Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w14 15/11 nk. 31-32
  • Moi ebimi na Japon

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Moi ebimi na Japon
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Mitó ya makambo mike
  • BABONGISI-NZELA YA MOLENDE
  • “BAYEHU”​—YA MOKE MPE MONENE
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
w14 15/11 nk. 31-32

BASUVENIRE YA MAKAMBO ELEKÁ

Moi ebimi na Japon

Bandeko mibali bazali liboso ya aviɔ oyo basalelaki mpo na kopanza nkasa ya libyangi

Basalelaki nkasa ya libyangi mpo na diskur ya bato nyonso na Tokyo mpe bapanzaki yango na baaviɔ na Osaka mobimba

MOKOLO ya 6 sanza ya libwa 1926, pèlerin (mokɛngɛli-motamboli) moko oyo azalaki moto ya Japon oyo abotamaki na États-Unis azongaki na Japon kosala lokola misionɛrɛ. Kuna, moto kaka moko oyo azalaki kotánga zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, mpe abandisaki etuluku moko ya koyekola Biblia na Kobe nde azalaki kozela ye. Bayekoli ya Biblia basalaki liyangani na bango ya liboso mokolo ya 2 sanza ya liboso 1927 na engumba yango. Bato nyonso oyo bayanganaki bazalaki 36 mpe bato mwambe bazwaki batisimo. Makambo ebandaki malamu mpenza, kasi ndenge nini mwa etuluku wana ekokaki kosakwela bato milio 60 ya Japon mpo bámona pole ya solo?

Lokasa ya libyangi mpo na diskur ya bato nyonso

Na sanza ya mitano 1927, bayekoli ya Biblia ya molende babandaki kampanye ya kopesa litatoli na ndenge ya koyokisaka bato badiskur ya masolo ya Biblia. Mpo na diskur ya liboso, oyo esalemaki na Osaka, bandeko babambaki bapapye mpe mwa biteni ya bilamba na engumba mobimba mpe batindaki nkasa ya libyangi 3 000 epai ya bato minene. Bakabolaki nkasa ya libyangi 150 000 mpe basalaki piblisite ya diskur na bazulunalo ya minene ya Osaka mpe bapesaki mbongo mpo bátya motó ya likambo ya diskur na batike ya engbunduka. Bapesaki mbongo mpo na batike 400 000. Mokolo moko liboso ya diskur, baaviɔ mibale etambolaki engumba mobimba mpe epanzaki nkasa ya libyangi 100 000. Bato soki 2 300 batondaki na ndako moko na Osaka Asahi mpo na koyoka diskur oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Bokonzi ya Nzambe ekómi pene.” Esengelaki koyebisa bato soki nkóto moko bákende mpo bisika ezalaki te. Nsima ya diskur, bayangani koleka 600 batikalaki; bazalaki kotuna mituna mpe bazalaki kopesa bango biyano. Na basanza oyo elandaki, badiskur ya Biblia ebandaki kopesama na Kyoto mpe na bingumba mosusu na wɛsti ya Japon.

Na sanza ya zomi, 1927, bayekoli ya Biblia babongisaki badiskur na Tokyo. Na mbala oyo mpe, nkasa ya libyangi ekendeki epai ya bato minene, na ndakisa ministre-mokonzi, badepite, bato ya mangomba mpe bakonzi ya basoda. Babambaki bapapye na bifelo, basalaki piblisite na bazulunalo mpe bakabolaki nkasa ya libyangi 710 000, mpe bato nyonso oyo balandaki badiskur misato oyo esalemaki na mboka-mokonzi ya Japon bazalaki 4 800.

BABONGISI-NZELA YA MOLENDE

Katsuo ná Hagino Miura

Ndeko Katsuo ná Hagino Miura

Babongisi-nzela basalaki mosala moko ya ntina mpenza ya komemela bato nsango ya Bokonzi na bandako. Mobongisi-nzela moko na nkombo Matsue Ishii ná mobali na ye Jizo, oyo bazalaki na kati ya babongisi-nzela ya liboso ya Japon, basakolaki eteni monene mpenza (3/4) ya Japon, kobanda na Sapporo mosika na nɔrdi ya Sendai, Tokyo, Yohohama, Nagoya, Osaka, Kyoto, Okayama mpe Tokushima. Ndeko Ishii ná ndeko mosusu ya mwasi ya mokóló na nkombo Sakiko Tanaka, balataki bakimono oyo elatamaka mokolo ya makambo minene mpo na kokende kotala bakonzi ya guvɛrnema. Moko na bango asɛngaki babuku La Harpe de Dieu mpe Délivrance 300 mpo atya yango na babibliotɛkɛ ya bolɔkɔ.

Katsuo ná Hagino Miura bandimaki babuku oyo ndeko Ishii apesaki bango mpe bamonaki mbala moko ete bazwi solo. Bazwaki batisimo na mobu 1931 mpe bakómaki babongisi-nzela. Ekoki kozala ete Haruichi mpe Tane Yamada mpe ebele ya bandeko na bango mosusu, bayambaki nsango ya Bokonzi liboso ya mbula 1930. Ndeko Haruichi mpe Tane Yamada bakómaki babongisi-nzela, mpe mwana na bango ya mwasi, Yukiko, akendaki kosala na Betele ya Tokyo.

“BAYEHU”​—YA MOKE MPE MONENE

Yehu ya monene

Yehu ya monene oyo babongisi-nzela motoba bazalaki kosalela

Na ntango wana, mituka ezalaki ntalo makasi mpe banzela ezalaki mabe. Yango wana, ndeko Kazumi Minoura mpe babongisi-nzela mosusu ya bilenge basalelaki basharɛti oyo ezalaki lokola ndako. Babengaki basharɛti yango Bayehu, mpo na kolobela moto moko oyo azalaki komema likalo na vitɛsi makasi, mpe moto yango akómaki na nsima moko ya bakonzi ya Yisraele. (2 Bak. 10:15, 16) Bayehu misato ya minene ezalaki na bolai ya mɛtrɛ mibale na ndambo, bonene ya mɛtrɛ moko na ndambo mpe bosanda ya mɛtrɛ moko na ndambo mpe babongisi-nzela motoba bakokaki kolala na kati. Lisusu, biro ya filiale ya Japon esalaki Bayehu ya mike 11. Mwa Bayehu yango ezalaki na bashambrɛ oyo mibali mibale bakokaki kolala na kati. Ndeko Kiichi Iwasaki, oyo asalisaki mpo na kosala Bayehu yango, alobi ete, “Yehu mokomoko ezalaki na hema na yango mpe ezalaki na bateri ya motuka oyo ekokaki kotinda kura mpo miinda epela.” Babongisi-nzela bazalaki kongɛngisa pole ya solo na Japon mobimba, bazalaki kopusa Bayehu, komatisa mpe kokitisa yango na bangomba mpe kokatisa yango na lobwaku ndenge na ndenge kobanda na nɔrdi ya Hokkaido tii na Kyushu na sudi.

Yehu ya bebe

Mwa Yehu ya moke mpo na mibali mibale

Mobongisi-nzela moko na nkombo Ikumatsu Ota alobaki boye: “Soki tokómi na engumba moko, tozalaki kotika Yehu na biso na bokula ya ebale to na esika mosusu ya polele. Liboso, tozalaki kokende kokutana na bato minene ya engumba yango, mingimingi mibali, na ndakisa mokonzi ya engumba yango, mpe na nsima, tozalaki kokende na bandako ya bato mpo na kolakisa mikanda na biso. Soki tosilisi teritware wana, tozalaki kokende na engumba mosusu.”

Ezalaki “mokolo ya makambo mike” ntango etuluku wana ya bayekoli ya Biblia 36 na Kobe basalaki liyangani na bango ya liboso. (Zek. 4:10) Kaka mbula mitano na nsima, na mobu 1932, babongisi-nzela mpe basakoli 103 ya Japon bapesaki lapolo ya mosala ete bakaboli babuku koleka 14 000. Lelo oyo, mosala ya kopesa litatoli ezali mpenza kosalema malamu na bingumba oyo bato bazalaka mingi, mpe basakoli pene ya 220 000 bazali kongɛngisa pole na Japon mobimba.​—Euti na Basuvenire ya makambo eleká na Japon.

Bililingi ya Bayehu

Bililingi oyo Kiichi Iwasaki asalaki, mpe ye nde asalaki Bayehu na Betele ya Japon

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto