Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/13 lok. 2
  • Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kosalela mwa buku ya sika Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Ndenge ya kosalela mwa buku ya sika Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Esaleli ya sika mpo na kosalisa bato ete báyeba masɛngami ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Ndenge ya kosalela mwa buku Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2013
km 9/13 lok. 2

Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?

1. Ntango nini tokobanda koyekola mwa buku Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo? mpe ekosalisa biso na nini?

1 Kobanda na pɔsɔ ya 28 sanza ya 10, tokoyekola mwa buku Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo? na Boyekoli ya Biblia na lisangá. Mwa buku yango ya sika oyo ebimaki na liyangani ya etúká “Batelá motema na yo!”, ebongisami mpo na kosalisa bayekoli ya Biblia báyeba ebongiseli na biso. Kotalela mwa buku yango ekosalisa biso tósepela lisusu mingi na ndenge tozali na kati ya ebongiseli ya Yehova mpe ekosalisa biso tóyeba mpenza kosalela esaleli yango na mosala ya kosakola.​—Nz. 48:13.

2. Ndenge nini tokoyekola mwa buku yango na lisangá?

2 Ndenge tokoyekola yango: Ekosɛnga na motambwisi akabola ntango na ye mpo ete liteya mokomoko ezwa miniti ndenge moko. Mwa buku yango ezali na mateya 28 mpe motó ya likambo ya liteya mokomoko ezali motuna, oyo motambwisi akobanda na kotánga yango. Na nsima, akosɛnga na motángi atánga maloba ya ebandeli. Nsima na yango, motambwisi akotuna bayangani motuna oyo abongisaki mpo na maloba ya ebandeli. Na nsima, motángi akotánga eteni mokomoko oyo ebandi na maloba ya moindo makasi mpe bokotalela yango mokomoko. Nsima ya botángi ya eteni moko, motambwisi akosɛnga na bayangani bálobela ndenge oyo eteni yango epesi eyano na motuna oyo ezali motó ya likambo ya liteya wana. Mwa buku yango ezali mpe na bafoto mingi oyo esengeli mpe kolobela yango. Esengeli kotánga bavɛrsɛ oyo esimbi lisolo, soki miniti ezali. Liboso ya koleka na liteya oyo elandi, motambwisi akotuna mituna ya bozongeli oyo ezali na nse ya lokasa. Soki etanda “Mpo na koyeba makambo mosusu” ezali, akosɛnga motángi atánga yango, mpe na nsima akosɛnga bayangani bálobela matomba nini moyekoli ya Biblia akozwa soki alandi toli yango. Na nsuka ya boyekoli, soki miniti ezali, motambwisi akoki kosalela mitó ya masolo lokola mituna ya bozongeli. Tósimba ete wana ezali te ndenge oyo tokosala ntango tozali koyekola na bato Biblia.

3. Ndenge nini tokoki kozwa mpenza matomba na boyekoli ya mwa buku yango?

3 Mpo ozwa mpenza matomba, osengeli komibongisa liboso ya koya na makita. Salá makasi opesaka biyano. Wana boyekoli ezali kosalema, kanisáká ndenge oyo makambo yango ekosalisa bato oyo oyekolaka na bango Biblia. Tiká ete boyekoli ya mwa buku oyo ya sika epesa biso makoki ya kosalisa bato mpo bango mpe báya elongo na biso mpo na kosala mokano ya Nzambe mpe bákóma na elikya ya kotikala na bomoi libela na libela.​—1 Yoa. 2:17.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto