Boyekoli ya mokanda Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
1 Na pɔsɔ ya 30 Yuli, tokobanda koyekola mokanda Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo kati na bituluku ya boyekoli ya mokanda. Oyo nde esengo ndenge tokotalela bomoi mpe mosala ya Yesu Klisto! Lokola mokanda yango esalemi na mwa bokeseni moke na mikanda misusu oyo toyekolá, mwa malako mosusu etali boyekoli na yango ekozala mpenza na ntina.
2 Lokola bankasa ya mokanda yango ezali na banimero te, manaka oyo ebimi na Mosala na biso ya Bokonzi ekoyebisa mikapo ya koyekola, ekozala mingimingi mibale to misato na pɔsɔ. Mikapo 35, 111 mpe 116 ezali milai mingi; na bongo mokomoko na yango ekokabolama na boyekoli ebele. Ntango ndeko moko oyo ayebi kotánga malamu asilisi kotánga mokapo mobimba (to baparagrafe ya motó ya likambo ya moke, na ndakisa na mikapo 35, 111 mpe 116), motambwisi ya boyekoli ya mokanda akotuna mituna oyo ezwami na nsuka ya mokapo mpe oyo eyokani na mokapo to na mwa eteni oyo euti kotángama. Biyano ezali ntango nyonso kolandana te na kati ya mokapo. Bakomantɛrɛ ya mikuse mpe ya sikisiki, ekouta na makambo oyo ezwami na kati ya mokapo.
3 Nsima na yango, soki ntango epesi nzela, bokotánga bavɛrsɛ nyonso oyo epesami na nsuka ya mokapo. Bavɛrsɛ oyo eleki milai ekoki kokabolama mpo na kopesa nzela na basakoli mingi ete bázwa mpe libaku ya kotánga; na nsima nde bokopesa bakomantɛrɛ na makambo oyo euti kotángama. Na lisalisi ya mituna ya sikisiki oyo akobongisa, motambwisi ya boyekoli akobimisa bakomantɛrɛ ya koteya oyo ekomonisa boyokani oyo ezali kati na bavɛrsɛ oyo etángami mpe makanisi oyo emonisami na kati ya mokanda. Mituna nyonso mpe bakomantɛrɛ nyonso esengeli kosalisa bayangani básepela mpenzampenza na Yesu Klisto, na bomoi na ye mpe na mateya na ye.
4 Mokanda Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo ezali kolobela bomoi ya Yesu na kolanda molɔngɔ ya ntango oyo likambo na likambo esalemaki. Mpo na komikundola makambo, ekoki kozala na ntina mingi, komona yango kati na makanisi lolenge ezali kosalema mpe kokɔtisa kati na makanisi na yo bisika epai kuna makambo yango esalemaki. Na bongo talelá bililingi ya langi malamumalamu mpe talaká mbala na mbala kalati oyo etyami na ebandeli ya mokanda, nsima ya maloba ya ebandeli.
5 Maloba ya ebandeli ya mokanda yango ekotalelama na pɔsɔ ya liboso. Nsima ya botángi ya baparagrafe nyonso ya motó ya likambo moke, motambwisi ya boyekoli akotuna mituna ebongi oyo akobongisa liboso. Matomba ekozwama mingi koleka na boyekoli ya mokanda na kotalela lolenge oyo mosangani mokomoko akomibongisa. Motambwisi ya boyekoli asengeli komibongisa malamumalamu pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kosalisa basangani ya etuluku ya boyekoli ya mokanda báyeba malamumalamu moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo, Nkolo mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto.