Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/95 lok. 2
  • Makita ya mosala ya Yanuali

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita ya mosala ya Yanuali
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 2 Yanuali
  • Pɔsɔ ebandi na 9 Yanuali
  • Pɔsɔ ebandi na 16 Yanuali
  • Pɔsɔ ebandi na 23 Yanuali
  • Pɔsɔ ebandi na 30 Yanuali
Mosala na biso ya Bokonzi—1995
km 1/95 lok. 2

Makita ya mosala ya Yanuali

Pɔsɔ ebandi na 2 Yanuali

Loyembo 20

Min. 10: Maloba ya ebandeli, mayebisi mpe Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi oyo matali lisangá. Lobelá mitó na makambo ya mwa babuku mike oyo ezali kati na libombo ya lisangá; lendisá basakoli ete bámizwela yango mpo na kokabola yango kati na mosala ya kosakola. Soki lisangá ezali na mwa babuku ya mike te kati na libombo, yebisá ete mwa babuku ya minene mpe ekoki kosalelama.

Min. 17: “Tótika te kosakola ndako na ndako.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Sɛngá na basakoki oyo bayambaki solo na nzela ya kosakola ndako na ndako ete báyebisa botɔndi na bango.

Min. 18: “Tósalisa bazalani na biso ete báyeba solo.” Lisolo elongo na bayangani. Bilakiseli: basakoli ya makoki bakosalela masolo mibale to misato oyo mayebisami. Lobelá mingi ntina ya lisolo mokuse oyo ezangi mindɔndɔ. Maloba ya nsuka.

Loyembo 128 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 9 Yanuali

Loyembo 214

Min. 8: Maloba ya ebandeli, lapolo ya masolo ya lisangá mpe matɔndi mpo na makabo ya bolingo malamu. Pesá longonya na lisangá mpo na makabo. (Ex. 35:29) Lendisá basakoli ete bákanisa mpo na litatoli ya mpokwa, eleko malamu mpo na kosakola ndako na ndako mpe kozongela bato.

Min. 17: “Matomba ya kosepelisa ya mayangani ‘Bobangi Nzambe.’ ” Lisukulu mokuse likosalema na mokomeli. Lobelá makambo ya lisangá na bino oyo mataleli mayangani yango. Sikawa ezali ntango ya komilɛngɛla mpo na mayangani ya etúká mpo na mbala oyo ekoya.

Min. 20: “Bakoyoka na nzela nini soki tozongi kosakwela bango te?” Lisolo elongo na bayangani. Elakiseli moko oyo ekozongela batoli ya paragrafe 3 mpe 4. Monisá mpo na nini tosengeli kotala bato elongo na mokano ya kobanda boyekoli ya Biblia. Maloba ya nsuka.

Loyembo 139 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 16 Yanuali

Loyembo 173

Min. 10: Maloba ya ebandeli, mayebisi mpe Nsango ya Teokrasi. Lobelá mpe mwa mituya ya kosepelisa ya lapolo ya lisangá na sanza ya Desɛmbɛ. Yebisá bibongiseli nini bikamatami mpo na mosala ya kosakola na wikende oyo ezali koya mpe lendisá basakoli ete básangana na kokabolama ya bazulunalo.

Min. 20: “Oyo ezali ntango ebongi mpenza.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Basakoli mibale to misato oyo basilá kosala lokola babongisi-nzela basungi bakoki kotunama na nsima mpe koyebisa bisengo oyo bazwaki.

Min. 15: Bamposa ya lisangá to lisukulu ekosalema na nkulutu moko ya makoki euti na lisolo “Zalá mosika na ntango omoni likama,” ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwali 1994, nkasa 22-25. Maloba ya nsuka.

Loyembo 53 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 23 Yanuali

Bankulutu bakobongisa manaka na bango moko, engebene bamposa ya lisangá na bango.

Pɔsɔ ebandi na 30 Yanuali

Loyembo 192

Min. 5: Maloba ya ebandeli, mayebisi.

Min. 20: “Okoki kokɔta na molɔngɔ ya babongisi-nzela?” Lisolo elongo na bayangani. Yebisá makambo oyo mazali komonisa lolenge mosangani moko ya lisangá akokaki kozongela lisusu mosala ya mobongisi-nzela, to lolenge nini libota moko esalaki na bomoko mpo na kopesa nzela na moko na basangani ya libota na bango ete asalela libaku wana kitoko.

Min. 20: Lipesi ya Febwali. Lakisá mwa babuku oyo lisangá ezali na yango kati na libombo, na ndakisa “Nsango malamu oyo na Bokonzi,” Nzela na Nzambe ezali nzela na bolingo, Tokoki kolikia malamu koleka bomoi oyo!, Elikya ya solo mpo na ntango ekoya​—Ndenge nini kozwa yango, Nzambe azali oyo azali kokanisa biso? Mwa babuku oyo ezali malamu mpo na kobanda boyekoli ya Biblia. Lobelá bililingi na yango mosusu mpe biteni kitoko oyo bizali kopesa nzela na kobanda masolo. Bilakiseli mibale likoló na lolenge ya kobanda lisolo na ntina na lisolo moko ya Biblia. (Salelá makanisi ya mwa buku Lolenge nini okoki kobanda mpe kolandisa masolo likoló na Biblia na mitó na makambo “Avenir/Libateli,” lokasa 2, mpe “Bokonzi,” lokasa 3. Na nsuka ya elakiseli moko na moko, bópesana elaka mpo na kobanda boyekoli ya Biblia. Maloba ya nsuka.

Loyembo 19 mpe libondeli ya nsuka.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto