Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/7 lok. 18
  • Ntango Nzambe alimbisaka, abosanaka mpe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntango Nzambe alimbisaka, abosanaka mpe?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Masolo mosusu
  • Nzambe oyo ‘alimbisaka mabe’
    Pusaná penepene na Yehova
  • Yehova, Nzambe Oyo ‘Alimbisaka’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Kolimbisa mpe kobosana​—⁠Ndenge nini ekoki kosalema?
    Lamuká!—1995
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/7 lok. 18

Pusaná penepene na Nzambe

Ntango Nzambe alimbisaka, abosanaka mpe?

EYANO ya mokuse ezali ɛɛ. Yehova alaki bato oyo asepelaka na bango boye: “Nakolimbisa libunga na bango, mpe nakokanisa lisumu na bango lisusu te.” (Yirimia 31:34) Boye, Yehova amonisi biso ete ntango alimbisaka basumuki oyo babongoli motema, abosanaka masumu oyo basalaki. Kasi, yango elingi nde koloba mpenza ete Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba azangi likoki ya koyeba lisusu masumu oyo alimbisi? Maloba ya Ezekiele emonisi polele ndenge oyo Nzambe alimbisaka masumu mpe abosanaka yango.​—Tángá Ezekiele 18:19-22.

Na nzela ya mosakoli Ezekiele, Yehova asakolaki etumbu mpo na kozanga bosembo ya Yuda mpe Yerusaleme. Ekólo yango mobimba esundolaki losambo ya Yehova mpe mokili yango etondaki na mobulu. Yehova asakolaki ete bato ya Babilone bakobebisa Yerusaleme. Kasi, ata ntango azalaki kosakola nsango ya bitumbu, Yehova apesaki mpe nsango ya elikya. Apesaki moto na moto libaku ya kopona; likambo oyo moto na moto aponaki kosala ezalaki na motó na ye moko.​—Vɛrsɛ 19, 20.

Kasi, bongo soki moto atiki kosala mabe mpe asali oyo ezali malamu? Yehova alobaki boye: “Moto mabe, soki abongwani, atiki masumu na ye nyonso oyo asalaki mpe soki abateli mpenza mibeko na ngai nyonso mpe asali makambo ya bosembo mpe ya boyengebene, akotikala mpenza na bomoi. Akokufa te.” (Vɛrsɛ 21) Ya solo, Yehova azalaki ‘kosepela kolimbisa’ mosumuki oyo atikaki nzela na ye ya mabe mpe amonisi ete abongoli mpenza motema.​—Nzembo 86:5.

Bongo lisumu oyo moto yango asalaki? Yehova alobi ete “makambo na ye nyonso ya kobuka mibeko oyo asalaki​—bakokanisela ye yango lisusu te.” (Vɛrsɛ 22) Simbá ete masumu oyo moto oyo abongoli motema asalaki “bakokanisela ye yango lisusu te.” Mpo na nini yango ezali likambo moke te?

Na Biblia, liloba ya Ebre oyo ebongolami na “kokanisa” ekoki kolimbola makambo mingi, kasi te kaka koyeba lisusu makambo oyo eleká. Buku moko elobi boye mpo na liloba yango: “Kutu mbala mingi, liloba yango emonisaka kosala likambo moko, to basalelaka yango elongo na bavɛrbɛ oyo elobelaka kosala likambo.” Boye, “kokanisa” ekoki kolimbola “kosala likambo.” Na yango, ntango Yehova alobi na mosumuki oyo abongoli motema ete masumu na ye “bakokanisela ye yango lisusu te,” alingi nde koloba ete akosala moto yango eloko te mpo na masumu na ye, na ndakisa kofunda to kopesa ye etumbu.a

Maloba ya Ezekiele 18:21, 22 emonisi ete ndenge oyo Nzambe alimbisaka ezali mpenza kosimba motema. Ntango Yehova alimbisaka masumu na biso, abombaka yango te mpo na kopesa biso etumbu na mikolo ezali koya. Kutu, abwakaka nsima ya mokɔngɔ na ye masumu ya moto oyo abongoli motema. (Yisaya 38:17) Ezali lokola nde abomaka masumu yango nyonso.​—Misala 3:19.

Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tozali na mposa ya motema mawa ya Nzambe ntango nyonso. Kutu, mbala mingi tosalaka masumu. (Baroma 3:23) Yehova alingi tóyeba ete soki tobongoli mpenza motema, akondima kolimbisa. Mpe ntango alimbisaka, abosanaka, elingi koloba, akotángela biso masumu yango te mpo na kofunda to kopesa biso etumbu. Likanisi yango ezali mpenza kobɔndisa! Motema mawa ya Nzambe etindi yo oluka kopusana penepene na ye?

Botángi ya Biblia mpo na Yuli:

◼ Ezekiele 6-20

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ndenge moko mpe, “kokanisa lisumu” ekoki kolimbola “kopesa bato oyo basali lisumu etumbu.”​—Yirimia 14:10.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto