Nguya ya Liloba na Nzambe
1 Biblia ezali na bopusi monene likoló na bomoi ya bamilio ya bato. Makambo mazwami kati na yango mazali mpenza kopusa na mosala koleka babuku nyonso oyo ekomami na bato. (Ebe. 4:12) Tótalela oyo yango esalaki epai na biso. Solo mpenza, motuya na yango ekokani na mosusu te.
2 Batatoli ya Yehova bazali mpenza bayekoli mpe balongisi ya liboso ya Biblia. Tosengeli kotala botángi ya Biblia lokola eteni ya ntina ya manaka na biso ya Teokrasi mokolo na mokolo, mpe kopesa yango esika ya liboso koleka televizyo to likambo nyonso mosusu ya kominanola.
3 Likambo ya mokolo na mokolo: Libota ya Yehova eyebi ete botángi ya Biblia mokolo na mokolo esalaka bopusi ya ntina mpenza. Uta bambula mingi, likomi monene oyo lityami likoló na moko ya bandako ya enyateli ya la Société na Brooklyn ezali kopesa libyangami oyo epai na baleki nzela: “Bótángaka mokolo na mokolo Biblia Mosantu, Liloba na Nzambe.” Basɛngaka epai na basangani ya sika ya libota ya Betele ete bátánga Biblia mobimba na boumeli ya mbula na bango ya liboso oyo balekisi na Betele.
4 Atako ntango na biso etondi na makambo mingi ya kosala, tolandaka pɔsɔ na pɔsɔ manaka ya botángi Biblia oyo ebongisami na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi? Soki tosilá kokutana na mikakatano kati na likambo oyo, mpo na nini te kobongisa manaka na biso na boumeli ya sanza ya Mai? Botángi ya Biblia oyo ebongisami mpo na sanza mobimba ebandi na Masese 21 kino na Masese 31, likambo oyo ememi biso na kotánga bankasa misato to minei na pɔsɔ moko. Basusu bazali kozwa ekateli ya kotánga mwa eteni moko mokolo na mokolo, mbala mosusu na ntɔngɔntɔngɔ to na mpokwa liboso ya kokende kolala. Ata nini ezali liponi na yo, eloko eleki ntina ezali ete okoka kozwa matomba ya malamu oyo mazali kouta na botángi ya Liloba na Nzambe mokolo na mokolo.
5 Tókabola Biblia na sanza ya Mai: Bato mingi bazali naino na limemya mpo na Biblia, mpe bazali pene mpo na koyoka na ntango tozali kotángela bango mikapo. Na sanza ya Mai, tokokabola Traduction du monde nouveau bakisa mpe buku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? Talá libaku malamu ya komonisa na bato ya motema sembo motuya ya Liloba na Nzambe! Tólakisa bango na mɔtɔ mpenza.
6 Tóbongisa maloba ya kondimisa oyo makanisami malamumalamu mpo na komonisa makambo oyo ekesenisi Traduction du monde nouveau na mabongoli mosusu, oyo makoki kopesa epai na bato mposa ya kozala na yango. Tólobela mingi bolamu bozwami na kosalela yango. Tokoki komonisa polele moko na mitó na makambo ya eteni “Sujets de conversation biblique” mpe koyokanisa yango na buku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? Okoki mpe kolobela motuya ya index ya bankasa 102 ya maloba na Biblia na komonisáká lolenge nini ekoki kopesa nzela na motángi ete amona lisusu mikapo oyo ameseni na yango. Basakoli mosusu bakosepela mbala mosusu komonisa mingi “Appendice” to “Kolandana ya babuku ya Biblia” na kolimboláká motuya na yango kati na boyekoli ya Liloba na Nzambe.
7 Tóbosana te koloba ete Traduction du monde nouveau ebongolami na Lifalanse ya mikolo na biso, likambo oyo lizali kopesa nzela na kosimba ndimbola na yango kozanga nkaka. Bokokanisi na yango ekoki kosalema na Babiblia mosusu ya lelo na Matai 5:3 mpe na 1 Bakolinti 16:22. Traduction du monde nouveau ezali kosalela nkombo na Nzambe Yehova mbala 7 210.
8 Ya solo, Biblia ezali Liloba na Nzambe. Soki tozali kotánga yango, tozali na kondima kati na nsango na yango mpe tozali kosalela batoli na yango kati na bomoi na biso, tokozwa matomba mingi. Ekomamaki mpo na kopesa biso kolakisama mpe elikya. (Lom. 15:4) Ezali na ntina ete tótalelaka yango mokolo na mokolo mpe ete tózala pene na kosalela yango mpo na koteya bazalani na biso.