Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w17 Juin lok. 32
  • Oyebaki yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyebaki yango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Masolo mosusu
  • Oyebaki yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Yesu apɛtoli tempelo
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Apɛtoli lisusu tempelo
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yesu apɛtoli Tempelo
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
w17 Juin lok. 32
Yesu azali kobengana bato oyo bazalaki kotɛka mpe kosomba na tempelo

Oyebaki yango?

Yesu azalaki na ntina ya kobenga bato oyo bazalaki kotɛka banyama na tempelo ya Yerusaleme ete “miyibi”?

EVANZILE ya Matai elobi boye: “Yesu akɔtaki na tempelo mpe abwakaki libándá baoyo nyonso bazalaki kotɛka mpe kosomba na tempelo, mpe abalolaki bamesa ya bato oyo basenzaka mbongo mpe bibonga ya baoyo bazalaki kotɛka bibenga. Mpe alobaki na bango ete: ‘Ekomamá ete: “Ndako na ngai ekobengama ndako ya mabondeli,” kasi bino bozali kokómisa yango mobenga ya miyibi.’”​—Matai 21:12, 13.

Masolo ya kala emonisi ete bato oyo bazalaki kotɛka na tempelo bazalaki konyokola bakiliya na bango na ndenge bazalaki kotya biloko ntalo mingi. Na ndakisa, bibenga ezalaki ntalo moke mpo ata babola bákoka kosomba yango mpo na kopesa mbeka. Kasi, masolo ya Bayuda elobi ete na eleko moko na siɛklɛ ya liboso, bibenga mibale ekómaki na ntalo ya denari moko ya wolo. Ezalaki mbongo ya mikolo soki 25 ya mosala. Bibenga ekómaki ntalo mingi mpenza mpe ekómaki mpasi babola básomba yango. (Balevi 1:14; 5:7; 12:6-8) Simeon ben Gamaliel, moteyi moko ya Lingomba ya Bayuda, asilikaki makasi mpo na likambo yango mpe akitisaki motángo ya mbeka oyo Bayuda basengelaki kopesa. Na mbala moko, ntalo ya bibenga mibale ekitaki tii na mbongo ya denari moko ya wolo kabolá mbala 100.

Ndenge tokoki komona yango, baoyo bazalaki kotɛka na tempelo bazalaki lokoso mpe kolyela bakiliya na bango. Na yango, Yesu azalaki na ntina ya kobenga bango “miyibi.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto