Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/5 nk. 26-27
  • Okoki kosala ete avenire na yo ezala malamu—Ndenge nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki kosala ete avenire na yo ezala malamu—Ndenge nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini okoki kozwa bikateli ya malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Bilenge—Bokosala nini na bomoi na bino?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Oyo okoki kosala mpo na kokokisa mikano na yo ya elimo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Zalá na kondima mpe zwáká bikateli na bwanya!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/5 nk. 26-27

Okoki kosala ete avenire na yo ezala malamu​—Ndenge nini?

NINI okoki kosala mpo ozala mpenza na bomoi ya malamu? Moko ya makambo oyo okoki kosala ezali ya kosalela likoki oyo ozali na yango ya kotalela makambo oyo bikateli ozali kozwa sikoyo ekoki komemela yo na mikolo ezali koya.

Toboyi te, ekoki kozala mpasi ozwa ekateli oyo ekomemela yo matomba bomoi na yo mobimba. Mpo na nini? Mpamba te bato mingi lelo oyo balingaka kozwa nokinoki eloko nyonso oyo bazali na mposa na yango. Na ndakisa, okoki komona ete kosalela batoli ya Biblia ekoki kosalisa libota na yo ezala na boyokani malamu. (Baefese 5:22–6:4) Kasi, mpo ezala bongo, esengeli opesaka ntango mpo na libota na yo, mpe okima motambo ya komipesa mingi na mosala na yo, na masano to na kominanola. Ndenge kaka ezalaka na makambo mingi ya bomoi, osengeli kopona kozwa bisengo ya ntango mokuse to matomba oyo ekoumela ntango molai. Ndenge nini okoki kozwa makasi oyo osengeli na yango mpo na kopona nzela ya malamu? Salelá makambo minei oyo elandi:

1 Luká koyeba liboso soki bikateli na yo ekobimisa matomba nini

Ntango olingi kozwa ekateli moko, meká kokanisa liboso ndenge makambo ekozala na nsima. Biblia epesi toli oyo: “Moto ya ekɛngɛ nde moto oyo amoni likama mpe amibombi.” (Masese 22:3) Soki na bosembo nyonso omeki komona likama oyo ekateli na yo ekoki kobimisa, boye okozala na mokakatano te mpo na koboya kosala likambo oyo ekoki komemela yo mpasi. Epai mosusu, ntango okanisi matomba ya ntango molai oyo ekateli ya bwanya oyo olingi kozwa ekomemela yo, yango ekotinda yo ozwa ekateli yango.

Omituna boye: ‘Ekateli oyo nalingi kozwa, ekomemela ngai nini nsima ya mbula moko, mbula 10 to mbula 20? Ekateli yango ekosala ngai nini na motema mpe na nzoto? Ekateli na ngai ekomemela libota na ngai mpe bato mosusu oyo nakipaka matomba nini?’ Oyo eleki ntina, omituna boye: ‘Ekateli na ngai ekosepelisa Nzambe? Ekosala nini na boyokani na ngai ná Nzambe?’ Lokola Biblia ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe, ekoki kosalisa yo oyeba makambo nini esepelisaka ye mpe kokebisa yo na mitambo oyo okokaki koyeba te.​—Masese 14:12; 2 Timote 3:16.

2 Zwá ekateli oyo ezali malamu mpo na yo

Na esika ya kozwa bikateli bango moko, bato mingi bamekolaka kaka bato mosusu. Kasi, ezali kaka te mpo bato mingi bazali kosala likambo moko boye nde likambo yango ekoki kopesa matomba. Zwá ekateli oyo ezali malamu mpo na yo. Tózwa ndakisa ya Nathalie.a Alobi boye: “Nazalaki na mposa ya libala moko ya malamu. Kasi nayebaki ete nakokaki te kozwa libala ya malamu soki nakobi kaka na bomoi ya ndenge wana. Na eteyelo, baninga na ngai nyonso, ezala ya mibali to ya basi, bazalaki mayele mingi. Atako bongo, bazalaki ntango nyonso kozwa bikateli ya mabe na bomoi na bango. Bazalaki ntango nyonso kozwa bamakango kilikili. Lokola bango, ngai mpe nazalaki na mibali ebele. Bomoi ya ndenge wana ememelaki ngai mpasi mingi na motema.”

Nathalie abandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Alobi boye: “Epai ya Batatoli ya Yehova, namonaki ete bilenge bazalaki na esengo mpe bato oyo babalá, bazalaki na mabala ya malamu. Atako ezalaki pɛtɛɛ te mpo na ngai, malɛmbɛmalɛmbɛ, nabongolaki bizaleli na ngai mpe bomoi na ngai.” Matomba nini azwaki? Nathalie alobi boye: “Mposa na ngai ezalaki ete nabalana ná moto oyo nazali kosepela na ye mingi. Nsukansuka, nabalanaki na mobali moko oyo azalaki mpe kosambela Yehova. Namonaka ete Nzambe apesá ngai libala moko ya malamu koleka oyo nazalaki kokanisa.”

3 Moná mosika

Mpo okwea te na motambo ya kokanisa kaka matomba oyo okoki kozwa sikoyo, yo mpe osengeli komona mosika avenire nini olingi kozala na yango mpe kosala makasi mpo na kozala na yango. (Masese 21:5) Kosuka kaka te na komona bomoi mokuse oyo moto azali na yango, ya mbula 70 to 80. Moná lokola nde osili kozwa bomoi ya seko oyo Biblia elobeli na mikolo ezali koya.

Biblia elobi ete na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu Kristo, Nzambe afungoleli bato nzela ya bomoi ya seko. (Matai 20:28; Baroma 6:23) Nzambe alaki ete mosika te, mokano na ye ya ebandeli mpo na bato mpe mabele ekokokisama. Baoyo balingaka Nzambe bakozwa libaku ya kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekozonga paradiso. (Nzembo 37:11; Emoniseli 21:3-5) Yo mpe okoki kozala na bomoi ya ndenge wana na mikolo ezali koya soki ozali komona mosika.

4 Salá makasi okokisa mikano na yo

Okoki kosala nini mpo ozwa bomoi ya seko oyo Nzambe alaki? Bandá na kozwa boyebi ya Nzambe. (Yoane 17:3) Boyebi ya sikisiki ya Biblia ekosalisa yo ondima ete bilaka ya Nzambe mpo na mikolo ezali koya ekokokisama. Kondima ya ndenge wana ekoki kopesa yo makasi ya kosala mbongwana nyonso oyo esengeli mpo Nzambe andima yo.

Tózwa ndakisa ya Michael. Alobi boye: “Nabandaki kolangwa masanga mpe komɛla bangi ntango nazalaki na mbula 12. Nakɔtaki na etuluku moko ya bilenge ya mobulu mpe namonaki ete nakokufa liboso nakokisa mbula 30. Mbala na mbala nalukaki komiboma mpo na nkanda makasi mpe mitungisi oyo nazalaki na yango. Nazalaki koluka bomoi mosusu ya malamu koleka oyo nazalaki na yango, kasi nazwaki yango te.” Ntango Michael azalaki naino na kelasi, moninga na ye moko ya mobulu akómaki koyekola Biblia ná Batatoli ya Yehova. Michael andimaki mpe koyekola Biblia.

Makambo oyo Michael ayekolaki na Biblia ebongolaki ndenge oyo azalaki kotalela avenire na ye. Alobi boye: “Nayekolaki ete na mikolo ezali koya, mabele ekozonga paradiso mpe bato bakofanda na kimya, kozanga mitungisi. Nakómaki komona ete yango nde avenire na ngai. Namityelaki mokano ya kokóma moninga ya Yehova. Atako bongo, ezalaki ntango nyonso pɛtɛɛ te kosepelisa Yehova. Ata ntango nazalaki koyekola Biblia, na bantango mosusu, nazalaki kolangwa masanga mpe kobima ná mwana mwasi moko.”

Nini esalisaki Michael atika bizaleli wana ya mabe mpe abongola bomoi na ye? Alobi boye: “Ndeko oyo azalaki koyekola na ngai Biblia alendisaki ngai natángaka Biblia mokolo na mokolo mpe nayanganaka elongo na bato oyo balingaka kosepelisa Nzambe. Namonaki ete baninga oyo nazalaki na bango bazalaki kaka kotinda ngai na nzela mabe. Atako bakómaki lokola libota na ngai, nakataki boninga ná bango.”

Michael amityelaki mikano oyo asengelaki kokokisa na ntango mokuse mpe aponaki makambo nini asengelaki kotya na esika ya liboso, oyo esalisaki ye akokisa mokano monene ya koyokanisa bomoi na ye na mibeko ya Nzambe. Yo mpe okoki kosala bongo. Komá mikano oyo ozali na yango, ezala ya ntango molai mpe makambo oyo okosala na katikati, oyo ekosalisa yo okokisa mikano yango. Yebisá mikano yango na baoyo bakopesa yo mabɔkɔ, mpe sɛngá bango básalisa yo oyeba soki ozali kokende liboso.

Kozongisa nsima te likambo ya koyekola makambo ya Nzambe mpe kolanda litambwisi na ye na bomoi na yo. Salá sikoyo makambo oyo ekotinda yo olinga Nzambe mpe Liloba na ye Biblia. Liloba ya Nzambe elobi boye mpo na moto oyo asalelaka mitinda ya Biblia: “Nyonso oyo azali kosala ekolonga.”​—Nzembo 1:1-3.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na lisolo oyo bankombo mosusu ezali ya bango te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto