Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp16 No. 2 nk. 11-13
  • Kolanda makebisi ekoki kobikisa bomoi na yo!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kolanda makebisi ekoki kobikisa bomoi na yo!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • TYÁ LIKEBI NA BAMBONGWANA OYO EZALI KOSALEMA
  • EZALI KOMONISA BOLINGO YA NZAMBE
  • KIMÁ NA ESIKA YA LIBATELI!
  • Nsuka ya mokili ekoya ntango nini? Yesu alobaki nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2021
  • Biyano na mituna minei oyo etali nsuka ya mokili
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Mikolo ya nsuka—Ntango nini?
    Lamuká!—2008
  • Nsuka ya mokili ezali kobangisa, kosepelisa to kolɛmbisa?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
wp16 No. 2 nk. 11-13
Libongo ya Sumatra, Indonesie oyo tsunami ebebisaki

Kolanda makebisi ekoki kobikisa bomoi na yo!

NA mokolo ya 26/12/2004, mabele eninganaki makasi na Simeulue, esanga moko oyo ezali na nɔrdi-wɛsti ya Sumatra, na Indonesie. Bato nyonso na libongo bakómaki kotala mai ya mbu. Mai etikaki libongo mpe ezongaki nsima na ndenge ya mabe. Mbala moko, moto nyonso akómaki kokima na bangomba mpe koganga boye: “Smong! Smong!” oyo elakisi tsunami na monɔkɔ ya mboka na bango. Na miniti 30 mpamba, mbonge ya makasi ebɛtaki na libongo, ebukaki bandako mingi mpe ebebisaki bamboka.

Esanga Simeulue ezali esika ya liboso oyo tsunami ebebisaki. Kasi na bato 78 000 oyo bafandaka kuna, kaka bato 7 nde bakufaki. Mpo na nini bato moke bongo?a Bato ya esanga yango balobaka boye: ‘Soki mabele ebandi koningana mpe mai ya mbu ekómi kozonga nsima, kimá na bangomba mpo mosika te, mai yango ekoya mbangu na libongo.’ Mpo na likambo oyo bakutaná na yango, bato ya Simeulue bayebaka soki tsunami elingi kosalema ntango mai ya mbu ekómi kobongwana. Kolanda makebisi ebikisaki bomoi na bango.

Biblia elobeli likama moko oyo ezali koya, “bolɔzi moko monene oyo esalemá naino te banda mokili ebandá tii sikoyo, ɛɛ, mpe ekosalema lisusu te.” (Matai 24:21) Kasi yango ezali te nsuka ya mabele mpo na makambo oyo bato basalaka to likama moko oyo ekobima yango moko, mpo mokano ya Nzambe ezali ete mabele eumela seko. (Mosakoli 1:4) Kutu, bolɔzi oyo ezali koya ezali likambo oyo Nzambe akosala mpo na ‘kobebisa baoyo bazali kobebisa mabele.’ Ekosukisa mabe mpe bampasi nyonso. (Emoniseli 11:18; Masese 2:22) Ekozala mpenza lipamboli!

Lisusu, na kokesana na tsunami, koningana ya mabele to kotomboka ya volcan, libebi oyo ezali koya ekoboma kaka bato mabe. Biblia elobi ete “Nzambe azali bolingo” mpe Nzambe, oyo nkombo na ye ezali Yehova, alaki ete “bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.” (1 Yoane 4:8; Nzembo 37:29) Kasi, ndenge nini okoki kobika na bolɔzi monene mpe kozwa mapamboli oyo alaki? Sekele yango: Kolanda makebisi!

TYÁ LIKEBI NA BAMBONGWANA OYO EZALI KOSALEMA

Mwaye ya kolobela mpenza dati oyo mabe mpe bampasi ekosila ezali te mpo Yesu alobaki boye: “Mpo na mokolo yango mpe ngonga yango moto moko ayebi te, ezala baanzelu ya likoló ezala Mwana, kaka Tata nde ayebi.” Ata bongo, Yesu alendisaki biso ‘tósɛnzɛlaka.’ (Matai 24:36; 25:13) Mpo na nini? Biblia elobeli ndenge makambo ya mokili ekozala liboso ete Nzambe asukisa mokili. Kaka ndenge mbongwana ya mbalakaka esalisaki bato ya Simeulue báyeba ete tsunami elingi kosalama, ndenge moko mpe kobongwana ya mbalakaka ya makambo ya mokili ezali komonisa ete nsuka ekómi pene. Etanda ya lisolo oyo emonisi bambongwana mosusu ya minene oyo Biblia elobeli.

Toboyi te, mokomoko ya makambo yango oyo ezali na etanda esalamá mpe na kala. Kasi Yesu alobaki ete soki tomoni “makambo yango nyonso,” tokoyeba ete nsuka ekómi pene. (Matai 24:33) Omituna boye: ‘Na istware ya bato, ntango nini makambo nyonso oyo balobeli awa (1) esalemá na mokili mobimba, (2) ebimá na eleko moko mpe (3) ezali kobeba koleka ndenge ezalaki liboso?’ Ezali polele ete tozali nde na mikolo yango.

EZALI KOMONISA BOLINGO YA NZAMBE

Prezida moko ya kala ya États-Unis, alobaki boye: “Kokebisa bato liboso, . . . ebikisaka bato.” Nsima ya tsunami ya 2004, batyaki aparɛyi moko mpo na kokebisaka bato na esika likama esalemaki mpo bato bákufa te soki esalemi lisusu. Ndenge moko mpe, Nzambe azwá bibongiseli mpo na kokebisa bato liboso nsuka eya. Biblia esakolaki boye: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.”​—Matai 24:14.

Kaka na mbula oyo eleki, Batatoli ya Yehova balekisaki ngonga pene na miliare mibale na kosakola nsango malamu na mikili 240 mpe na minɔkɔ koleka 700. Ndenge mosala yango ezali kosalema lelo emonisi mpenza ete nsuka ekómi pene. Lokola balingaka bazalani na bango, Batatoli ya Yehova bámipesaka mpenza na kokebisa basusu mpo na mokolo ya kosambisa ya Nzambe oyo ezali kopusana nokinoki. (Matai 22:39) Lokola ozwi libaku ya koyoka nsango oyo, emonisi ete Nzambe alingaka yo. Kobosana te ete “[Nzambe] alingi moto ata moko te abomama kasi alingi nde bato nyonso bábongola motema.” (2 Petro 3:9) Bolingo ya Nzambe ekosimba motema na yo mpe okoyoka makebisi?

KIMÁ NA ESIKA YA LIBATELI!

Kobosana te ete bato ya Simeulue bakimaki na bangomba mpo na koluka libateli ntango bamonaki mai ezali kozonga nsima; bazelaki te tii ntango ekoya. Esɛngaki básala nokinoki mpo na kobikisa bomoi na bango. Mpo na kobika na bolɔzi oyo ezali koya, yo mpe osengeli kokima na esika oyo ezali lokola ngomba liboso ete makambo ebeba. Ndenge nini? Mosakoli Yisaya akomaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpo na libyangi oyo epesami epai ya moto nyonso “na eleko ya nsuka ya mikolo,” ntango oyo tozali lelo. Biblia elobi boye: “Bóya, tómata na ngomba ya Yehova . . . Akolakisa biso banzela na ye, mpe tokotambola na banzela na ye.”​—Yisaya 2:2, 3.

Komata likoló ya ngomba ekosalisa yo omona malamu mpe ozala na esika ya libateli. Ndenge moko mpe, koyeba banzela ya Nzambe na nzela ya Biblia ezali kosalisa bamilio ya bato na mokili mobimba lelo bábongola bomoi na bango. (2 Timote 3:16, 17) Kosala bongo ezali kosalisa bango bábanda “kotambola na banzela ya [Nzambe]” mpe andima bango mpe bázala na nse ya libateli na ye.

Okoyanola na libyangi yango mpo na kozwa libateli ya Nzambe na mikolo oyo ya mpasi mpenza? Tosɛngi yo otalela malamumalamu makambo oyo Biblia elobi mpo na “mikolo ya nsuka” na etanda ya lisolo oyo. Batatoli ya Yehova na esika ofandaka bakosepela kosalisa yo mpo oyeba mpenza oyo Biblia elobi mpe ndenge ya kosalela yango. To okoki kozwa biyano na mituna na yo soki okɔti na site Internet na biso www.pr2711.com. Fungolá esika bakomi MATEYA YA BIBLIA > BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA.

a Tsunami yango ya 2004 ebomaki bato koleka 220 000; yango eleki batsunami nyonso oyo esalemá.

MAKAMBO YA NSƆMƆ OYO EZALI KOLEKA NA MOKILI EMONISI ETE NSUKA EKÓMI PENE

Lokito ya masasi

BITUMBA NA MOKILI MOBIMBA MPE MAKAMBO EZALI KOBEBA SE KOBEBA

“Bokoyoka lokito ya bitumba mpe nsango ya bitumba. Bókeba, bózala na nsɔmɔ te. Mpo makambo wana esengeli kosalema, kasi nsuka eyei naino te. Mpo ekólo ekobunda na ekólo mpe bokonzi ekobunda na bokonzi . . . Makambo nyonso wana ezali ebandeli ya bampasi.”​—Matai 24:6-8.

Bana oyo bazali na nzala

MALADI MPE NZALA NA MOKILI MOBIMBA

“Bamaladi mabe mpe nzala ekozala bisika ndenge na ndenge.”​—Luka 21:11.

Batye sango moko minɔti na mabɔkɔ

KOBUKA MIBEKO MPE MOBULUNGANO NA MAKAMBO YA LOSAMBO

“Mpe ebele ya basakoli ya lokuta bakobima mpe bakokosa bato mingi; mpe lokola makambo ya kobuka mibeko ekokóma mingi, bolingo ya bato mingi ekokita.”​—Matai 24:11, 12.

Sango moko azali kosala molulu ya kobalisa basi mibale

BIZALELI YA BATO EBEBI NA NDENGE OYO ESALEMÁ NAINO TE

“Mikolo ya nsuka ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano. Mpo bato bakozala bato oyo bamilingaka, bato balingá mbongo, . . . oyo bazangi bosembo, oyo balinganaka te na kati ya libota, oyo balingaka kosala boyokani te, oyo bakoselaka bato makambo, oyo bazangi komipekisa, bato ya nko, oyo balingaka makambo ya malamu te, oyo batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi, oyo bavimbi na lolendo.”​—2 Timote 3:1-4.

Batatoli ya Yehova batɛlɛmi pembeni ya shario mpe bazali kopesa mobali moko litatoli

NSANGO MALAMU YA BOKONZI EZALI KOSAKOLAMA NA MOKILI MOBIMBA

“Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.”​—Matai 24:14.

Mwasi oyo atomboli lobɔkɔ mpo na komonisa ete aboyi

BATO MOSUSU BAZALI KONDIMA TE ETE NSUKA EKÓMI PENE

“Na mikolo ya nsuka basɛki bakoya ná kosɛka na bango, . . . bakoloba ete: ‘Wapi kozala na ye oyo elakamaki? Kutu, banda mokolo bankɔkɔ na biso balalá na liwa, makambo nyonso ezali kokoba kaka ndenge ezalaki banda na ebandeli ya bozalisi.’”​—2 Petro 3:3, 4.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto