Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/95 lok. 1
  • Tósakola na molende koleka

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tósakola na molende koleka
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Masolo mosusu
  • Tóbongisa lolenge na biso ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Monisá ete osepelaka na bato​—Na komibongisáká
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Tóbongisaka biso moko ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Ndenge ya kosalisa bato ya sika mpo báyeba kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1995
km 5/95 lok. 1

Tósakola na molende koleka

1 Mosala ya kosakola ekómi likambo ya kosala na lombango mpenza koleka. Bato bakokoba kozala na bomoi to bakokufa na kotalela ezalela na bango liboso na nsango malamu. (1 Pet. 4:5, 6, 17; Emon. 14:6, 7) Yango wana tolukaka ntango nyonso kosakola na molende koleka. Eloko nini esengeli na biso mpo na kosala na boyokani na likambo yango?

2 Tómibongisaka malamu: Tópona kati na Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza lisolo oyo, engebene biso, ekobonga mpenza mpo na kobenda likebi ya bato ya teritware na biso mpe tóyokanisa makambo oyo tozali koloba na ezalela na bango. Lobá bobele ete tósepela kosalela mwango moko oyo tomoni ete ebongi na biso oyo etongami na zingazinga ya mwa makanisi mpe ya mikapo oyo toyebi ete mizali na nguya. Na bongo tósɛnzɛla ete ebandeli ya lisolo na biso ebenda likebi. (Lolenge nini okoki kobanda mpe kolandisa masoló likoló na Biblia, nkasa 2-7.) Mbala mosusu tokolinga kotuna epai na mobalani na biso motuna moko ya ntina to kotuna likanisi na ye na ntina na likambo moko to mosusu oyo ezali kolobelama mingi na minɔkɔ ya bafandi ya kartye na bango. Soki tomoni ete lisolo na biso etikali kati na bɔɔngɔ, tómimekisa elongo na mosangani moko ya libota na biso to elongo na mosakoli moko oyo akoki kopesa biso makanisi ya ntina mpo na kokola.

3 Tósolola elongo na bato: Mokano na biso ezali ya kopalanganisa nsango moko ya ntina. Tokoki kolonga soki tozali kobanda masolo ya kosepelisa. Soki molobani na biso abimisi ntembe moko boye to apesi biso likanisi na ye likoló ya lisolo moko, tóyoka ye na likebi mpenza. Oyo azali koloba ekoki kosalisa na kosɔsɔla mikapo nini ya Biblia tokoki kosalela mpo na koyanola ye mpe koyebisa elongo na ye elikya oyo ezali kati na biso. (1 Pet. 3:15) Soki likanisi na ye eyokani te elongo na mateya ya Biblia, tokoki koloba, na ekɛngɛ nyonso ete: “Bato mingi bazali komona makambo na lolenge yo ozali komonela yango. Kasi talá awa lolenge mosusu ya kotalela likambo.” Na nsima, tótángela ye mokapo moko oyo ebongi mpe tótuna ye likanisi na ye mpo na yango.

4 Tózala na ezaleli ya pɛpɛlɛ: Soki tomibongisi malamu, nzokande tokutani na moto moko te, yango ezali mpenza na litomba moko te. Lelo oyo, esalemaka mingi ete tókuta bato moke na ndako na bango na ntango tozali kosakola. Soki ezali motindo wana kati na teritware na biso, mpo na nini te kobongisa manaka na biso mpo na kokende ndako na ndako na ntango oyo bato mingi bazali epai na bango? Mbala mosusu tokomona ete bawikende ezali bantango ya malamu koleka mpo na kotala bato. Mbala mosusu, ezali na boumeli ya pɔsɔ, mingi mpenza na ebandeli ya mpokwa, nde ebongi mpo na kokutana na bango. Kati na bitúká mosusu, basakoli bamonaka malamu ete bápesa litatoli na mikolo ya bafɛti, mpamba te bakoki na ntango yango koyebisa nsango malamu epai na bato mingi. Mikolo wana, bato bazalaka mbala mingi na ezaleli mpe na elimo malamu mpo na kosolola. Ebongi na mabaku wana kobongola ebandeli ya masolo na biso mpe kosala boyokanisi kati na makambo oyo biso tokomona mpe lisolo moko ya Biblia.

5 Tótala soki masolo na biso ezali ya nguya: Nsima na kotika moto moko, tómituna ete: “Nasimbi mpenza motema na ye? Nasili kopusa ye na koloba oyo azali kokanisa mpe nayokaki ye? Nakotalela lolenge oyo nakuteli ye, ndenge na ngai ya kosala ebongaki mpenza?” Ekoki kozala na ntina kosakola mbala na mbala elongo na mosakoli moko oyo ameseni na mosala to na mobongisi-nzela moko mpe kotya likebi monene na masolo na ye, mpe kosaláká yango kati na mokano ya kosakola biso moko na molende nyonso.

6 Soki tozali na mayela kati na mosala na biso, tokozala na likoki ya koyebisa na ntina na Bokonzi oyo ekopesa biso nzela ya ‘komibikisa, biso mpenza mpe baoyo bazali koyoka biso.’​—1 Tim. 4:16; Mas. 22:29.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto