Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/5 lok. 23
  • Oyebaki yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyebaki yango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Masolo mosusu
  • “Kobá koloba; kokanga monɔkɔ te”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • Apesaki litatoli malamumalamu na “mpiko”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Liloba na Jehovah eleki na nguya!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/5 lok. 23

Oyebaki yango?

“Kiti ya kosambisa” epai bakendaki na ntoma Paulo ezalaki nini?

▪ Lisolo oyo ezali na Misala 18:12, 13 elobi ete Bayuda ya Korinti bafundaki Paulo ete azali kosakola kozanga ndingisa mpe bakendaki na ye na “kiti ya kosambisa” to beʹma (liloba ya Grɛki oyo elimboli “ebaelo”). Na Korinti ya kala, ezalaki na ebaelo moko ya molai pembeni ya agora to zando oyo ezalaki mosika te na sinagoga. Ndenge oyo batongaki ebaelo yango ezalaki kosalisa mpo na koloba liboso ya bato ebele. Batongaki yango na marbrɛ ya bulé mpe ya mpɛmbɛ mpe batondisaki yango na mayemi ya kitoko. Na ebaelo yango basalaki shambrɛ mibale ya kopema pembeni oyo ezalaki mpe na ba bancs ya marbrɛ mpe pavema oyo batya mayemi ndenge na ndenge.

Emonani ete ebaelo yango nde ezalaki kiti ya kosambisa esika ntoma Paulo atɛlɛmaki liboso ya prokonsule Galio, guvɛrnɛrɛ Moroma ya Akaya. Na ebaelo yango, bazuzi bazalaki koyoka ndenge moto azalaki kosamba mpe bazalaki koyebisa ebele ya bato oyo bayaki na esika yango bikateli ya lisambisi.

Na bingumba ya Grɛki, bato bazalaki koyangana liboso ya bisika wana oyo bazalaki kobenga beʹma mpo na kolobela makambo oyo etali bana-mboka. Makomami ya Grɛki oyo elobeli kosambisama ya Yesu oyo ezali na Matai 27:19 mpe Yoane 19:13, emonisi ete Ponsi Pilate atelemaki na beʹma ntango azalaki koloba liboso ya ebele ya bato.​—Misala 12:21.

Mpo na nini ndenge oyo babomaki Yesu ebɛtisaki Bayuda mosusu libaku?

▪ Ntoma Paulo alobaki boye mpo na bakristo ya liboso: “Biso tozali nde kosakola Kristo abakami na nzete, likambo oyo ezali kobɛtisa Bayuda libaku kasi ezali bozoba epai ya bikólo.” (1 Bakorinti 1:23) Mpo na nini ndenge oyo babomaki Yesu ebɛtisaki bato mosusu libaku?

Mpo na ndenge oyo babomaki Yesu mpe mimeseno ya bato oyo bazalaki kofanda na Moyen-Orient na siɛklɛ ya liboso, Ben Witherington III, moto moko ya mayele na makambo ya Biblia alobi ete ezalaki “liwa moko ya nsɔni mpenza mpo na bato ya ntango wana.” Bazalaki te kotalela yango lokola liwa ya martiru, oyo ezalaki liwa ya lokumu. Witherington alobi lisusu boye: “Bato ya ntango wana bazalaki kokanisa ete lolenge ya liwa oyo moto akufi na yango ezalaki komonisa lolenge oyo moto yango azalaki. Na yango, Yesu asengelaki kotalelama lokola moto mpamba, moto oyo azalaki monguna ya ekólo, oyo asengelaki kozwa etumbu oyo bazalaki kopesa moombo oyo akómi motomboki.” Na kotalela mimeseno wana, tokoki te koloba ete makambo oyo bakristo ya liboso balobaki mpo na liwa ya Yesu mpe lisekwa na ye ezalaki ya lokuta.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto