Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w13 15/1 nk. 22-26
  • Tósalela Yehova kozanga kotala nsima

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tósalela Yehova kozanga kotala nsima
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MABE OYO PAULO ASALAKI LIBOSO AKÓMA MOKRISTO
  • OYOKAKA MAWA MPO NA LIKAMBO MOKO OYO ELEKÁ?
  • TALÁ NDE LIBOSO
  • KOYOKA MAWA ATA MOKE TE NDENGE OPONÁ KOSALELA YEHOVA
  • NDENGE NINI TOKOKI KOSALELA NZAMBE KOZANGA KOYOKA MAWA MPO NA BOMOI NA BISO YA KALA?
  • Landá ndakisa ya Paulo mpo okola na elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mpo na nini Saulo anyokolaki baklisto?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Monyokoli amoni kongɛnga ya makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Lisangá “ekɔtaki na eleko moko ya kimya”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
w13 15/1 nk. 22-26

Tósalela Yehova kozanga kotala nsima

“Nabosani biloko oyo ezali na nsima mpe nazali kosala nyonso mpo nazwa biloko oyo ezali na liboso.”​—FLP. 3:13.

BIMISÁ MAKANISI OYO YA NTINA:

  • Nini esalisaki ntoma Paulo abosana makambo mabe oyo asalaki kala?

  • Toli nini Biblia epesi mpo na kozala na kimya ya makanisi?

  • Toli nini ekoki kosalisa biso tósalela Nzambe kozanga koyoka mawa mpo na bomoi na biso ya kala?

1-3. (a) Makambo nini ekoki kopesa biso mawa, mpe yango ekoki kosala ete tómiyoka ndenge nini? (b) Ndenge nini ndakisa ya Paulo ekoki kosalisa biso tósalela Nzambe kozanga koyoka mawa mpo na makambo oyo eleká?

MOKOMI moko ya maloba ya ntoki akomaki ete: “Na maloba nyonso ya mabe oyo lolemo ebimisaka to oyo moto akomaka, oyo eleki mabe ezali oyo: ‘Esengelaki nasala to naloba boye!’” Mokomi yango ezali John Whittier, mpe azalaki kolobela makambo oyo toyokaka mawa nsima ya kosala to koloba yango, oyo tomonaka ete tokokaki kobandela yango to kosala yango ndenge mosusu. “Koyoka mawa” elingi koloba koyoka mpasi mpo na likambo oyo tosalaki to ntango mosusu oyo tosalaki te, mpe ekoki kolimbola “kolela lisusu” mpo na likambo yango. Biso nyonso tosalá makambo oyo tomonaka ete soki tokokaki kobandela bomoi, tolingaki kosala yango ndenge mosusu. Makambo nini oyo eleká, oyo oyokaka mawa mpo na yango?

2 Bato mosusu basalá mabunga minene, ata mpe masumu minene, na bomoi na bango. Basusu basalá mpenza likambo ya mabe te, kasi bamitunaka soki bikateli mosusu oyo bazwá na bomoi na bango ezalaki mpenza ya malamu. Bato mosusu batiká kokanisa makambo oyo eleká mpe bazali kokoba na bomoi oyo bazali na yango sikoyo. Basusu bamilelalelaka ntango nyonso mpo na makambo oyo eleká mpe balobaka ete: “Soki nayebaka, mbɛlɛ.” (Nz. 51:3) Bongo yo? Ozalaka na mposa ete banda lelo, osalela Nzambe kozanga ete oyokaka ntango nyonso mawa mpo na makambo oyo eleká? Ezali nde na ndakisa ya moto moko oyo ekoki kosalisa biso tósala bongo? Ɛɛ, tozali na ndakisa ya ntoma Paulo.

3 Paulo asalaki mabunga minene na bomoi na ye, kasi azwaki mpe bikateli ya malamu. Ayokaki mawa makasi mpo na mabunga na ye ya kala, kasi ayekolaki mpe kosala nyonso oyo akokaki na mosala ya Nzambe. Tótala ndenge oyo ndakisa na ye ekoki koteya biso tósalela Nzambe kozanga koyoka mawa mpo na makambo oyo eleká.

MABE OYO PAULO ASALAKI LIBOSO AKÓMA MOKRISTO

4. Makambo nini ya mabe ntoma Paulo asalaki liboso akóma mokristo?

4 Na bolenge na ye, Paulo azalaki Mofarisai mpe asalaki makambo oyo na nsima ayokaki mawa mpo na yango. Na ndakisa, akambaki etuluku ya bato oyo bazalaki konyokola makasi bayekoli ya Kristo. Biblia emonisi ete mbala moko nsima ya kobomama ya Stefano, “Saulo [oyo na nsima akómaki kobengama Paulo] abandaki konyokola lisangá na ndenge ya mabe. Azalaki kokɔta na ndako moko na moko mpe kobimisa mibali ná basi, azalaki kokangisa bango na bolɔkɔ.” (Mis. 8:3) Albert Barnes, moto moko ya mayele oyo alimbolaka maloba ya Biblia alobaki ete liloba ya Grɛki oyo ebongolami na ‘konyokola na ndenge ya mabe’ ezali “maloba makasi oyo emonisi molende mpe nkanda makasi oyo [Saulo] azalaki na yango ntango azalaki konyokola bakristo.” Na yango, Barnes alobi ete: “Nkanda oyo Saulo azalaki na yango mpo na lingomba ezalaki lokola nkanda oyo nyama mabe ezalaka na yango.” Lokola Saulo azalaki na molende mingi mpo na lingomba ya Bayuda, azalaki kokanisa ete Nzambe nde apesaki ye mokumba ya kosukisa lingomba ya bokristo. Yango wana, anyokolaki bakristo na nkanda makasi mpe ‘azalaki kaka kokanela mpe koluka koboma . . . mibali ná basi.’​—Mis. 9:1, 2; 22:4.a

5. Limbolá ndenge oyo Saulo atikaki konyokola bayekoli ya Yesu mpe akómaki kosakola mpo na Kristo.

5 Saulo azalaki na mokano ya kokende na Damasi mpo na kobimisa bayekoli ya Yesu na bandako na bango na makasi mpe komema bango na Yerusaleme mpo básamba liboso ya Sanedrina. Kasi, akokisaki mokano na ye te mpo azalaki nde kobundisa Mokonzi ya lisangá ya bokristo. (Ef. 5:23) Ntango Saulo azalaki na nzela mpo na kokende na Damasi, Yesu abimelaki ye, mpe pole moko oyo ebimaki na ndenge ya likamwisi ebomaki ye miso. Na nsima, Yesu atindaki Saulo na Damasi mpo akende kokutana na moto mosusu kuna. Toyebi likambo oyo esalemaki na nsima.​—Mis. 9:3-22.

6, 7. Nini emonisi ete Paulo abosanaki te ete asalaki mabunga minene liboso akóma mokristo?

6 Ntango kaka Paulo akómaki mokristo, atikaki makambo oyo azalaki kosala liboso. Na esika atikala monguna monene ya lisangá ya bokristo, akómaki nde kokɔtela yango. Atako bongo, na nsima, akomaki mpo na ye moko ete: “Ya solo, boyokaki nsango ya etamboli na ngai ya kala na lingomba ya Bayuda, ete nazalaki konyokola lisangá ya Nzambe mpe kopanza yango mingi koleka.” (Gal. 1:13) Na nsima, alobelaki lisusu makambo mabe oyo asalaki kala ntango akomelaki Bakorinti, Bafilipi, mpe Timote. (Tángá 1 Bakorinti 15:9; Flp. 3:6; 1 Tim. 1:13) Paulo azalaki kosepela te kokomela bandeko makambo mabe oyo asalaki, kasi alingaki mpe te kosala lokola nde asalaki likambo moko ya mabe te. Ayebaki malamu ete asalaki mabunga minene.​—Mis. 26:9-11.

7 Frederic Farrar, moto moko ya mayele oyo alimbolaka maloba ya Biblia alobelaki makambo oyo Saulo asalaki na “mosala wana ya nsɔmɔ ya konyokola bakristo.” Farrar abakisaki ete kaka soki toyebi makambo nyonso ya mabe oyo Saulo asalaki na eleko wana ya mabe ya bomoi na ye nde “tokoyeba mawa makasi oyo akokaki koyoka mpe ndenge oyo bato mosusu bakokaki koloba mabe mpo na ye.” Ekoki kozala ete, na bantango mosusu, ntango Paulo azalaki kokende kotala masangá ndenge na ndenge, bandeko mosusu oyo bamonaki ye mpo na mbala ya liboso bazalaki kotuna ye ete: ‘Yo nde Paulo, oyo azalaki konyokola biso?’​—Mis. 9:21.

8. Paulo amiyokaki ndenge nini mpo na mawa mpe bolingo oyo Yehova ná Yesu bamoniselaki ye, mpe yango eteyi biso nini?

8 Kasi, Paulo ayebaki malamu ete ezalaki kaka mpo na boboto monene ya Nzambe nde azwaki libaku ya kokokisa mosala na ye ya kosakola. Yango wana, koleka bakomi mosusu nyonso ya Biblia, Paulo alobeli ezaleli wana mbala soki 90 na mikanda 14 oyo akomaki. (Tángá 1 Bakorinti 15:10.) Paulo asepelaki mingi na ndenge oyo Nzambe amoniselaki ye motema mawa, mpe alingaki kosala nyonso mpo ete boboto monene yango ekende mpamba te. Yango wana, ‘asalaki mosala makasi’ koleka bantoma nyonso mosusu. Ndakisa ya Paulo emonisi polele ete soki toyamboli masumu na biso mpe tobongoli bizaleli na biso, Yehova akozanga te kolimbisa ata masumu na biso ya minene, na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu. Yango ezali liteya malamu mpo na moto nyonso oyo azalaka na mokakatano mpo na kondima ete ye mpe akoki kozwa matomba na mbeka ya Kristo. (Tángá 1 Timote 1:15, 16.) Atako liboso Paulo anyokolaki Kristo makasi, na nsima, akomaki ete: “Mwana ya Nzambe . . . alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.” (Gal. 2:20; Mis. 9:5) Ya solo, Paulo ayekolaki ndenge ya kosalela Nzambe kozanga ete ayokaka ntango nyonso mawa mpo na bomoi na ye ya kala. Ndakisa na ye eteyi yo nini?

Paulo ayekolaki ndenge ya kosalela Nzambe kozanga koyoka mawa

OYOKAKA MAWA MPO NA LIKAMBO MOKO OYO ELEKÁ?

9, 10. (a) Nini etindaka basaleli mosusu ya Yehova báyoka mawa? (b) Mpo na nini ezali mabe komitungisa ntango nyonso mpo na makambo oyo eleká?

9 Osalá makambo mosusu oyo oyokaka mawa mpo na yango? Ekómelá yo ete obebisa ntango mpe makasi na yo mpo na makambo oyo ezali na ntina te? Osalaki likambo moko oyo epesaki basusu mpasi? To ekoki kozala ete oyokaka mawa mpo na makambo mosusu oyo osalá. Motuna yango oyo: ‘Osengeli kosala nini mpo na yango?’

10 Bato mingi bamitungisaka ntango nyonso! Bamipesaka foti mpe bayokaka ntango nyonso mawa mpo na mabunga na bango ya kala. Kasi kosala bongo ezali nde komibakisela mitungisi. Komitungisa esilisaka nde mikakatano? Soki moke te! Kanisá ete olingi kokende liboso, kasi olekisi bangonga mingi ofandi na kiti moko oyo ezali koningananingana yango moko; ata soki obimisi makasi ndenge nini, okotikala kaka esika moko! Na esika omitungisa, ekozala malamu osala makambo mosusu oyo ekoki kobimisa matomba. Na ndakisa, okoki kosɛnga moto oyo osalaki mabe bolimbisi, ntango mosusu mpo na kozongisa boyokani ná ye. Luká koyeba nini esalaki ete osala libunga wana, mpo ozongela yango lisusu te. Atako bongo, yebá ete ezali na makambo mosusu ya bomoi oyo mbala mosusu okokoka kobongola te. Kasi, komitungisa ekoki kopekisa yo omipesa na mosala ya Nzambe. Longola yango, komitungisa efutaka te!

11. (a) Tosengeli kosala nini mpo Yehova ayokela biso mawa mpe amonisela biso motema-boboto? (b) Toli nini Biblia epesi biso mpo tótika kokanisa mingi mabunga na biso ya kala mpe tózala na kimya ya makanisi?

11 Bandeko mosusu batikaka ete mabunga na bango ya kala etungisa bango tii bákóma ata kokanisa ete bazali na valɛrɛ te na miso ya Nzambe. Bakoki kokanisa ete Nzambe akoki koyokela bango mawa te, mpo masumu oyo basalá eleki minene to mpo bakweaka mbala na mbala. Kasi, basengeli koyeba ete ata soki basalaki lisumu ya ndenge nini kala, bakoki kobongola motema, kobongwana, mpe kosɛnga bolimbisi. (Mis. 3:19) Yehova akoki koyokela bango mawa mpe komonisela bango motema-boboto, ndenge asalaki yango mpo na bato mosusu. Yehova amonisaka boboto na ye epai ya bato komikitisa, ya mitema sembo, mpe oyo babongoli mpenza motema. Nzambe asalaki bongo mpo na Yobo, oyo alobaki ete: “Nabongoli motema [to nayoki mawa] na kati ya putulu ya mabele mpe na putulu ya mɔtɔ.” (Yobo 42:6) Biso nyonso tosengeli kolanda toli oyo Biblia epesi biso mpo tózala na kimya ya makanisi: “Ye oyo azali kozipa makambo na ye oyo ebuki mibeko akolonga te, kasi ye oyo ayamboli mpe atiki yango akoyokelama mawa.” (Mas. 28:13; Yak. 5:14-16) Na yango, tokoki koyambola lisumu na biso epai ya Nzambe, kobondela ye alimbisa biso, mpe kosala makambo oyo esengeli mpo na kobongisa mabe oyo tosali. (2 Ko. 7:10, 11) Soki tosali makambo wana, Nzambe na biso oyo ‘alimbisaka mpenza,’ akozanga te koyokela biso mawa.​—Yis. 55:7.

12. (a) Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Davidi ntango lisosoli na biso ezali kotungisama? (b) Na ndimbola nini Yehova ayokaki mawa, mpe ndenge nini koyeba likambo yango ekoki kosalisa biso? (Talá etanda.)

12 Libondeli ezalaka na nguya mingi mpe Nzambe akoki kosalisa biso na nzela na yango. Na libondeli moko ya kondima, Davidi abimisaki makanisi oyo ezalaki na motema na ye mpe libondeli yango ekomami na mokanda ya Nzembo. (Tángá Nzembo 32:1-5.) Ndenge Davidi amonaki yango, ntango azalaki koluka kopekisa lisosoli na ye oyo ezalaki kotungisa ye, anyokwamaki mingi koleka! Emonani ete atungisamaki mingi na makanisi, abɛlaki, mpe abungisaki esengo na ye ntango ayambolaki naino lisumu na ye te. Kasi ntango nini Davidi alimbisamaki mpe motema na ye ekitaki? Ezali kaka nsima ya koyambola lisumu na ye epai ya Nzambe. Yehova ayanolaki na mabondeli ya Davidi mpe apesaki ye makasi ya kokoba na bomoi na ye mpe kosala makambo ya malamu. Ndenge moko mpe, soki obondeli na motema moko, okoki kozala na elikya ete Yehova akotya mpenza likebi na libondeli na yo. Soki mabunga na yo ya kala ezali kotungisa yo, luká kosala nyonso oyo okoki mpo na kobongisa mabe oyo osalaki, mpe zalá na kondima ete Yehova alimbisi yo!​—Nz. 86:5.

TALÁ NDE LIBOSO

13, 14. (a) Lelo oyo tosengeli komibanzabanza libosoliboso mpo na likambo nini? (b) Mituna nini ekoki kosalisa biso tótalela malamumalamu bomoi oyo tozali na yango lelo oyo?

13 Balobaka ete esengeli kotalaka nsima mpo na kozwa mateya na bomoi, kasi tosengeli te kozongisaka ntango nyonso makanisi na nsima; tosengeli nde kotala liboso. Na yango, na esika tómitungisaka mpo na makambo oyo eleká, tosengeli nde komibanzabanza mpo na bomoi na biso ya lelo mpe ya mikolo ezali koya. Tosengeli komituna boye: Makambo nini nazali kosala lelo oyo, to nazali kosala te, oyo nsima ya bambula nakoki koya komona ete esengelaki te nasala yango to esengelaki nasala yango ndenge mosusu? Nazali kosala makasi natikala sembo mpe naboya kosala makambo mosusu oyo ekoki kopesa ngai mawa na mikolo ezali koya?

14 Lokola bolɔzi monene ekómi pene, tosengeli kotika te ete makanisi lokola oyo elandi etungisa biso: ‘Mpo na nini nasalaki mingi te na mosala ya Nzambe? Mpo na nini nasalaki mosala ya mobongisi-nzela te ntango nazwaki libaku ya kosala yango? Nini epekisaki ngai nakokisa masɛngami mpo nakóma mosaleli na misala? Nasalaki mpenza makasi mpo na kolata bomoto ya sika? Nazali lolenge ya moto oyo Yehova alingi komona na mokili na ye ya sika?’ Na esika ete mituna wana etungisa biso, esengeli nde kosalisa biso tómitalela malamumalamu mpo tóyeba soki tozali komipesa mobimba na mosala ya Yehova. Soki tosali bongo te, tokoki kokoba na lolenge ya bomoi oyo ekoki kosala ete tóya koyoka mawa na nsima.​—2 Tim. 2:15.

KOYOKA MAWA ATA MOKE TE NDENGE OPONÁ KOSALELA YEHOVA

15, 16. (a) Makambo nini bandeko mingi bamipimelaki mpo na kotya mosala ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na bango? (b) Mpo na nini tosengeli koyoka mawa te mpo na makambo oyo tomipimelaki mpo na kotya mosala ya Nzambe na esika ya liboso?

15 Ezali boni mpo na bandeko oyo bamipimelá makambo mosusu mpo na kosalela Yehova na mosala ya ntango nyonso? Mbala mosusu, mpo okómisa bomoi na yo pɛpɛlɛ mpe ozala na ntango mingi mpo na mosala ya Nzambe, oboyaki kosala mosala to mombongo moko boye oyo ekokaki kosalisa yo okóma na mbongo mingi. To mbala mosusu ondimá kotikala monzemba to mpe soki obalá, ozwá ekateli ya kozala na bana te, mpo omipesa mobimba na motindo moko ya mosala ya ntango nyonso, oyo okokaki kosala yango te soki ozwaki bikateli wana te, na ndakisa mosala ya Betele, mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi, Bandako ya Mayangani mpe Babetele, mosala ya zongazonga, to mosala ya misionɛrɛ. Osengeli nde koyoka mawa mpo na bikateli wana oyo ozwaki mpo sikoyo bambula na yo ebandi kopusana? Osengeli nde kokanisa ete ezalaki na ntina te omipimela makambo wana to osala yango na ntango wana? Soki moke te!

16 Ozwaki bikateli wana mpo ozalaki kolinga Yehova mingi mpe ozalaki na mposa makasi ya kosalisa bato mosusu oyo bazalaki na mposa ya kosalela ye. Osengeli te kokanisa ete okokaki kozala na bomoi ya malamu koleka soki ozwaki bikateli ya ndenge mosusu. Osengeli kozala na esengo mingi ya koyeba ete osalaki oyo omonaki ete ezali malamu mpo na yo. Osengeli kosepela ndenge osalaki likambo eleki malamu oyo okokaki kosala mpo na kosalela Yehova. Akobosana te makambo oyo omipimelaki mpo na mosala na ye. Ntango okozala na bomoi ya solosolo na mokili ya sika, akosopela yo ebele ya mapamboli koleka kutu oyo okoki kokanisa!​—Nz. 145:16; 1 Tim. 6:19.

NDENGE NINI TOKOKI KOSALELA NZAMBE KOZANGA KOYOKA MAWA MPO NA BOMOI NA BISO YA KALA?

17, 18. (a) Nini esalisaki Paulo asalela Nzambe kozanga koyoka mawa? (b) Ekateli nini ozwi na oyo etali bomoi na yo ya kala, ya lelo oyo, mpe ya mikolo ezali koya na mosala ya Yehova?

17 Nini esalisaki Paulo akoba kosalela Nzambe kozanga ete ayokaka mawa mpo na bomoi na ye ya kala? Akomaki ete: “Nabosani biloko oyo ezali na nsima mpe nazali kosala nyonso mpo nazwa biloko oyo ezali na liboso, nazali kolanda kopota mbangu tii na nsuka mpo nazwa libonza.” (Tángá Bafilipi 3:13, 14.) Paulo azalaki te kokanisa ntango nyonso makambo mabe oyo asalaki ntango azalaki na lingomba ya Bayuda. Asalaki nde nyonso oyo akokaki mpo azwa libonza ya bomoi ya seko oyo Nzambe alaki.

18 Biso nyonso tokoki kosalela toli oyo ezali na maloba wana ya ntoma Paulo. Na esika ya kokanisaka ntango nyonso bomoi na biso ya kala, to makambo oyo tokoki kobongola te, tosengeli nde kotya makanisi na biso na mapamboli oyo ezali liboso. Ya solo, ntango mosusu tokokoka te kobosana libela mabunga na biso ya kala, kasi tosengeli te komipesa ntango nyonso foti mpo na yango. Tokoki kosala makasi mpo tóbosana makambo oyo eleká, tósala nyonso oyo tokoki mpo na kosalela Nzambe, mpe tótya miso na biso na mapamboli oyo ezali liboso!

a Lokola na bisika mingi Biblia etángi mpe basi na kati ya bato oyo Saulo azalaki konyokola, yango emonisi ete basi bazalaki kosala mosala monene mpo na kopalanganisa lingomba ya bokristo na siɛklɛ ya liboso, kaka ndenge bazali kosala lelo.​—Nz. 68:11.

NA NDIMBOLA NINI YEHOVA AYOKAKI MAWA?

Na bisika mingi Biblia elobi ete Yehova “ayokaki mawa.” (Yona 3:10; Eba. 6:6, 7; Bas. 2:18; 1 Sa. 15:11) Lokola mosala ya Nzambe ezali ya kokoka, akoki soki moke te koyoka mawa mpo asalaki libunga. (Mit. 23:19; Mib. 32:4) Nzokande, na monɔkɔ ya Ebre, koyoka mawa ekoki kolimbola kobongola makanisi to likambo oyo tokanaki kosala. Na ndakisa, lokola Yehova azalaka makambo makasimakasi te, abongolaka makanisi oyo azalaki na yango soki makambo ebongwani, mpe azali na motema mawa, andimaka kobongola lolenge oyo alingaki kosala makambo epai ya baoyo babungaki nzela soki babongoli motema mpe babongwani.​—Yir. 18:7-10.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto