Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w17 Octobre lok. 32
  • Oyebaki yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyebaki yango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Masolo mosusu
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Tiká Ɛɛ na yo ezala Ɛɛ
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Tosá Nzambe mpo ozwa matomba na bilaka oyo alapeli ndai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
w17 Octobre lok. 32

Oyebaki yango?

Mpo na nini Yesu atɛmɛlaki momeseno ya kolapa ndai?

Mobali moko azali kolapa ndai na tempelo

MOBEKO ya Moize endimaki bato bálapaka ndai na maloba lokola “Nalapi ndai na nkombo ya Nzambe” to “Nalapi ndai na nkombo ya Yehova.” Kasi ntango Yesu azalaki awa na mabele, Bayuda bakómaki na momeseno ya kolapa ndai mpambampamba na likambo nyonso oyo balobi. Bazalaki kosala yango mpo bato bándima makambo bazali koloba, kasi mbala mibale Yesu atɛmɛlaki momeseno yango. Alobaki: “Tiká liloba na bino Ɛɛ ezala Ɛɛ, Te na bino, Te.”​—Matai 5:33-37; 23:16-22.

Buku moko (Theological Dictionary of the New Testament) emonisi ete Talmud esalisaka biso tómona ndenge Bayuda bazalaki kolapa ndai, to kokata seleka mpambampamba mpo bato mosusu bándimela bango, mpo Talmud emonisi malamumalamu ndai nini basengelaki kotosa mpe ndai nini bakokaki kotosa te.

Kaka Yesu te nde atɛmɛlaki momeseno ya kolapa ndai mpambampamba. Na ndakisa, Flavius Josèphe, moto ya mayele na masolo ya Bayuda, alobelaki mwa lingomba moko ya Bayuda oyo ezalaki kolinga momeseno ya kolapa ndai te. Bandimi ya mwa lingomba yango bazalaki komona ete kolapa ndai ezali mabe koleka kokosa. Bazalaki koloba ete soki moto asengeli kolapa ndai mpo basusu bándimela ye, elingi koloba ete azali kokosa. Lisusu, mokanda moko oyo Bayuda balobaka ete ezali eteni ya Biblia, Bwanya ya Sirach, to Ecclesiasticus, (23:11) elobi ete: “Moto oyo alapaka ndai mpambampamba azali motomboki monene.” Yesu atɛmɛlaki momeseno ya kolapa ndai ezangá ntina. Soki tozali na momeseno ya koloba ntango nyonso solo, ekozala na ntina te tólapa ndai mpo basusu bándimela biso.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto