Ntango nini etumba ya Armagedone ekoya?
“Namonaki, mpe talá! ebele mpenza ya bato, oyo ata moto moko te akokaki kotánga, bauti na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso . . . bauti na bolɔzi monene.”—EMONISELI 7:9, 14.
NTANGO ekoki sikoyo mpo etumba ya Armagedone ebanda. Ndenge nini?
Na mokili mobimba, ezali na lisangá moko ya bato oyo bazali kosalela Yehova mpe bazali kolanda mitinda ya Biblia na bomoi na bango. Na lisalisi ya Nzambe, bamilio ya bato oyo bauti na bikólo nyonso, na mabota nyonso, mpe na minɔkɔ nyonso bazali koyanganisama mpo na kosala libota moko ya bandeko oyo balinganaka mpenza. Batatoli ya Yehova nde basali libota yango.—Yoane 13:35.
Mosika te, Satana akoyanganisa mampinga na ye mpo na kobundisa libota wana ya kimya oyo emonani lokola ete ezangi makasi, mpe akobundisa yango na ndenge oyo abundisá yango naino liboso te. (Ezekiele 38:8-12; Emoniseli 16:13, 14, 16) Nini ekoki mpenza kosalisa yo ondima ete likambo yango ekosalema? Biblia elobeli polele makambo oyo ezali kosalisa biso tóyeba ntango nini Armagedone ekoya. Mingi kati ya makambo yango ezali kokokisama lelo oyo.
Bisakweli oyo ozali komona kokokisama na yango
Bayekoli ya Yesu batunaki ye apesa bango elembo oyo ekosalisa bango báyeba ete “bosukisi ya makambo ya ntango oyo” ekómi pene. (Matai 24:3) Na eyano oyo Yesu apesaki bango, alobaki ete na ntango yango, “ekólo ekobunda na ekólo mpe bokonzi ekobunda na bokonzi, mpe nzala ekozala mpe mabele ekoningana na bisika ndenge na ndenge.” Na nsima abakisaki ete: “Makambo nyonso wana ezali ebandeli ya bampasi.” (Matai 24:7, 8) Ntoma Paulo abengaki mpe eleko yango “mikolo ya nsuka,” alobaki ete mikolo yango ekozala “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.” (2 Timote 3:1) Yo mpe ozali komona ete makambo oyo ezali kosalema lelo ezali kokokisa bisakweli yango?
Mpo na nini eleko yango ekozala ya mpasi mpenza? Ntoma Yoane amonisi mpo na nini ekozala bongo. Asakolaki ete ekozala eleko ya “ntango mokuse” oyo Satana ná bademo na ye bakobimisa makasi na bango nyonso awa na mabele. Amonisi mpe ete na boumeli ya eleko yango, Satana akozala na “nkanda makasi.” (Emoniseli 12:7-12) Ozali komona te ete bato bakómi lelo na nkanda makasi mpe na mobulu, kaka na esika moko te, kasi bipai nyonso na mokili?
Yesu alobaki mpe ete na boumeli ya ntango wana ya mpasi mingi, mosala moko monene ekosalema. Alobaki ete: “Nsango malamu oyo ya bokonzi [ya Nzambe] ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Lelo oyo, na mikili koleka 235, Batatoli ya Yehova bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na minɔkɔ koleka 500. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!, bazulunalo na bango mibale oyo elimbolaka Biblia, ekabolamaka mingi na mokili koleka bazulunalo mosusu nyonso. Batatoli ya Yehova basili mpe kobongola Biblia na minɔkɔ soki 100. Mosala na bango esalemaka na bato oyo bamipesá bango moko kozanga ete báluka lifuti, mpe mbongo oyo esimbi mosala na bango eutaka nde na makabo oyo bato bapesaka na bolingo na bango moko. Mosala wana monene ya kosakola ezali nde kokokisa esakweli ya Yesu?
Biblia eyebisi mpe makambo oyo ekomema mbala moko na etumba oyo Nzambe akobunda na banguna na ye. Tótalela bisakweli misato oyo okomona ndenge ekokokisama.
Bisakweli oyo etikali moke omona kokokisama na yango
Esakweli 1. Biblia elobi ete bato ya bikólo bakoloba na ndenge ya polele ete: “Kimya, likambo ya kobanga ezali te.” Ntango mosusu bakokanisa ete etikali moke básilisa mikakatano minene oyo ezali kotungisa bato. Nzokande, makambo oyo ekolanda na nsima ya maloba wana ekotya kimya ata moke te.—1 Batesaloniki 5:1-3.
Esakweli 2. Nsima na yango, baguvɛrnema mingi ekozwa ekateli ya kotɛmɛla mangomba na mokili mobimba. Na ndenge ya elilingi, Biblia ebengi baguvɛrnema yango nyama mabe; mpe ebengi mangomba ya lokuta mwasi oyo afandi likoló ya nyama yango. (Emoniseli 17:3, 15-18) Nyama yango ya elilingi ekosala likambo oyo Nzambe akotinda yango esala: ekoboma mangomba oyo emikumisaka ete esalelaka Nzambe, nzokande esalelaka ye te.
Na maloba ya elilingi, ntoma Yoane alimboli ndenge likambo yango ekosalema, alobi boye: “Maseke zomi oyo omonaki, ná nyama mabe, ekoyina mwasi wana ya ndumba mpe ekopanza ye mpe ekotika ye bolumbu, mpe ekolya misuni na ye mpe ekozikisa ye na mɔtɔ nyɛɛ. Mpo Nzambe atye yango na mitema na bango mpo na kokokisa likanisi na ye.”—Emoniseli 17:16, 17.
Esakweli 3. Nsima ya koboma mangomba ya lokuta, Satana akotinda bato ya bikólo bábundisa bato oyo basambelaka Yehova Nzambe.—Emoniseli 7:14; Matai 24:21.
Osengeli kosala nini?
Soki ozwá naino te libaku ya koyekola Biblia na mozindo, mbala mosusu ekoki kozala mpasi ondima ete makambo oyo touti kolobela ekosalema. Kasi, ezali na ntina oyo etindi biso tóndima ete bisakweli yango ekokokisama na mobimba na yango mpe makambo yango ekosalema mosika te. Ebele ya bisakweli ya Biblia oyo esilá kokokisama endimisi biso ete oyo etikali, ekokokisama solo.a
Mpo na nini te kosomba ntango mpo na koluka koyeba ntina oyo Batatoli ya Yehova bandimaka ete “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso” ekómi pene mpe ntina oyo osengeli kobanga yango te? Sɛngá bango báyebisa yo eloko nini Biblia esɛngi yo osala mpo ozala na kati ya bato oyo Yehova Nzambe akobatela. (Emoniseli 16:14) Makambo oyo okoyekola ekosalisa yo okóma na elikya mpo na mikolo ezali koya.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba bisakweli ya Biblia oyo esilá kokokisama, talá mokapo 2 mpe 9 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 8]
Mosala ya Batatoli ya Yehova ezali nde kokokisa esakweli moko ya Biblia?