Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/95 lok. 1
  • “Oyo ezali ntango ebongi mpenza”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Oyo ezali ntango ebongi mpenza”
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1995
Mosala na biso ya Bokonzi—1995
km 1/95 lok. 1

“Oyo ezali ntango ebongi mpenza”

1 Osilá komona bonzenga ya kongɛngisama oyo emonanaka na ntɔngɔ wana moi ezali kobima? Na bongo, kanisá naino: Soki Yehova, Mozalisi ya pole, azali kotya ntɔngɔ na ntɔngɔ eleko oyo matanelo ezali kokóma longwa na lipata ya mwa molili oyo emonani bobele sika kino na litimbo ya kongɛnga makasi ya langi ndenge na ndenge, yango ebongi te ete atya lisusu eleko oyo baninga ya pole ya elimo basengeli kongɛngisa makasi bingɛngiseli ya pole ya solo? Azali koyebisa epai ya moko na moko na biso: “Talá, ntango ebongi ezali sasaipi.”​—2 Kol. 6:2.

2 Ɛɛ, oyo ezali ntango ya ‘kongɛngisa pole.’ Tongɛngisaka pole na biso makasi koleka engebene makoki na biso? Na boumeli ya basanza oyo ezalaki liboso ya Ekaniseli, na ntembe te mingi kati na biso bakokaki mpenza kosala mosala makasi mpe kosala lokola babongisi-nzela basungi. Tokanisaki na yango mpenza? Tózwa ntango, kati na libondeli, mpo na kotalela motuna oyo molandi: Ntango nini, mpo na mbala ya nsuka, tozalaki babongisi-nzela basungi? Tóyeba ete kati na teritware na biso, Batatoli ya sika koleka 33 000 bazwaki batisimo, na boumeli ya mbula mitano oyo euti koleka. Yo mpe ozali kati na motuya yango? Soki ɛɛ, ozalaki liziba ya esengo mpo na baoyo balakisaki yo solo mpe mpo na Yehova, Tata na yo ya likoló. Ozalaki mobongisi-nzela mosungi ata mbala moko uta batisimo na yo? Okoki mpenza kobakisa ngonga oyo ozali kolekisa polele na mbeka ya lisanzoli mpo na Nzambe? Okoki kosepela na libaku kitoko oyo mosala ya mobongisi-nzela mosungi ezali komonisa mpo na bansanza oyo ezali koya? Ekoki mpe kozala fungola ya solo mpo na kokokisa masɛngami mpo na kosala lokola mobongisi-nzela ya sanza na sanza na basanza oyo ezali koya.

3 Tokanisi ete ebele ya bandeko mibali mpe bandeko basi bakoki komeka na mosala ya mobongisi-nzela mosungi, to mpe oyo ya sanza na sanza. Na mɔ́tɔ nyonso tozali mpenza kolendisa bilenge baklisto oyo bauti kosilisa kelasi na bango, babalani oyo bazali na bana te, baoyo basilá sanza, mpe ata batata to bamama mosusu ya mabota, ete bákanisa na libyangi oyo. Omituna motuna oyo: “Nazali mpenza na likambo oyo lizali kopekisa ngai ete nameka na bisengo ya mosala ya mobongisi-nzela?

4 Esili koleka bikeke mingi, Yesu Klisto alobaki ete: “Soki bozali na kondima ata lokola mbuma na sinapi, bokoloba na ngomba oyo ete, Tambolá longwa awa kino esika kuna mpe ekotambola. Likambo moko te likoleka nguya na bino.” (Mat. 17:20) Ezali na mokakatano moko ya monene koleka oyo ekoki kino kopekisa elimo santu ete esunga biso na kolonga yango to kolongola yango mpo na kokóma babongisi-nzela? Lisusu, lokola Armagedon ebɛlɛmi, mosala ya kosakola ezali mosala bobele moko ya nokinoki koleka oyo esengeli kosalama awa na etando na biso.

5 Basanza oyo ezali liboso ya Ekaniseli ebongi mpenza mpo na mosala ya ntina mingi koleka. Na eleko yango, Nkolo ye moko, asalaki mosala monene koleka awa na mabele. Okomekola ye? Ɛɛ, ezali likambo ya moto moko na moko kati na biso ete amitalela ye mpenza. Ya solo, banso bakoki kozala babongisi-nzela te; na bongo tokoki mpenza komityela mokano kitoko ya biso moko: oyo ya kobongisa lolenge mpe boyike ya mosala na biso mpo na Nzambe. Na bongo, tósala biso moko mpenza mpo na kozwa lokumu, kati na lisangá na biso, baklisto oyo bazali na elimo ya mobongisi-nzela mpe kosaláká na molimo na bango mobimba. Ata soki mosala na biso mpo na Nzambe, ezali kozwa ntango na biso mingi mpe makasi na biso mingi, na nsuka ya ebongiseli ya biloko ya ntango oyo, milende oyo tozali kosala mpo na kokolisa mosala na biso oyo etali kozalisa bayekoli ekomemela biso mapamboli minene koleka.​—Tángá 1 Timote 4:10.

6 Ɛɛ, tómikundola ete, lokola ezali mpe na ntango oyo mwa kongɛnga moke ya ntɔngɔ esengeli kokóma makasi, motindo moko mpe Yehova azali koyebisa biso kozanga kokakatana ete oyo “ezali ntango ebongi” mpo na kobakisa kongɛnga ya misala na biso.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto