Etanda ya makambo ezali na kati
15/01/2014
© 2014 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania.
NIMERO YA BOYEKOLI
3-9 SANZA YA MISATO 2014
Tósambela Yehova, Mokonzi ya seko
LOKASA 7 • NZEMBO: 106, 46
10-16 SANZA YA MISATO 2014
Mbula 100 ya Boyangeli—Eteyi yo nini?
LOKASA 12 • NZEMBO: 97, 101
17-23 SANZA YA MISATO 2014
Zwá bikateli ya malamu ntango ozali naino elenge
LOKASA 17 • NZEMBO: 41, 89
24-30 SANZA YA MISATO 2014
Salelá Yehova liboso ete mikolo ya mpasi eya
LOKASA 22 • NZEMBO: 54, 17
31 SANZA YA MISATO 2014–6 SANZA YA MINEI 2014
“Bokonzi na yo eya”—Kasi ntango nini?
LOKASA 27 • NZEMBO: 108, 30
MASOLO YA BOYEKOLI
▪ Tósambela Yehova, Mokonzi ya seko
Lisolo oyo ekomonisa ete Yehova azali ntango nyonso Mokonzi mpe ekomonisa ndenge oyo amonisaki bokonzi na ye likoló ya bikelamu na ye ya likoló mpe oyo ezali awa na mabele. Ekolendisa mpe biso tólanda ndakisa ya bato ya ntango ya kala oyo baponaki kosambela Yehova, Mokonzi ya seko.
▪ Mbula 100 ya Boyangeli—Eteyi yo nini?
Lisolo oyo ekosalisa biso tókóma na botɔndi mingi mpo na makambo oyo Bokonzi ya Masiya esali na boumeli ya mbula 100 ya liboso oyo ayangeli. Ekolendisa mpe biso tózala bato ya sembo ya Bokonzi yango, mpe ekotinda biso tókanisa na mozindo na ndimbola ya polele ya mokapo na biso ya mobu 2014.
▪ Zwá bikateli ya malamu ntango ozali naino elenge
▪ Salelá Yehova liboso ete mikolo ya mpasi eya
Nakosala nini na bomoi na ngai? Ezali motuna moko ya ntina mingi mpo na moto nyonso oyo amipesá epai ya Yehova. Na masolo oyo, tokolobela mitinda oyo ekoki kosalisa bilenge bakristo básalela Nzambe na motema mobimba, mpe mabaku oyo bakristo oyo bakómi mibange bazali na yango ya kosala lisusu mingi na mosala ya Nzambe.
▪ “Bokonzi na yo eya”—Kasi ntango nini?
Lelo oyo ebele ya bato bazali komitungisa mpo na makambo oyo ezali koleka na mokili to bazali komipesa kaka na koluka makambo na bango moko. Lisolo oyo ezongeli makambo misato oyo ekosalisa bakristo bátya motema ete mosika te, Bokonzi ya Nzambe ekosukisa mokili oyo mabe.
MASOLO MOSUSU
EZIPELI: Bazali kotatwela bayekoli ya iniversite na engumba ya Lviv, oyo bautaki na mikili ya bapaya
UKRAINE
MOTÁNGO YA BATO
45 561 000
BASAKOLI
150 887
Masangá 1 737 mpe bituluku 373 ezali na minɔkɔ 15, na kati na yango Hongrois, Roumain, Russe, Elobeli na bajɛstɛ ya Russie, ná Ukrainien