Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/10 lok. 5
  • 2 Nzambe akipaka biso mpenza te—Solo to lokuta?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 2 Nzambe akipaka biso mpenza te—Solo to lokuta?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Masolo mosusu
  • Yehova ayebi motángo ya “nsuki mpenza ya motó na bino”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Tozali na motuya na miso na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Nzambe akipaka ngai mpenza?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • 2 Luká kozwa boyebi ya solosolo ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/10 lok. 5

2 Nzambe akipaka biso mpenza te​—Solo to lokuta?

Liteya oyo mbala mosusu oyoká: “Soki mpenza Nzambe akipaka bato, alingaki kolongola mabe mpe bampasi na mokili. Mpe ata soki atalaka makambo ya bato nyonso, akipaka te oyo ekómelaka ngai.”

Oyo Biblia eteyaka: Yehova Nzambe abimiselaka bato bampasi te. (Yakobo 1:13) Atako akoki kolongola bampasi yango na ntango nyonso oyo alingi, atiki ete mokili oyo mabe ezala naino mpo na ntembe oyo ebimaki na elanga ya Edene. Nsukansuka, akobongisa makambo mpe akolongola mabe nyonso oyo bato oyo baboyaka bokonzi na ye babimisaka.​—Ebandeli 3:1-6; Yisaya 65:17.a

Nzambe akipaka makambo ya bato nyonso, kasi mpe ya mokomoko na biso. Matai 10:29-31 emonisi ete atyaka likebi na makambo mikemike oyo ata biso moko toyebaka te. Vɛrsɛ yango elobi boye: “Batɛkaka bakɛngɛli-mboka mibale na mbongo ya bibende moko ya motuya moke, boye te? Nzokande ata moko na yango ekokwea na nse te bongo Tata na bino ayeba te. Kasi nsuki nyonso ya motó na bino etángami. Na yango bóbanga te: Bino boleki bakɛngɛli-mboka ebele na motuya.”

Ndenge oyo solo ekoki kosalisa yo: Mbala mingi toboyaka bato oyo bazalaka makambo makasi to mafumafu. Ezali likambo ya kokamwa te ete liteya ya lokuta oyo elobi ete Nzambe azali mafumafu etindaka bato mingi báboya koyekola koyeba ye to mpe báluka ye kaka soki bamoni ete mayele na bango esuki. Koyeba ete Yehova Nzambe atyelaka biso likebi ekoki kotinda yo oyekola koyeba ye malamu mpe okóma moninga na ye.

Na ndakisa, ekoki kozala ete obondelaka Nzambe, kasi omitunaka soki ayokaka to mpe akopesa yo eyano. Biblia elobi na biso ete “Moyoki ya libondeli” akangaka matoi te na mabondeli ya bato nyonso oyo bapusanaka penepene na ye na mitema sembo.​—Nzembo 65:2.

Nzambe azali kosɛnga yo ete ‘obwakela ye mitungisi na yo nyonso, mpo atyelaka yo likebi.’ (1 Petro 5:7) Tokoki kozala na elikya ete akotyela biso likebi ata na ntango ya mpasi, mpamba te Liloba na ye elobi ete: “Yehova azali pene na baoyo motema ebukani; mpe abikisaka baoyo elimo etutami.”​—Nzembo 34:18.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba malamumalamu ntina oyo Nzambe atiki nzela na bampasi, talá mokapo 11 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]

Soki Nzambe akipaka biso te, mpo na nini asɛngi ete tóbondelaka ye?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto