alimbolaki ndɔtɔ yango. Akomaki ete: “Na eleko ya nsuka ya mikolo; Nzambe ya likoló akotya bokonzi moko oyo ekobebisama te. Mpe bokonzi yango ekoleka na ekólo mosusu te. Ekotuta mpe ekosukisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala seko.”—Danyele 2:28, 44.
Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe akoyangela ye moko te. Ntango azalaki kosala mosala na ye awa na mabele, Yesu ayebisaki bantoma na ye ya sembo ete bango ná bato mosusu, bakosekwa mpo na kokende na likoló mpe bakofanda na kiti ya bokonzi. (Luka 22:28-30) Alobelaki te bakiti ya bokonzi oyo tomonaka, mpo ndenge Yesu amonisaki yango, Bokonzi esengelaki kozala na likoló. Biblia elobelaka bato yango oyo bakoyangela elongo na Yesu ete bazali bato ya ‘mabota nyonso mpe minɔkɔ nyonso mpe mikili nyonso.’ Bakozala “bokonzi mpe banganga-nzambe mpo na Nzambe na biso, mpe bakoyangela mabele.”—Emoniseli 5:9, 10.
Ntina oyo nsango ya Bokonzi ezali nsango ya malamu
Tósimba ete Nzambe apesi Kristo Yesu bokonzi likoló na “bato ya bikólo, bituluku ya bato ya bikólo mpe minɔkɔ” nyonso mpe baoyo bakozala elongo na ye “bakoyangela mabele mobimba.” Kasi, bokonzi yango ekoyangela banani? Baoyo bazali kondima nsango malamu oyo ezali kosakolama lelo oyo. Na kati ya bato yango, ekozala mpe na bato oyo bakosekwa mpo na kozala na bomoi awa na mabele mpe oyo bakozala na elikya ya kozala na bomoi libela na libela.
Biblia emonisi polele mapamboli oyo bato bakozala na yango ntango bokonzi yango ekoyangela. Mwa ndambo na yango, yango oyo:
“Ye azali kosilisa bitumba tii na nsuka ya mabele. Azali kobukabuka litimbo mpe kokatakata likɔnga; Azali kotumba makalo na mɔtɔ.”—Nzembo 46:9.
“Ya solo, bakotonga bandako mpe bakofanda kuna; mpe ya solo, bakolona bilanga ya vinyo mpe bakolya mbuma na yango. Bakotonga mpo moto mosusu afandaka kuna te; bakolona mpo moto mosusu alya te.”—Yisaya 65:21, 22.
“[Nzambe] akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.”—Emoniseli 21:3, 4.
“Na ntango yango miso ya bato oyo bakufá miso ekofungwama, mpe matoi ya bato oyo bakufá matoi ekofungwama. Na ntango yango motɛngumi akopumbwa lokola serfe, mpe lolemo ya moto oyo alobaka te ekoganga na esengo.”—Yisaya 35:5, 6.
“Ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita bakoyoka mongongo na ye [Yesu] mpe bakobima, baoyo basalaki makambo ya malamu bakobima mpo na lisekwa ya bomoi.”—Yoane 5:28, 29.
“Bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.”—Nzembo 37:11.
Oyo ezali mpenza nsango malamu! Lisusu, bisakweli ya Biblia oyo ekokisami emonisi ete etikali moke Bokonzi ya Nzambe etya boyangeli na yango ya sembo na mabele mobimba.