‘Tóbɔndisa baoyo bazali kolela’
“Yehova atye ngai mafuta mpo . . . nabɔndisa baoyo bazali kolela.”—YIS. 61:1, 2.
1. Yesu asalaki nini mpo na baoyo bazalaki kolela, mpe mpo na nini?
YESU KRISTO alobaki boye: “Bilei na ngai nde kosala mokano ya moto oyo atindaki ngai mpe kosilisa mosala na ye.” (Yoa. 4:34) Ntango Yesu azalaki kokokisa mosala oyo Nzambe apesaki ye awa na mabele, amonisaki bizaleli kitoko ya Tata na ye. Moko na yango ezali bolingo monene oyo Yehova alingaka bato. (1 Yoa. 4:7-10) Ntoma Paulo alobelaki lolenge moko oyo Yehova amonisaka bolingo yango ntango abengaki Ye “Nzambe ya kobɔndisama nyonso.” (2 Ko. 1:3) Yesu amonisaki bolingo ya ndenge wana ntango akokisaki makambo oyo Yisaya asakolaki. (Tángá Yisaya 61:1, 2.) Yesu atángaki esakweli yango na Sinagoga ya Nazarete mpe alobaki ete ye nde akokisi yango. (Luka 4:16-21) Na boumeli ya mosala na ye, Yesu abɔndisaki baoyo bazalaki kolela, alendisaki bango, mpe asalisaki bango bázala na kimya.
2, 3. Mpo na nini bayekoli ya Kristo basengeli kolanda ndakisa na ye na likambo etali kobɔndisa basusu?
2 Bayekoli nyonso ya Yesu basengeli kolanda ndakisa na ye na likambo etali kobɔndisa baoyo bazali kolela. (1 Ko. 11:1) Paulo alobaki boye: “Bókoba kobɔndisana mpe kolendisana.” (1 Tes. 5:11) Tosengeli mpenza kobɔndisa basusu, mingimingi mpo tozali na “mikolo ya nsuka . . . ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.” (2 Tim. 3:1) Na mokili mobimba, bato mingi mpenza ya motema malamu bazali kofanda esika moko na bato oyo balobaka mpe basalaka makambo oyo epesaka basusu mpasi mpe mawa.
3 Ndenge Biblia esakolaki yango, na mikolo oyo ya nsuka, bato mingi bazali “bato oyo bamilingaka, bato balingá mbongo, bato ya lofundo, bato ya lolendo, bato oyo bafingaka, oyo batosaka baboti te, oyo bazangi botɔndi, oyo bazangi bosembo, oyo balinganaka te na kati ya libota, oyo balingaka kosala boyokani te, oyo bakoselaka bato makambo, oyo bazangi komipekisa, bato ya nko, oyo balingaka makambo ya malamu te, oyo batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi, oyo bavimbi na lolendo, oyo balingá bisengo na esika ya kolinga Nzambe.” Bizaleli yango ya mabe ebakisami mingi koleka lelo oyo, mpo ‘bato mabe mpe bakosi bazali kosala lisusu mabe koleka.’—2 Tim. 3:2-4, 13.
4. Lelo oyo, makambo ya mokili ekómi ndenge nini?
4 Nyonso wana ekoki kokamwisa biso te mpo Liloba ya Nzambe eyebisi biso polele ete “mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.” (1 Yoa. 5:19) “Mokili mobimba” esangisi makambo ya politiki, ya mangomba, ya mimbongo, mpe banzela mosusu oyo Satana asalelaka mpo na kopanza makanisi na ye. Yango wana Satana Zabolo abengami “mokonzi ya mokili oyo” mpe “nzambe ya makambo ya ntango oyo.” (Yoa. 14:30; 2 Ko. 4:4) Makambo ya mokili ezali se kobeba mpamba te Satana azali na nkanda makasi mpo ayebi ete atikali kaka na mwa ntango moke liboso Yehova asukisa ye. (Em. 12:12) Tobɔndisamaka mpenza na koyeba ete etikali moke Nzambe asukisa Satana ná mokili na ye ya mabe mpe ete ntembe oyo Satana abimisaki mpo na boyangeli ya Yehova ekosila mosika te!—Eba., mok. 3; Yobo, mok. 2.
Nsango malamu ezali kosakolama na mabele mobimba
5. Ndenge nini esakweli oyo etali mosala ya kosakola ezali kokokisama na mikolo oyo ya nsuka?
5 Na eleko oyo ya mpasi, likambo oyo Yesu asakolaki ezali kokokisama. Alobaki boye: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.” (Mat. 24:14) Mosala yango ya kosakola Bokonzi na mokili mobimba ezali kosalema na ndenge oyo esalemá naino te. Lelo oyo na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova koleka 7 500 000 na masangá koleka 107 000 bazali kosakola Bokonzi ya Nzambe. Yesu mpe asakolaki mpe ateyaki makambo etali Bokonzi ya Nzambe. (Mat. 4:17) Na nzela ya mosala yango, tozali kobɔndisa baoyo bazali kolela. Na mbula mibale oyo euti koleka, bato 570 601 bazwaki batisimo mpe bakómaki Batatoli ya Yehova!
6. Ndenge mosala na biso ya kosakola ezali kokola emonisi nini?
6 Batatoli ya Yehova bazali sikoyo kobongola mpe kokabola mikanda oyo elimbolaka Biblia na minɔkɔ koleka 500. Naino moto asalá boye te na mokili mobimba! Ndenge eteni ya ebongiseli ya Yehova awa na mabele ezali kosala mosala mpe kokola ezali mpenza likambo ya kokamwa. Soki Nzambe atambwisaka mpe asalisaka biso na elimo santu na ye te, likambo ya ndenge wana ekokaki kosalema te na mokili oyo eyangelami na Satana. Lokola nsango malamu ezali kosakolama na mokili mobimba, longola bandeko na biso bakristo, bato oyo bazali kolela bazali mpe kozwa libɔndisi ya Biblia soki bandimi nsango ya Bokonzi.
Kobɔndisana na lisangá
7. (a) Mpo na nini tosengeli kolikya te ete Yehova akolongola makambo nyonso ya mpasi lelo oyo? (b) Ndenge nini toyebi ete tokoki koyika mpiko na minyoko mpe na bampasi?
7 Na mokili oyo etondi na mabe mpe bampasi, toyebi ete mikakatano ekozanga te kokómela biso. Tosengeli kolikya te ete Nzambe akolongola makambo nyonso oyo epesaka mawa liboso aboma ebongiseli ya ntango oyo. Kasi ntango tozali kokutana na minyoko lelo oyo ndenge esakolamaki, ekosɛnga tómonisa soki tozali sembo epai ya Yehova mpe soki tozali kotosa bokonzi na ye. (2 Tim. 3:12) Kasi, lokola Tata na biso ya likoló azali kosalisa mpe kobɔndisa biso, tokoki kozala lokola bakristo ya Tesaloniki ya kala, oyo bayikaki mpiko na minyoko mpe na bampasi mpo na kondima na bango.—Tángá 2 Batesaloniki 1:3-5.
8. Ndenge nini Biblia emonisi ete Yehova abɔndisaka basaleli na ye?
8 Ntembe ezali te ete Yehova abɔndisaka basaleli na ye na ntango oyo esengeli. Na ndakisa, mosakoli Eliya abangaki mpe akimaki ntango Yezabele, oyo azalaki mwasi ya mokonzi mpe mwasi moko mabe alukaki koboma ye. Mosakoli yango alobaki kutu ete malamu akufa na ye. Kasi, na esika Yehova apamela Eliya, abɔndisaki nde ye mpe apesaki ye mpiko mpo akoba mosala na ye ya mosakoli. (1 Bak. 19:1-21) Ndenge Yehova asalisaki lisangá ya bokristo na ekeke ya liboso emonisi mpe ete abɔndisaka bato na ye. Na ndakisa, Biblia elobi ete na ntango moko boye “lisangá na Yudea mobimba, na Galile mpe na Samaria ekɔtaki na eleko moko ya kimya, ezalaki kotongama.” Lisusu “lokola [lisangá] ezalaki kotambola na kobanga Yehova mpe na libɔndisi ya elimo santu ekobaki kokola.” (Mis. 9:31) Biso mpe tozali mpenza na botɔndi na ndenge tozwaka “libɔndisi ya elimo santu”!
9. Mpo na nini koyekola ndakisa ya Yesu ekoki kobɔndisa biso?
9 Koyekola makambo etali Yesu Kristo mpe kolanda ndakisa na ye ebɔndisaka biso bakristo. Yesu alobaki boye: “Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi na mosala mpe na kokumba mikumba, mpe ngai nakopemisa bino. Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na ezaleli ya boboto mpe na komikitisa na motema, mpe milimo na bino ekopema. Mpo ekanganeli na ngai ezali ya pɛtɛpɛtɛ mpe mokumba na ngai ezali pɛpɛlɛ.” (Mat. 11:28-30) Koyekola ndenge Yesu azalaki kosalela bato makambo na boboto mpe kolanda ndakisa na ye ya malamu, ekoki kokitisa mitungisi na biso.
10, 11. Na lisangá, nani akoki kobɔndisa baninga?
10 Baninga na biso bakristo bakoki mpe kobɔndisa biso. Na ndakisa, kanisá ndenge bankulutu bakoki kosalisa bandeko oyo bazali na mikakatano makasi. Moyekoli Yakobo akomaki boye: “Ezali nde na moto moko oyo azali na maladi [ya elimo] na kati na bino? Abenga bankulutu ya lisangá, mpe bango bábondela mpo na ye.” Nini ekosalema? “Libondeli ya kondima ekobikisa moto oyo azali kobɛla, mpe Yehova akotɛlɛmisa ye. Lisusu, soki asalaki masumu, akolimbisama.” (Yak. 5:14, 15) Longola bankulutu, bandeko mosusu na lisangá mpe bakoki kobɔndisa biso.
11 Mbala mingi, ezalaka pɛtɛɛ basi báyebisa baninga na bango basi makambo na bango. Mingimingi bandeko basi ya mikóló mpe oyo bayebi makambo mingi bakoki kopesa bilenge basi toli ya malamu. Mbala mosusu bango moko mpe bakutaná na makambo yango na bomoi na bango. Lokola bayebaka komitya na esika ya basusu mpe mpo na bizaleli na bango ya bomwasi, bakoki mpenza kosalisa bilenge basi. (Tángá Tito 2:3-5.) Ya solo, bankulutu mpe bandeko mosusu bakoki, kutu basengeli ‘koloba na ndenge ya kobɔndisa epai ya milimo oyo enyokwami na makanisi’ na lisangá. (1 Tes. 5:14, 15) Mpe ezali malamu tóbosana te ete Nzambe “abɔndisaka biso na kati ya bolɔzi na biso nyonso, mpo biso mpe tókoka kobɔndisa baoyo bazali na ndenge nyonso ya bolɔzi.”—2 Ko. 1:4.
12. Mpo na nini ezali na ntina mingi tóyanganaka na makita?
12 Mpo tóbɔndisama mingi koleka, tosengeli koyanganaka na makita, mpo kuna nde masolo ya Biblia elendisaka biso. Biblia elobi ete Yudasi ná Silasi “balendisaki bandeko . . . na masukulu mingi mpe bapesaki bango makasi.” (Mis. 15:32) Liboso mpe nsima ya makita, bandeko basololaka masolo ya kolendisa. Na yango, ata soki tozali konyokwama mpo na likambo moko ya mpasi, tómitangola na bandeko te, mpamba te kosala bongo ekobongisa eloko te. (Mas. 18:1) Malamu tólanda toli oyo Paulo akomaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe ete: “Tótyelanaka likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu, tótika koyanganaka na makita na biso te, ndenge bamosusu bamesaná kosala, kasi tólendisanaka, mpe tósalaka bongo mingi koleka awa tozali komona mokolo yango ezali kobɛlɛma.”—Ebr. 10:24, 25.
Liloba ya Nzambe ebɔndisaka biso
13, 14. Monisá ndenge Makomami ekoki kobɔndisa biso.
13 Ezala tozwá batisimo to tobandi nde koyekola mateya ya Nzambe mpe mikano na ye, Liloba ya Nzambe ekoki kobɔndisa biso mingi. Paulo akomaki ete: “Makambo nyonso oyo ekomamaki kala ekomamaki mpo eteya biso, mpo, na ezaleli na biso ya koyika mpiko mpe na libɔndisi oyo euti na Makomami, tózala na elikya.” (Rom. 15:4) Biblia ekoki kobɔndisa biso mpe kokómisa biso bato oyo ‘bakoki mpenza,’ oyo bazali na “nyonso oyo esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.” (2 Tim. 3:16, 17) Soki toyebi solo oyo etali mikano ya Nzambe mpe tokómi na elikya ya solosolo mpo na mikolo ezali koya tokobɔndisama mpenza. Na yango, tótángaka mpe tóyekolaka Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka yango, mpo ekoki kobɔndisa biso mpe kosalisa biso na makambo mingi.
14 Yesu atikaki ndakisa moko malamu na ndenge azalaki kosalela Makomami mpo na koteya mpe kobɔndisa bato. Na ndakisa, nsima ya kosekwa, Yesu abimelaki bayekoli na ye mibale, mpe ‘alimbwelaki bango Makomami polelepolele.’ Na ntembe te yango ebɔndisaki bango mpenza. (Luka 24:32) Ntoma Paulo alandaki ndakisa wana ya Yesu mpe ‘azalaki kosalela Makomami mpo na kosolola na bato.’ Na Beroya, bato oyo bazalaki koyoka ye “bayambaki liloba na mposa makasi mpenza koleka, bazalaki kotalela Makomami malamumalamu mokolo na mokolo.” (Mis. 17:2, 10, 11) Ezali na ntina mingi ete biso mpe tótángaka Biblia mokolo na mokolo, mpe tótika Biblia ná mikanda na biso esalisa biso. Ebongisamá mpo na kobɔndisa mpe kopesa biso elikya na ntango oyo ya mpasi!
Ndenge mosusu ya kobɔndisa bandeko
15, 16. Tángá mwa makambo oyo tokoki kosala mpo na kosalisa mpe kobɔndisa bandeko na biso bakristo.
15 Ezali na makambo mingi oyo tokoki kosala mpo na kosalisa mpe kobɔndisa bandeko na biso bakristo. Na ndakisa, tokoki kosalisa ndeko moko oyo azali mobange to mokristo moko oyo azali na maladi na kosomba biloko. Tokoki mpe kosalisa basusu na misala ya ndako, mpe na ndenge yango komonisa ete totyelaka bango likebi. (Flp. 2:4) Tokoki mpe kopesa bandeko na biso longonya mpo na bizaleli na bango ya malamu, na ndakisa bolingo, ndenge basilisaka makambo na kimya, mpiko, mpe kondima.
16 Mpo na kosalisa mibange, tokoki kokende kotala bango mpe koyoka na likebi ntango bazali kobɛtela biso masolo ya makambo oyo bakutaná na yango mpe mapamboli oyo bazwá na mosala ya Yehova. Yango ekoki mpenza kolendisa mpe kobɔndisa biso! Tokoki kotánga Biblia to mikanda oyo elimbolaka yango elongo na bato oyo tokei kotala. Tokoki kobongisa elongo na bango lisolo oyo tokotalela na Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to na Boyekoli ya Biblia na lisangá. Tokoki kotala elongo na bango video moko ya moombo ya sembo. Tokoki mpe kotángela bango to kobɛtela bango masolo ya kolendisa oyo euti na mikanda na biso.
17, 18. Lokola tozali basaleli ya sembo ya Yehova, mpo na nini tokoki kondima ete akosalisa biso mpe akobɔndisa biso?
17 Soki tomoni ete ndeko moko azali na mposa ya libɔndisi, tokoki kotánga nkombo na ye na mabondeli na biso moko. (Rom. 15:30; Kol. 4:12) Wana tozali kobunda na mikakatano na biso moko mpe kosala makasi mpo tóbɔndisaka basusu, tokoki kozala mpenza na kondima lokola oyo ya mokomi ya nzembo oyo ayembaki ete: “Bwakelá Yehova ye moko mokumba na yo ya kilo, mpe ye moko akosunga yo. Akopesa nzela ata moke te ete moyengebene atengatenga.” (Nz. 55:22) Ya solo, Yehova azalaka ntango nyonso pene mpo na kobɔndisa mpe kosalisa basaleli na ye ya sembo.
18 Nzambe ayebisaki basaleli na ye ya ntango ya kala ete: “Ngai—ngai moko nazali Moto oyo azali kobɔndisa bino.” (Yis. 51:12) Yehova akosala mpe bongo mpo na biso mpe akopambola milende oyo tozali kosala mpo na kobɔndisa baoyo bazali kolela. Tózala na elikya ya kozwa bomoi na likoló to awa na mabele, mokomoko na biso akoki kobɔndisama na maloba oyo Paulo akomelaki baninga na ye bakristo oyo batyamaki mafuta na elimo ete: “Nkolo na biso Yesu Kristo ye moko mpe Nzambe Tata na biso, oyo alingaki biso mpe apesaki libɔndisi ya seko mpe elikya ya malamu na nzela ya boboto monene, bábɔndisa mitema na bino mpe bápesa bino makasi na mosala nyonso ya malamu mpe liloba nyonso ya malamu.”—2 Tes. 2:16, 17.
Ozali koyeba lisusu?
• Nini emonisi ete mosala na biso ya kobɔndisa basusu epalangani mpenza?
• Tángá mwa makambo oyo tokoki kosala mpo na kobɔndisa basusu.
• Ndenge nini Biblia emonisi ete Yehova abɔndisaka bato na ye?
[Elilingi na lokasa 28]
Yo mpe obɔndisaka baoyo bazali kolela?
[Elilingi na lokasa 30]
Bilenge ná mikóló bakoki kolendisana