Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 15/8 nk. 27-31
  • Tólanda kimya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tólanda kimya
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntango tobɛti libaku
  • Ntango bato ebele bakɔti na matata moko
  • Ndenge bankulutu bakoki kosalisa
  • Kimya ata ndenge nini?
  • Kolanda kimya ememaka mapamboli
  • ‘Toluka kimya mpe tolanda yango’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • “Tólanda makambo oyo epesaka kimya”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Ndenge oyo okoki kozwa kimya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Tika ete “kimya na Nzambe” ebatela mitema na bino!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 15/8 nk. 27-31

Tólanda kimya

“Tólanda makambo oyo etyaka kimya.”​—ROM. 14:19.

1, 2. Mpo na nini Batatoli ya Yehova bazali na kimya kati na bango?

KIMYA ya solosolo ezali komonana mpenza te na mokili ya lelo. Mbala mingi, ata bato ya ekólo moko mpe oyo balobaka monɔkɔ moko bazalaka na bomoko te na makambo ya losambo, ya politiki, mpe ya bomoi. Kasi, basaleli ya Yehova bazali na bomoko atako bauti na ‘mabota nyonso mpe na mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso.’​—Em. 7:9.

2 Kimya oyo tozalaka na yango ebimá pwasa te. Ezali libosoliboso mpo ‘tozali na kimya elongo na Nzambe’ na nzela ya kondima na biso epai ya Mwana na ye, oyo asopaki makila na ye mpo na kozipa masumu na biso. (Rom. 5:1; Ef. 1:7) Longola yango, Yehova apesaka basaleli na ye ya sembo elimo santu, mpe kimya ezali na kati ya mbuma ya elimo yango. (Gal. 5:22) Ntina mosusu oyo tozali na bomoko mpe na kimya ezali mpo tozalaka “bato ya mokili te.” (Yoa. 15:19) Yango elimboli ete tokɔtaka te na makambo ya politiki to na bitumba. Lokola ‘totulá mipanga na biso mpo ekóma bitimweli ya mabele,’ tokɔtaka te na bitumba ya bana-mboka to ya bikólo.​—Yis. 2:4.

3. Kimya oyo tozali na yango esalaka nini, mpe tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Kimya oyo tozali na yango kati na biso esuki te kaka na koboya kosala bandeko na biso mabe. Atako mbala mosusu na lisangá tozali bato oyo bautá na bikólo ndenge na ndenge mpe bazali na mimeseno ekeseni, ‘tolinganaka.’ (Yoa. 15:17) Kimya na biso esalisaka biso “tósalela bato nyonso oyo ezali malamu, kasi mingimingi mpenza baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima.” (Gal. 6:10) Tosengeli mpenza kolinga mpe kobatela paradiso na biso ya elimo oyo etondi na kimya. Na yango, tótala ndenge oyo tokoki kolanda kimya na lisangá.

Ntango tobɛti libaku

4. Tokoki kosala nini mpo tólanda kimya ntango tozokisi moto?

4 Moyekoli Yakobo akomaki boye: “Biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi. Soki moto abɛtaka libaku na maloba te, ye azali moto ya kokoka.” (Yak. 3:2) Na yango, ekoki kokóma ete bandeko ya lisangá bázwana matata mpe báyokana te na likambo moko. (Flp. 4:2, 3) Kasi, bandeko oyo bazwani matata bakoki kosilisa yango kozanga bábebisa kimya ya lisangá. Na ndakisa, tótalela toli oyo tosengeli kosalela ntango tomoni ete mbala mosusu tozokisaki ndeko moko.​—Tángá Matai 5:23, 24.

5. Ndenge nini tokoki kolanda kimya ntango basali biso mabe?

5 Bongo soki basaleli biso mwa likambo moko ya mabe? Tosengeli kozela moto yango aya kosɛnga biso bolimbisi? 1 Bakorinti 13:5 elobi ete bolingo “ebombaka mabe na motema te.” Ntango basali biso mabe, tokolanda kimya soki tolimbisi mpe tobosani, elingi koloba ‘tobombi mabe na motema te.’ (Tángá Bakolose 3:13.) Yango nde lolenge ya malamu koleka ya kosilisa mwa bambeba mikemike ya mokolo na mokolo, mpo esalisaka bandeko ya lisangá bázala na boyokani ya kimya, mpe epesaka kimya ya motema. Lisese moko ya bwana elobi boye: “Kitoko [ya moto] ezali ete alimbisaka likambo oyo ebuki mibeko.”​—Mas. 19:11.

6. Tokosala nini soki ezali mpasi kolekisa kaka boye mabe oyo basali biso?

6 Bongo soki tomoni ete ezali mpasi kolekisa kaka boye mabe oyo basali biso? Na ntembe te, kopanza likambo yango na matoi ya bato ezali likambo ya bwanya te. Bilobaloba ya ndenge wana ekoya kaka kobebisa kimya na lisangá. Ndenge nini kosilisa likambo yango na kimya? Matai 18:15 elobi boye: “Soki ndeko na yo asali lisumu, kende komonisa ye libunga na ye, yo ná ye kaka. Soki ayokeli yo, ozongisi ndeko na yo na nzela ya malamu.” Atako Matai 18:15-17 elobeli masumu ya minene, na kolanda etinda oyo ezali na vɛrsɛ 15, tosengeli kosolola na boboto nyonso kaka biso moko ná moto yango oyo asalaki biso mabe mpe komeka kozongisa boyokani ya kimya elongo na ye.a

7. Mpo na nini tosengeli kosilisa matata nokinoki?

7 Ntoma Paulo akomaki boye: “Bóyoka nkanda, mpe ata bongo bósala lisumu te; moi elala te bino bozali kaka na nkanda, mpe bótikela Zabolo esika te.” (Ef. 4:26, 27) Yesu mpe alobaki boye: “Salá noki obongisa makambo elongo na moto oyo azali na likambo ya kosamba na yo.” (Mat. 5:25) Na yango, kolanda kimya esɛngi kosilisa matata nokinoki. Mpo na nini? Mpamba te kosala bongo ekopekisa matata ekóma makasi mingi ndenge mpota epɔlaka soki ezangi nkisi. Tótika te ete lolendo, zuwa to bolingo makasi ya biloko ya mokili epekisa biso kosilisa nokinoki matata oyo ebimi kati na biso.​—Yak. 4:1-6.

Ntango bato ebele bakɔti na matata moko

8, 9. (a) Matata nini ebimaki na lisangá ya Roma na ekeke ya liboso? (b) Toli nini Paulo apesaki bakristo ya Roma na likambo yango?

8 Na bantango mosusu, matata oyo ebimi na lisangá ekoki kokɔtisa bato ebele. Esalemaki bongo kati na bakristo ya Roma oyo ntoma Paulo akomelaki bango mokanda na lisalisi ya elimo ya Nzambe. Matata ebimaki kati na bakristo oyo bazalaki Bayuda ná baoyo bazalaki bato ya bikólo mosusu. Emonani polele ete bandeko mosusu oyo bazalaki na lisosoli ya makasi na lisangá yango bazalaki kotyola baoyo lisosoli na bango ezalaki makasi te to ezalaki kopekisa bango makambo mingi. Bandeko yango bazalaki kosala mabe na ndenge bazalaki kosambisa basusu na makambo oyo etali moto ye moko. Toli nini Paulo apesaki lisangá yango?​—Rom. 14:1-6.

9 Paulo apesaki bakristo ya ngámbo nyonso mibale toli. Ayebisaki baoyo bakangaki ntina ete bazali na nse ya Mibeko ya Moize te ete bátika kotyola bandeko na bango. (Rom. 14:2, 10) Mpo na ezaleli ya ndenge wana, bakristo oyo bazalaki naino komona ete ezali mabe kolya biloko oyo Mibeko epekisaki, bakokaki kobɛta libaku. Paulo ayebisaki bango ete ‘bátika kobebisa mosala ya Nzambe kaka mpo na biloko ya kolya.’ Abakisaki boye: “Ezali malamu koboya kolya mosuni ya nyama to komɛla vinyo to kosala eloko moko boye oyo ezali kobɛtisa ndeko na yo libaku.” (Rom. 14:14, 15, 20, 21) Epai mosusu, Paulo ayebisaki bakristo oyo lisosoli na bango ezalaki kopekisa bango makambo mingi ete báloba te ete baoyo bazali kokanisa lokola bango te bazali sembo te. (Rom. 14:13) Ayebisaki ‘moto nyonso na kati na bango ete akanisa te ete azali koleka ndenge oyo ye azali mpenza.’ (Rom. 12:3) Lokola apesaki ngambo nyonso mibale toli, Paulo akomaki boye: “Yango wana, tólanda makambo oyo etyaka kimya mpe makambo oyo elendisaka biso.”​—Rom. 14:19.

10. Ndenge ezalaki na lisangá ya Roma ya kala, esɛngaka mpe nini lelo mpo na kosilisa matata?

10 Ntembe ezali te ete bakristo ya lisangá ya Roma balandaki toli ya Paulo mpe basalaki bambongwana oyo esengelaki. Lelo oyo, ntango matata ebimi kati na bandeko, biso mpe tosengeli te kosilisa matata yango na bolingo mpe kondima koluka toli ya Biblia na komikitisa nyonso mpe kosalela yango? Ndenge ezalaki na bakristo ya Roma, lelo mpe ekoki kosɛnga ete baoyo bazali na kati ya matata moko básembola makanisi na bango mpo ‘bázala na kimya bango na bango.’​—Mrk. 9:50.

Ndenge bankulutu bakoki kosalisa

11. Nkulutu asengeli kosala nini soki mokristo moko alingi kosolola na ye mpo na matata oyo azwani na ndeko mosusu?

11 Bongo soki mokristo moko alingi kosolola na nkulutu moko mpo na matata oyo azwani na ndeko na ye ya libota to ya lisangá? Masese 21:13 elobi boye: “Moto nyonso oyo azali kokanga litoi na ye na koganga ya komilelalela ya moto oyo azangá, ye moko mpe akobenga kasi bakoyanola ye te.” Na ntembe te, nkulutu akolinga te ‘kokanga litoi na ye.’ Kasi lisese mosusu epesi likebisi oyo: “Moto oyo asambaka liboso, amonanaka lokola ‘tè ye moto alongi; kasi makambo nyonso ekómaka polele kaka soki bayoki pe moto oyo azali kosamba na ye. (Batoli 18:17, Bible na lingala ya lelo oyo) Nkulutu asengeli koyoka na boboto, kasi asengeli kokeba ete akɔtela te moto oyo ayei koyebisa ye likambo. Nsima ya koyoka likambo, ekozala malamu atuna moto oyo ayei kofunda soki asololi na moto oyo apesi ye mpasi. Nkulutu akoki mpe kokundwela ye makambo oyo Biblia elobi ete tosengeli kosala mpo na kolanda kimya.

12. Tángá bandakisa oyo emonisi likama ya kosala makambo mbangumbangu nsima ya koyoka kaka efundeli moko.

12 Bandakisa misato ya Biblia emonisi likama ya kosala makambo mbangumbangu nsima ya koyoka kaka moto moko. Potifare andimaki makambo oyo mwasi na ye ayebisaki ye ete Yozefe alukaki kosangisa na ye nzoto na makasi. Na mbala moko, Potifare asilikaki mpe abwaki Yozefe na bolɔkɔ. (Eba. 39:19, 20) Mokonzi Davidi andimaki makambo oyo Ziba alobaki ete nkolo na ye Mefiboshete akɔtaki na ngámbo ya banguna ya Davidi. Na mbala moko, Davidi alobaki boye: “Talá! Biloko nyonso ya Mefiboshete ezali ya yo.” (2 Sa. 16:4; 19:25-27) Bayebisaki Artazerezese, mokonzi ya Perse ete Bayuda bazali kotonga lisusu bifelo ya Yerusaleme mpo balingi kotombokela bokonzi na ye. Mokonzi yango andimaki lapolo wana ya lokuta mpe atindaki bápekisa mosala nyonso ya kotonga lisusu na Yerusaleme. Na yango, Bayuda batikaki kosala na tempelo ya Nzambe. (Ezr. 4:11-13, 23, 24) Na bwanya nyonso, bankulutu ya lisangá balandaka toli oyo Paulo apesaki Timote ete aboya kozwa bikateli mbangumbangu.​—Tángá 1 Timote 5:21.

13, 14. (a) Ntango bato bazali na matata, eloko nini tosengeli kobosana te? (b) Nini ekoki kosalisa bankulutu básambisa malamu?

13 Ata soki tomoni lokola tokangi ntina ya matata oyo bato mibale bazali na yango, tosengeli koyeba ete “soki moto akanisi ete ayebi likambo moko boye, ayebi yango naino te ndenge asengeli mpenza koyeba yango.” (1 Ko. 8:2) Toyebi mpenza makambo nyonso oyo ebimisaki matata yango? Toyebi mpenza bomoi ya kala ya bato yango? Ntango basɛngi bango básalisa, ezali mpenza na ntina ete bankulutu bákosama te na makambo ya lokuta, na mayele mabe, to na nungunungu mpamba! Yesu Kristo, Mosambisi oyo Nzambe aponá, asambisaka na boyengebene. ‘Asambisaka te na kolanda kaka oyo emonani na miso na ye, mpe apamelaka te na kolanda kaka likambo oyo matoi na ye eyoki.’ (Yis. 11:3, 4) Yesu atambwisami nde na elimo ya Yehova. Bankulutu ya lisangá mpe basengeli kotambwisama na elimo santu ya Nzambe.

14 Liboso básambisa likambo moko oyo etali baninga na bango bakristo, bankulutu basengeli kobondela mpo na kosɛnga elimo ya Yehova etambwisa bango; mpe mpo na yango, basengeli kotánga Liloba ya Nzambe mpe mikanda ya moombo ya sembo mpe ya mayele.​—Mat. 24:45.

Kimya ata ndenge nini?

15. Soki toyoki ete ndeko moko asali lisumu ya monene, ntango nini tosengeli koyebisa bankulutu?

15 Biblia elendisi biso bakristo tólanda kimya. Kasi, elobi mpe ete: “Bwanya oyo euti na likoló ezalaka libosoliboso pɛto, mpe kimya.” (Yak. 3:17) Kozala moto ya kimya eyei nsima ya kozala moto ya pɛto, elingi koloba kotika Nzambe ayebisa biso oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe, mpe kosala makambo oyo esepelisaka ye. Soki mokristo ayebi ete ndeko moko asali lisumu ya monene, asengeli kolendisa ye ayambola yango epai ya bankulutu. (1 Ko. 6:9, 10; Yak. 5:14-16) Soki mosumuki asali yango te, mokristo oyo ayebi likambo yango asengeli koyebisa yango bankulutu. Moto oyo asali bongo te mpo alingi kobatela kimya na mosumuki yango azali kosangana na lisumu yango.​—Lev. 5:1; tángá Masese 29:24.

16. Liteya nini tozwi na likambo oyo Yehu asalaki ntango akutanaki na Mokonzi Yehorame?

16 Likambo moko oyo Yehu asalaki emonisi ete boyengebene ya Nzambe esengeli koleka liboso ya koluka kobatela kimya na bato. Nzambe atindaki Yehu akweisela ndako ya Mokonzi Ahabe etumbu na Ye. Mokonzi mabe Yehorame, mwana ya Ahabe ná Yezabele, akendaki na likalo na ye mpo na kokutana na Yehu mpe alobaki boye: “Yehu, kimya ezali?” Yehu alobaki nini? Azongisaki boye: “Kimya nini ekozala ntango misala ya pite ya mama na yo Yezabele mpe ebele ya misala na ye ya bonganga-nkisi ezali naino?” (2 Bak. 9:22) Na yango, Yehu abendaki litimbo na ye mpe abɛtaki Yehorame likula na motema. Kaka ndenge Yehu asalaki, bankulutu basengeli te kotika bato oyo bazali kosala masumu na nko mpe baboyi kobongola motema, mpo balingi kobatela kimya. Babimisaka na lisangá basumuki oyo baboyi kobongola motema mpo lisangá ekoba kozala na kimya elongo na Nzambe.​—1 Ko. 5:1, 2, 11-13.

17. Mokristo mokomoko asengeli kosala nini mpo na kobatela kimya?

17 Matata mingi oyo ebimaka kati na bandeko ezalaka makambo ya minene te oyo esɛngi kosambisama. Na yango, ezali mpenza malamu tómonisaka bolingo mpe tózipaka mabunga ya basusu. Biblia elobi boye: “Ye oyo azali kozipa likambo oyo ebuki mibeko azali koluka bolingo, kasi ye oyo azali se kolobaloba likambo azali kokabola baninga ya motema.” (Mas. 17:9) Kotosa maloba yango ekosalisa biso nyonso tóbatela kimya na lisangá mpe tóbatela boyokani malamu na Yehova.​—Mat. 6:14, 15.

Kolanda kimya ememaka mapamboli

18, 19. Wapi matomba ya kolanda kimya?

18 Lokola tolandaka “makambo oyo etyaka kimya” tozali na mapamboli mingi. Tozali na boyokani malamu na Yehova wana tozali kolanda ndakisa na ye, mpe tozali kosalisa mpo bomoko mpe kimya ezala na paradiso na biso ya elimo. Kolanda kimya na lisangá esalisaka mpe biso tóyeba ndenge ya kosala mpo na kolanda kimya elongo na baoyo tozali kosakwela “nsango malamu ya kimya.” (Ef. 6:15) Tozali na nyonso oyo esengeli mpo ‘tózala na boboto na bato nyonso, baoyo bamipekisaka na ntango basali bango mabe.’​—2 Tim. 2:24.

19 Tóbosana mpe te ete “lisekwa ekozala, ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.” (Mis. 24:15) Ntango elaka yango ekokokisama awa na mabele, bamilio ya bato oyo bazalaki na bomoi, bizaleli, mpe bomoto ndenge na ndenge, bakozonga na bomoi; bato ya bileko ndenge na ndenge, tii na bato ya “ebandeli ya mokili”! (Luka 11:50, 51) Koteya bato oyo bakosekwa ekozala mpenza lokumu monene. Formasyo oyo tozali kozwa lelo ya kozala bato oyo batyaka kimya ekosalisa biso mingi na ntango wana!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba toli ya Biblia na ntina etali masumu minene lokola kokosela moto makambo mpe kobuba, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 1999, nkasa 17-22.

Oyekoli makambo nini?

• Ndenge nini tokoki kolanda kimya soki tosali moto mabe?

• Tosengeli kosala nini mpo na kolanda kimya soki basali biso mabe?

• Mpo na nini ezali mabe kokɔtela ngámbo moko soki bato bazali na matata?

• Limbolá ntina oyo tosengeli te kolanda kimya ata ndenge nini.

[Bililingi na lokasa 29]

Yehova alingaka baoyo balimbisaka na motema moko

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto