Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w17 Octobre lok. 31
  • Likambo moko oyo emonisaki boboto

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Likambo moko oyo emonisaki boboto
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Masolo mosusu
  • Mateya oyo tokoki kozwa epai ya “moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga mingi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Yoane azangaki kondima?
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Yoane alingi koyeba makanisi ya Yesu
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yoane Mobatisi azalaki nani?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
w17 Octobre lok. 31
John azwi mwa buku “Nsango malamu oyo ya Bokonzi,” oyo motatoli ya Yehova apesaki ye

Likambo moko oyo emonisaki boboto

TATA ya John azwaki batisimo mpe akómaki Motatoli ya Yehova na nsuka ya bambula ya 1950 na mwa mboka Gujerat, na Inde. Kasi John, bandeko na ye mitano ya basi mpe ya mibali, ná mama na bango bazalaki kosambela na Katolike mpe bamipesaki mpenza na lingomba yango. Na yango, batɛmɛlaki tata na bango ntango akómaki Motatoli.

Mokolo moko, tata ya John atindaki ye akende kotika enveloppe moko epai ya ndeko moko ya lisangá. Kasi, na ntɔngɔ yango, John amikataki mosapi ntango azalaki kofungola tono moko monene ya linzanza. Kasi, lokola alingaki kaka kotosa tata na ye, akangaki elamba na mosapi yango mpe akendaki kotika enveloppe.

Ntango John akómaki kuna, apesaki enveloppe epai ya mwasi ya ndeko yango. Ye mpe azalaki Motatoli ya Yehova. Ndeko mwasi amonaki mpota ya John mpe asɛngaki asalisa ye. Azwaki bankisi, asukolaki mpota yango mpe akangaki ye mwa elamba na mosapi yango. Na nsima, asalelaki John ti ya mɔtɔ. Ntango nyonso oyo balekisaki elongo, azalaki koyebisa John makambo ya Biblia na boboto.

Boboto ya ndeko mwasi yango, etindaki John akóma kotalela Batatoli ya Yehova na ndenge mosusu. Atunaki ndeko yango mituna mibale mpo na makambo oyo Batatoli ya Yehova bandimaka, kasi ekesanaki na mateya ya Katolike. Atunaki soki Yesu azali Nzambe mpe soki bakristo basengeli kosambela Maria. Lokola ndeko mwasi yango ayekolá monɔkɔ ya Gujarati, apesaki John biyano na monɔkɔ ya mboka na ye. Alakisaki ye biyano yango na Biblia mpe apesaki ye mwa buku “Nsango malamu oyo ya Bokonzi.”

Na nsima, ntango John atángaki mwa buku yango, amonaki ete makambo yango ezalaki solo. Akendaki epai ya sango mpe atunaki ye mituna mibale oyo atunaki ndeko mwasi. Sango asilikaki makasi mpe abwakelaki ye Biblia, mpe agangaki: “Okómi Satana! Lakisá ngai na Biblia esika balobi ete Yesu azali Nzambe te to ete tosengeli kosambela Maria te. Lakisá ngai!” John ayokaki mpasi mpo na likambo sango asalaki. Ayebisaki sango ete akotya lisusu makolo na lingomba ya Katolike te. Asalaki mpe kaka bongo!

John abandaki koyekola na Batatoli, andimaki solo mpe akómaki kosambela Yehova. Na nsima, bandeko ebele ya libota na bango basalaki mpe bongo. Lelo, mbula 60 na nsima, elembo ya mpota oyo etikalá na mosapi ya John etindaka ye akanisa likambo ya boboto oyo esalisaki ye asalela Yehova bomoi na ye mobimba.​—2 Bakorinti 6:4, 6.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto