Bakristo basengeli kosala nini lelo oyo?
LELO oyo, bakristo ya solo bakɔtaka na politiki te. Mpo na nini? Ezali mpo balandaka ndakisa ya Yesu. Yesu ye moko alobaki boye: “Nazali moto ya mokili te.” Mpe abakisaki boye mpo na bayekoli na ye: “Bozali bato ya mokili te.” (Yoane 15:19; 17:14) Tótalela mwa bantina oyo bakristo basengeli kokɔta na politiki te.
1. Bato bakoki kolonga komitambwisa bango moko te. Biblia emonisi ete bato bazali te na likoki mpe na lotomo ya komiyangela bango moko. Mosakoli Yirimia akomaki boye: “Ezali te likambo ya moto oyo azali kotambola ete atambwisa lokolo na ye.”—Yirimia 10:23.
Kaka ndenge bato bakelamá te na likoki ya kopumbwa lokola ndɛkɛ, bakelamá mpe te na likoki ya komiyangela bango moko. Mpo na komonisa ete baguvɛrnema ya bato ezali na ndelo, David Fromkin, moto moko ya mayele na istware, akomaki boye na buku na ye (The Question of Government): “Bato nde batambwisaka baguvɛrnema; yango wana, baguvɛrnema yango elongaka te mpe ezali mpenza na avenire ya malonga te. Ezali na mwa nguya, kasi nguya yango ezali na ndelo.” Tokoki kokamwa te ndenge Biblia elobi na biso ete tótyela bato motema te!—Nzembo 146:3.
2. Bilimo mabe bazali kotambwisa mokili lelo oyo. Ntango Satana alakaki kopesa Yesu bokonzi ya mokili, Yesu awanganaki te ete Zabolo azalaki na nguya ya kopesa ye makonzi nyonso ya mokili. Kutu, mokolo mosusu, Yesu abengaki Satana “mokonzi ya mokili.” Mwa bambula na nsima, ntoma Paulo abengaki Satana “nzambe ya makambo ya ntango oyo.” (Yoane 14:30; 2 Bakorinti 4:4) Paulo akomelaki bakristo mosusu boye: “Tozali kobunda etumba . . . ná bayangeli ya mokili ya molili oyo, ná mampinga ya bilimo mabe na bisika ya likoló.” (Baefese 6:12) Bato mingi bayebi te ete bilimo mabe nde bazali koyangela mpenza mokili oyo. Lokola toyebi bongo, ndenge nini tosengeli kotalela politiki?
Kaka ndenge mbonge makasi ya mbu ememaka masuwa ya mike epai na epai, ebongiseli ya politiki mpe ezali kotambwisama na bilimo mabe, oyo bazali na nguya mingi. Mpe kaka ndenge bamatelo oyo bazali na masuwa yango bakoki mpenza te kopekisa mbonge yango, bato ya politiki mpe bazali mpenza te na likoki ya kokima nguya ya bilimo mabe yango. Mokano ya bilimo yango ezali kaka ya kobebisa bato mpe kobimisa makambo ya “mawa na mabele.” (Emoniseli 12:12) Na yango, kaka moto oyo aleki Satana ná bademo na ye na nguya nde akoki komema mbongwana ya solosolo na mabele. Moto yango ezali Yehova Nzambe ye moko.—Nzembo 83:18; Yirimia 10:7, 10.
3. Bakristo ya solo bakumisaka kaka Bokonzi ya Nzambe. Yesu ná bayekoli na ye bayebaki ete na ntango oyo abongisi, Nzambe akotya guvɛrnema moko na likoló, oyo ekoyangela mabele mobimba. Biblia ebengi guvɛrnema yango Bokonzi ya Nzambe mpe emonisi ete Yesu Kristo aponamaki mpo na kozala Mokonzi na yango. (Emoniseli 11:15) Lokola Bokonzi yango etali bato nyonso, Yesu asalaki ete “nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe” ezala likambo ya libosoliboso na mateya na ye. (Luka 4:43) Ateyaki mpe bayekoli na ye bábondelaka boye: “Bokonzi na yo eya.” Mpo na nini? Mpo ete ntango Bokonzi yango ekoyangela, ntembe ezali te ete mokano ya Nzambe ekosalema na likoló mpe na mabele.—Matai 6:9, 10.
Na nsima, nini ekokómela baguvɛrnema ya bato? Biblia epesi eyano ete baguvɛrnema “ya mabele mobimba esika bato bafandi” ekobebisama. (Emoniseli 16:14; 19:19-21) Soki moto andimi mpenza ete etikali moke Bokonzi ya Nzambe elongola bibongiseli nyonso ya politiki oyo bato basalá, na ntembe te, akoboya kopesa bibongiseli yango mabɔkɔ. Kutu, soki azali kopesa mabɔkɔ na baguvɛrnema ya bato, na ntembe te, akomonisa ete azali kotɛmɛla Nzambe.
Atako bakristo ya solo bakɔtaka te na makambo ya politiki, yango elingi nde koloba ete bakipaka te kosalisa bato na esika oyo bafandi? Tótalela eyano na lisolo oyo elandi.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 7]
Batatoli ya Yehova bakumisaka nde Bokonzi ya Nzambe, kasi balukaka te kobongisa makambo ya politiki