Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w18 Juillet nk. 30-31
  • Okoki kosala nini mpo boyekoli na yo ya Biblia ezala malamu mpe osepela na yango

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki kosala nini mpo boyekoli na yo ya Biblia ezala malamu mpe osepela na yango
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Masolo mosusu
  • Alingaka biso tózala na bomoi ya malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Yosua 1:9​—“Zalá na mpiko mpe zalá na makasi”
    Ndenge bavɛrsɛ ya biblia elimbolami
  • Koyekola epesaka matomba mpe esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Luká kozwa matomba na bibongiseli oyo Yehova azali kozwa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
w18 Juillet nk. 30-31
Yosua azali kotánga Mibeko na pole ya mwinda

Oyo okoki kosala mpo boyekoli na yo ya Biblia ezala malamu mpe esepelisa yo mingi

Yosua azali kotánga Mibeko; bifelo ya Yeriko ezali kokwea kasi ndako ya Rahaba ekwei te; Yosua atomboli mabɔkɔ likoló mpe azali kobondela

YOSUA asengelaki kokamba ekólo Yisraele na Mokili ya Ndaka. Ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te. Kasi, Yehova apesaki ye makasi mpe alendisaki ye na maloba oyo: “Zalá na mpiko mpe zalá na makasi mpenza.” Ayebisaki Yosua ete soki azali kotánga mpe kotosa Mobeko, yango ekosala ete asala makambo na bwanya mpe alongisa nzela na ye.​—Yosua 1:7, 8.

Na ‘ntango oyo ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano,’ bomoi na biso mpe etondi na mpasi. (2 Timote 3:1) Soki tolingi kolonga lokola Yosua, tosengeli kolanda toli oyo Yehova apesaki ye. Tosengeli kotángaka Biblia mbala na mbala mpe kosalela makambo tozali koyekola mpo na kozwa bikateli ya malamu.

Kasi, mbala mosusu mingi kati na biso toyebi mpenza te ndenge ya kosala boyekoli, to tosepelaka koyekola te. Nzokande, koyekola Biblia biso moko ezali na ntina mingi. Ntango okotalela etanda “Meká kosalela batoli oyo,” okomona mayele oyo ekosalisa yo ozwa matomba na boyekoli na yo moko mpe osepela na yango lisusu mingi.

Mokomi ya nzembo akomaki boye: “Tambwisá ngai na nzela ya mitindo na yo, mpo nasepeli na yango.” (Nzembo 119:35) Yo mpe okoki kosepela koyekola Liloba ya Nzambe. Okomona makanisi mingi ya kitoko wana okokoba koyekola Biblia.

Atako okokamba ekólo moko boye te lokola Yosua, yo mpe ozali na mikakatano. Na yango, ndenge moko na Yosua, yekolá mpe tosá Liloba ya Nzambe. Soki osali bongo, okosala makambo na bwanya mpe okolongisa nzela na yo.

MEKÁ KOSALELA BATOLI OYO

  • Mobali moko atomboli mabɔkɔ likoló ntango azali kobondela

    Bondelá liboso ya koyekola. Yehova akomisá makanisi na ye na Biblia, mpe asalaki yango mpo na litomba na biso. Yango wana, ntango ozali kotánga Biblia, sɛngá Yehova asalisa yo okanga ntina ya makambo ozali kotánga, obosana yango te, mpe osalela yango mpo na kozwa bikateli ya bwanya na bomoi na yo.​—Ezera 7:10.

  • Mobali moko azali komituna mituna

    Omituna mituna ntango ozali kotánga Biblia to mikanda oyo elimbolaka yango. Na ndakisa: ‘Makambo oyo nayekoli eteyi ngai nini mpo na Yehova? Na ndenge nini eyokani na motó ya likambo ya Biblia? Ndenge nini nakoki kosalela makanisi yango mpo na kosalisa basusu?’

  • Mobali moko azali komanyola

    Manyolá makambo ozali koyekola. Zwá mwa ntango ya kokanisa makambo oyo outi koyekola. Omituna boye: ‘Yango esali ete namiyoka ndenge nini? Mpo na nini namiyoki bongo? Na ndenge nini eyokani na makambo nakutaná na yango, oyo nazali kokutana na yango lelo, to oyo nakokutana na yango na mikolo ezali koya? Ndenge nini nakoki kosalela mitinda oyo ya Biblia to toli oyo na bomoi na ngai?’ (Yobo 23:5; Nzembo 49:3) Ntango ozali komanyola, talá soki okoki kolimbola ntina oyo Yehova ayebisaka basaleli na ye báboya makambo mosusu. To kanisá na makama oyo ekoki kobima soki moto oyo ozali kotánga lisolo na ye asalaki makambo ndenge mosusu.​—Kolimbola Mibeko 32:28, 29.

  • Mobali moko azali kokanisa na masolo ya Biblia

    Salelá makanisi na yo ntango ozali kotánga. Na ndakisa, okoki komona na makanisi ntango oyo bandeko ya Yozefe batɛkaki ye epai ya Bayishimaele? (Ebandeli 37:18-28) Na makanisi ozali komona nini, koyoka nini, mpe koyoka nsolo ya nini? Omitya na esika ya bato oyo ozali kotánga lisolo na bango. Makanisi mpe mayoki na bango ezalaki nini? Ntango ozali kosalela makanisi na yo, boyekoli na yo ekozala lisusu na ntina mingi.

  • Mobali moko azali kosalela bisaleli ya boyekoli

    Salelá bisaleli mpo na koyekola oyo ebongiseli ya Yehova ebimisaka, yango ekosala ete osepela kosala bolukiluki. Yekolá ndenge ya kosalela bisaleli oyo ezali na monɔkɔ na bino, ezala na papye to na Internet. Kokakatana te kosɛnga lisalisi mpo osalela bisaleli yango na ndenge ebongi. Na ndakisa, Index des publications des Témoins de Jéhovah to Buku ya bolukiluki mpo na Batatoli ya Yehova ekosalisa yo omona makambo oyo ekomamá mpo na lisolo boye to boye mpe elimbolaka bavɛrsɛ mingi ya Biblia. Salelá ba apɛndisi ya Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika soki ezali na monɔkɔ oyo okoki kotánga. Yango ezali na makambo ya ntina na oyo etali bisika, kolandana ya badati, bimekeli, mpe makambo mosusu.

  • Mobali moko azali kozongela na mokuse makambo ya ntina

    Zongelá na mokuse makambo ya ntina. Yango ekosalisa yo obosana te makambo oyo outi koyekola. Likambo ya malamu koleka, sololá na bato makambo oyekoli. Omoni likambo moko oyo okoki kosalela na mosala ya kosakola? Soki osaleli batoli oyo, okobosana te makambo ya ntina, mpe basusu bakozwa matomba na boyekoli na yo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto