Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/3 lok. 6
  • Nsango malamu ezali nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nsango malamu ezali nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Masolo mosusu
  • ‘Ekoki ete nsango malamu esakolama liboso’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Tósakola nsango malamu ya Bokonzi
    Nzembo mpo na kokumisa Yehova
  • ‘Bazali koyeisa nsango malamu ya eloko moko oyo eleki malamu’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/3 lok. 6

Nsango malamu ezali nini?

“Nsango malamu oyo . . .”​—MATAI 24:14.

BAKRISTO basengeli kosakola “nsango malamu ya bokonzi,” koyebisa yango epai ya basusu, kolimbola ete Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema ya mokili mobimba oyo ekoyangela mabele na bosembo nyonso. Kasi, maloba “nsango malamu” esalelami mpe na lolenge mosusu na Biblia. Na ndakisa, tokutaka maloba lokola “nsango malamu ya lobiko” (Nzembo 96:2); “nsango malamu ya Nzambe” (Baroma 15:16); mpe “nsango malamu oyo etali Yesu Kristo.”​—Marko 1:1.

Na mokuse, nsango malamu esangisi solo nyonso oyo Yesu alobaki mpe oyo bayekoli na ye bakomaki. Liboso amata na likoló, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Yango wana, bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, bóbatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.” (Matai 28:19, 20) Na yango, mosala ya bakristo ya solo ezali te kaka ya koyebisa bato Bokonzi; basengeli mpe kosala makasi bákómisa bango bayekoli.

Ndenge nini mangomba ezali kosala na likambo yango? Baoyo bayebi te soki Bokonzi ya Nzambe ezali nini​—mpe bato yango bazali mingi—​bakoki te koteya yango na bosikisiki epai ya basusu. Kutu, bateyaka nde makambo oyo esepelisaka matoi ya bato, na ndakisa kolimbisama ya masumu mpe kondimela Yesu. Balukaka mpe kobenda bandimi na ndenge balukaka kobongisa bomoi ya bato, na ndakisa kotonga balopitalo, biteyelo mpe bandako mpo na babola. Ata soki milende ya ndenge wana ekoki kosala ete bandimi bákóma ebele na ndako-nzambe, milende yango ebimisaka te bakristo ya solo oyo balukaka na bosembo nyonso koyokanisa bomoi na bango na makambo oyo Yesu ateyaki.

Moto moko ya teoloji akomaki boye: “Na kati ya bakristo, okokuta bato mingi ya mayele to bakonzi oyo bandimaka ete tosengeli kokómisa bato bayekoli ya Yesu mpe koteya bango básala makambo nyonso oyo Yesu alobaki. . . . Kasi, malako ya Yesu na likambo yango ezali polele. Toboyaka kaka kosala oyo alobaki. Tolingaka te kosala makasi mpo na yango. Mpe emonani lokola ete toyebi te ndenge ya kosala yango.”

Ndenge moko, ankɛtɛ moko ya Lingomba ya Katolike na États-Unis emonisaki ete bato mingi (95%) bandimaki ete kosakola nsango malamu ezali likambo oyo bandimi ya Katolike basengeli kosala. Kasi, pene na bandimi nyonso bamonaka ete lolenge malamu ya kosala yango, ezali te ya kolobela yango, kasi na kotambwisa bomoi na bango na ndenge oyo ekozala ndakisa mpo na basusu. Kaka na ankɛtɛ yango, mwasi moko alobaki boye: “Kosakola ekeseni na koloba, koloba, koloba. Kopesa ndakisa nde eleki ntina.” Zulunalo moko (U.S. Catholic) oyo esalaki ankɛtɛ yango, elobaki ete bato mingi bakakatanaka mpo na koyebisa basusu bindimeli na bango mpo na “makambo ya nsɔni ya kosangisa nzoto oyo euti kosalema na lingomba mpe mpo na mateya ya bongolabongola oyo lingomba ezali koteya.”

Epai mosusu, episkɔpɔ moko ya Lingomba ya Metodiste amilelaki ete lingomba na ye ezali kokabwana mpe kotya mobulungano, ezali kozanga makasi ya kokokisa mokumba na yango mpe ezali na bizaleli kaka ndenge moko na bato oyo bazali bandimi te. Na mawa nyonso, atunaki boye: “Banani mpenza babongi mpo na komema nsango malamu mpe banani bazali kosala yango?”

Episkɔpɔ yango apesaki eyano te na motuna na ye. Kasi, eyano ezali. Okozwa yango na lisolo oyo elandi.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]

Nsango malamu etaleli Bokonzi ya Nzambe mpe lobiko na nzela ya kondimela Yesu Kristo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto