Tózala na makanisi ya kokende liboso
1 Oyo nde esengo tozali na yango ya komona bokoli makasi oyo ezali kosalema kati na mikili mingi! Nzokande, tozali koyeba ete kati na bisika mosusu, basakoli ya Bokonzi bakutanaka mbala mingi na botyoli to mpe na botɛmɛli makasi na mosala na biso ya kosakola. Ndenge nini tosengeli kozala na makanisi ya kokende liboso soki yango ezali bongo mpo na teritware na biso? Lolenge nini kopɛngola kozala na makanisi ya kozonga nsima, ezaleli oyo ekoki kolongola esengo na biso mpo na mosala oyo etali kozalisa bayekoli?
2 Kozala na makanisi ya kokende liboso ekosalisa biso ete tózala na bokatikati. Ata kati na komekama, tosengeli te kotika nzela na makanisi ya kozonga nsima ete elonga biso. Yesu atikeli biso ndakisa ya kokoka. Bobele bato moke nde bandimaki makambo oyo azalaki koteya. Mingi babetaki libaku na mateya na ye. Akutanaki na mikakatano oyo mityaki mpiko na ye na komekama makasi. Bakonzi ya mangomba batyolaki mosala na ye mpe bakangaki mwango ya koboma ye. Babwakelaki ye nsɔi na elongi, batukaki ye, babetaki ye mpe na nsuka babomaki ye. Nzokande, azwaki esengo na mosala oyo azalaki kokokisa. Mpo na nini? Ayebaki ntina ya kosala mokano ya Nzambe mpe atikaki te kosala yango.—Yoa. 4:34; 13:17; Ebe. 12:2.
3 Tózala na makanisi malamu mpo na mosala na biso: Mpo na kosala bongo, ezali na mwa makambo mingi oyo tosengeli kobatela kati na makanisi na biso. Tómikundola ete tozali kopesa nsango oyo bato mingi bazali koboya koyoka to bazali kotɛmɛla. (Mat. 13:14, 15) Atako epekisamaki polele epai na bantoma ete bátika koteya na kosaleláká nkombo ya Yesu, batikalaki sembo na etinda na bango mpe mbuma ekobaki kosangisama. (Mis. 5:28, 29; 6:7) Tosili koyeba ete kati na bateritware mosusu, bobele bato moke nde bakoyoka biso. (Mat. 7:14) Kasi, tozali na bantina ya kosepela ata soki moto moko mpamba ayoki biso. Tómikundola lisusu ete ata baoyo bazali kotɛmɛla biso basengeli mpe kozwa libaku ya koyoka nsango malamu. (Ezek. 33:8) Kati na bango, bamoko babongwanaka mpe bakómaka basambeli ya Yehova. Soki tozali na makanisi malamu likoló na mosala ya kosakola, tokozwa bosepeli ata soki bato moke bayoki biso. Bobele komonana na biso liboso na bandako ya bato mpo na koyebisa bango nsango ya Bokonzi ya Nzambe, ezali mpenza litatoli.—Ezek. 2:4, 5.
4 Tozali na bantina malamu ya kozala na makanisi ya kokende liboso. Bokoli ya mosala ya kosakola na mokili mobimba mpe kobɛlɛma ya bolozi monene esengeli kopusa mokomoko na biso na kosala oyo ekoki na ye mpe kokokisa mosala na bizaleli ya kosambela Nzambe. (2 Pet. 3:11, 14) Mosala ya molende na boumeli ya sanza ya Febwali ekozala lolenge malamu ya komonisa botɔndi na biso mpo na makambo oyo tosilaki koyekola. Tolingi mpe ete baninga na biso ya sika básalela na lolenge ya malamu makambo oyo bazali koyekola. Soki bamoko kati na baoyo bazali koyekola Biblia elongo na biso basili kosala bokoli mpo na kokóma basakoli oyo babatisami naino te, na ntembe te, sanza ya Febwali ekozala eleko malamu mpo na kosala ete bábanda kosakola.
5 Tózala basakoli to babongisi-nzela, biso nyonso tokosungama soki tozali kobatela ntango nyonso na elimo na biso ete Yehova azali kosɛnga na biso eloko moko te ya bozito. (1 Yoa. 5:3) Alaki biso ete akosunga biso. (Ebe. 13:5b, 6) Atako botyoli mpe botɛmɛli ya bato ezali, biso tosengeli kozala na makanisi ya kokende liboso mpe kokoba kosakola, mpamba te yango ezali mokano ya Nzambe.—1 Tim. 2:3, 4.