Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/95 lok. 7
  • Tótya likebi na liloba ya esakweli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tótya likebi na liloba ya esakweli
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Masolo mosusu
  • Tyá likebi na liloba ya esakweli ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Zalá na kondima na Liloba ya Esakweli ya Nzambe!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mituna na batangi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Totya likebi na liloba ya esakweli!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1995
km 8/95 lok. 7

Tótya likebi na liloba ya esakweli

1 “Na yango tozali na liloba ya esakweli oyo emonisami mpenza solo.” (2 Petelo 1:19, NW) Mpo na nini Petelo alobaki bongo? Bisakweli bitali Bokonzi oyo elobelamaki kati na Makomami ya Liebele bakisá oyo bilobelamaki na Yesu ye moko bindimisamaki, to ‘bimonisamaki mpenza solo,’ na ntina na oyo Petelo mpe bayekoli mosusu mibale bamonaki mpe bayokaki na ntango ya mbongwana ya Yesu, soko bambula 32 liboso. Emonaneli wana ya kobenda likebi endimisaki bango: Yesu Klisto akolatisama mpenza nguya ya bokonzi na nkembo mingi mpe na lisungi ya Tata na ye. Baklisto ya ekeke ya liboso ‘basalaki malamu na kotya likebi na liloba ya esakweli lokola mwinda oyo mozali kongɛnga,’ mpo ete mitema na bango mikóma makasi te. Likebi oyo bazalaki kotya na bingɛngiseli ya liloba ya esakweli ezalaki kopesa bango nzela ya kosɛnzɛla mpe kongɛngisama kino na kotana ya mokolo mosusu ya sika, wana Kliso “monzoto ya ntɔ́ngɔ́,” akotɛlɛma na nkembo ya Bokonzi.​—2 Petelo 1:16-19; Mat. 17:1-9.

2 Tozalaki esika moko na Petelo te mpo na kotala nkembo ya mbongwana ya Yesu. Nzokande, baklisto ya ntango na biso oyo bazali kotya likebi na liloba ya esakweli bazali na libaku monene ya komona Bokonzi ya Klisto bobele na meko moke te, kasi nde elembo ya polele ete Mokonzi na nkembo azali mpenza koyangela. Na meko oyo bambula ezali koleka kobanda 1914, liloba ya esakweli limonisami mpenza solo, wana tozali komona kokokisama ya makambo ndenge na ndenge ya “elembo” ya polele oyo Yesu apesaki na ntina na “kozala” na ye lokola Mokonzi. Eteni monene ya elembo ezali ete kosakolama ya boyangeli na ye, to Bokonzi, esengeli kosalema kati na mabota nyonso liboso ete Mokonzi atya nsuka na ebongiseli ya biloko ya ntango oyo. Na nsé ya litambwisi ya Klisto, mosala ya kosakola Bokonzi ezali kosalema sikawa kati na mikili 232, na lolenge oyo tokokaki kokanisa yango te. (Mat. 24:3-14) Lisusu, lokola ntango oyo etikali liboso ya “bolózi monene” ekómi pene na nsuka na yango, Mokonzi oyo atyami azali koyanganisa “ebele monene... ya mabota nyonso” oyo esangisi mibali mpe basi oyo bazali na kondima kati na motuya ya “makila ya Mwana na mpate.”​—Emon. 7:9, 10, 14.

3 Mpo ete “monzoto mwa ntɔ́ngɔ́” motɛlɛmi, elingi koloba ete Klisto alatisami nguya, esengeli na biso ntango nyonso kotya likebi na liloba ya esakweli? Ezali bongo! Yesu Klisto oyo akɛmbisami apesaki na ntoma Yoane mɔlɔngɔ́ ya bimonaneli oyo bisali mokanda ya Emoniseli. Soki bimonaneli yango bipesaki elendiseli mpe mateya epai ya baklisto ya liboso, yango ezali mpe na motuya monene mpo na baoyo bazali kobika “na mokolo ya Nkolo,” oyo tozali kati na yango. (Emon. 1:10) Ezali na ntina yango masangá ya basaleli ya Yehova mazali koyekola lisusu búku Emoniseli: kokokana.

4 “Esengo na oyo akotánga na mongongo makasi mpe baoyo bazali koyoka maloba ya esakweli oyo, mpe baoyo bazali kotosa makambo oyo makomami kati na yango, mpamba te ntango oyo elakami ekómi pene.” (Emon. 1:3, NW) Soki tolingi kozala na esengo, tosengeli kokanga ntina, kozala na bososoli ya sikisiki ya bimonaneli ya esakweli yango. Yango esɛngaka nini? Kozongela makambo ezali malamu mpo na kokɔtisa kati na mitema na biso ntina ya lisoló ya Emoniseli. Ntoma Petelo, oyo azalaki moko kati na lisangani ya mikóló-bakambi na ekeke ya liboso, ayebaki ntina ya kozongela basolo ya moboko mpo na “kolamwisa” na elobeli ya elimo, bandeko na ye. (2 Petelo 1:12, 13) Bobele bongo, “moombo ya sembo mpe ya mayele” ya ntango na biso azali kosalesa biso na koyeba motuya ya liloba ya esakweli na kobendáká mbala na mbala likebi na biso likoló na yango.​—Mat. 24:45-47.

5 Lolenge ya kotya likebi: Liloba ya esakweli ya Emoniseli ezali kosɛnga likebi ya motindo nini? Ntoma Paulo akundweli biso ete Nzambe alobaki te na baklisto na nzela ya baanzelu to ya basakoli, lokola asalaki yango mpo na basaleli na ye oyo bazalaki liboso ete Klisto aya. Yehova asololaki na biso nde na nzela ya Mwana na ye oyo alingaki mingi koleka, oyo ye atye “mosangoli ya biloko nyonso.” (Ebe. 1:1, 2, NW) “Yango wana, ekoki na biso kotya mpenza likebi na makambo masili biso koyoka ete topɛngwa na nzela te.” (Ebe. 2:1) Ya solo, esengeli na biso kotya likebi na Liloba ya Nzambe mpe mingimingi na liloba ya esakweli oyo liuti na Yesu Klisto. Ndenge nini tokoki mpenza kotya likebi na boyekoli ya Emoniseli?

6 Liboso, ezali na ntina mingi ete tózala wana na boyekoli ya mokanda pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. Ezali solo ete mingi kati na biso bazali koyekola búku Emoniseli: kokokana na yango mpo na mbala ya misato. Na bongo, basusu bakoki kokamata na bopɔtu koyangana na boyekoli ya mokanda kokanisáká ete ata soki bazangi likita moko, basila komesana na makambo yango. Nzokande, mbula na mbula oyo ezali koleka, makambo wana ya esakweli mazali kokokana mpe kokóma ntina koleka lolenge ezalaki na 1993 mpe 1994, ntango toyekolaki búku Emoniseli: kokokana na yango mpo na mbala ya liboso. Biso nyonso tosengeli kotya likebi na makambo oyo mazali koleka sikawa oyo mazali komema nokinoki na kokokisama ya bisakweli ya Emoniseli. Na yango, tokozala pene ya kosala engebene mokano ya Yehova. Na meko oyo ekoki na biso, tómityela mokano ya kozanga ata likita moko te ya boyekoli ya mokanda na boumeli ya botaleli ya ntina ya Emoniseli.

7 Na nsima, tóbongisa malamu boyekoli na biso. Tóluka mikapo oyo mipesami mpe tókanisa na mozindo na lolenge oyo mizali kolendisa ndimbola ya mikapo ya Emoniseli oyo toyekoli. Na kosaláká bongo, tokosuka te bobele na koyanola na mituna. Tósala milende ya kozwa bobele boyebi te, kasi lisusu bwanya mpe mayele. (Mas. 4:7) Na nsuka, tósangana na molende nyonso na kopesáká bakomantɛrɛ to na kotángáká mikapo. Na boyekoli moko na moko, tómityela mokano ya koyanola mbala mingi. Yango ekosalisa biso ete tótya makanisi na biso na eteni oyo totaleli.

8 Kotya likebi mingi na liloba ya esakweli elimboli koleka kobongisa makita, koyangana na yango mpe kopesa bakomantɛrɛ. Yango elimboli mpe ete ata nsima ya boyekoli, tosengeli kokóba ‘komanyola likoló na makambo yango, komipesa na yango mobimba.’ (1 Tim. 4:15) Soki liloba ya esakweli lisengeli kozala lokola mwinda oyo mozali kongɛnga kati na mitema na biso, esengeli na biso kosɛnzɛla na boye ete ezala na bopusi likoló na bomoto na biso: makanisi na biso, bamposa na biso, mayoki na biso, mabanzo na biso mpe mikano na biso. (2 Pet. 1:19) Ntina wana, tosengeli komituna: Makambo oyo malimboli nini mpo na ngai? Nayekoli nini na ntina na Yehova mpe na ntina na Mwana na ye, Yesu Klisto? Mitindá nini mizali kobima kati na makanisi yango? Motema na ngai ezali mpenza kokanga ntina ya boyekoli? Ndenge nini nakoki kosalela bansolo yango kati na bomoi na ngai? Kati na libota na ngai? Kati na lisangá? Soki mokomoko kati na biso asaleli makambo oyo toyekolaka, tokoki koloba lokola mokomi na Nzembo ete: “Liloba na yo ezali mwinda na [matambe, NW] na ngai mpe pole na nzela na ngai.”​—Nz. 119:105; Yobo 29:3, 4.

9 Tósɛnzɛlaka na ntango ya mpasi: Na mobu 33 ya ntango na biso, Yesu akebisaki bayekoli na ye mpo na kobebisama oyo ezalaki koya mpo na Yelusaleme mpe makambo oyo makomonisela bango ntango ya kokima na esika ya libateli (Luka 19:41-44; 21:7-21) Na nsima, mbula koleka 30 elekaki. Baklisto mosusu ya Yudea bakanisaki ete makambo moke makobongwana mosika te. Elendiseli ya ‘kotya likebi na liloba ya esakweli’ oyo ntoma molingami Petelo apesaki kati na mokanda na ye ya mibale, oyo akomaki na mobu 64, ebongaki mpenza! (2 Pet. 1:19) Mwa moke na nsima na mobu 66, mampinga ya Baloma bazingaki Yelusaleme. Ntango balongwaki na mbalakaka kozanga ntina ya sikisiki, baklisto ya Yudea oyo bazalaki kosɛnzɛla balandaki malako ya Yesu mpe bakimaki. Na nsima, na mobu 70, mampinga ya Baloma bazongaki lisusu mpe babebisaki mpenza Yelusaleme. Oyo nde esengo baklisto wana bazalaki na yango ya kotya likebi mpenza na liloba ya esakweli ya Yesu!

10 Nini ezali kosala ete baklisto ya lelo básɛnzɛlaka? Kati na bimonaneli ya Emoniseli, Yesu ayebisaki baklisto oyo bazali kobika lelo ete makambo mingi makobima na boumeli ya mokolo na Nkolo. Na boumeli ya mbula 81 oyo euti koleka, makambo yango mingi masili kosalema: kobotama ya Bokonzi; etumba kati na makoló oyo elandanaki na kokwea ya Satana mpe bademó na ye oyo na nsima babwakamaki zingazinga na mabelé; kokwea ya Babilone monene; mpe kobima ya nyama na yauli ya lángi motane, nguya ya mwambe kati na mokili mobimba. Kokokisama ya makambo wana ya liloba ya esakweli ya Emoniseli ezali kondimisa biso ete mosika te tokokoka komona kokokisama ya makambo oyo mazali koya: kotyama elembo likoló na batikali ya ba 144 000, koyanganisama mobimba ya ebele monene, kobomama ya Babilone monene, etumba ya Armagedon, kobwakama ya Satana kati na libulu mozindo mpe boyangeli ya mbula nkóto ya Klisto. Ezali na ntina ete tótya likebi na maloba oyo ya Yesu: “Talá! Nakoya lokola moyibi. Esengo na oyo akɛngɛli mpe abateli bilamba na ye, ete atambola bolumbu te mpe amona nsɔni te.”​—Emon. 16:15.

11 Tózali kosɛnzɛla ntango nyonso? Tozwaka liloba ya esakweli na motuya? Ezala ete tomipesaki epai na Yehova mpe tozwaki batisimo esili koleka mbula 5 to mbula 50, maloba ya Paulo oyo atindelaki baklisto ya Loma mabongi mpenza mpo na biso: “Na bongo, bósosola ntango ete ezali ntango na kolongwa na mpɔngi. Mpo ete kobika ebɛlɛmi na biso sasaipi, koleka na ntango wana tondimaki liboso. Butu eumeli ntango molai, ntɔ́ngɔ́ elingi kotana.” Na nsima, Paulo alendisi baklisto ete ‘bábwaka misala ya molili’ mpe ‘bátambolaka na lolenge lobongi.’ (Lom. 13: 11-13) Tozali kobika na mokili oyo ebebi mpenza mpo na oyo etali bizaleli malamu. Makambo oyo mazalaki kotungisa bato ya mokili esili koleka bobele mbula 30 to mbula 40 makómi komonana lokola malamu lelo na nsuka ya ekeke ya ntuku mibale. Tósɛnzɛla ete tókende soko moke te na libebi ya molili ya mokili na kolɛmbisáká bokɛngi na biso mpo na oyo etali bizaleli malamu. Soki tomitiki kopusama na ezaleli ya kopesa nzela na makambo nyonso mpe lolenge ya bomoi ya mokili oyo esili kobeba, tokobosana makambo ya moboko oyo mazali kosalema na miso na biso lelo mpe oyo mosika te makosilisama mpo na libela: kolóngisama ya ntómo oyo Yehova azali na yango ya koyangela mpe kosantisama ya nkombo na ye. Kolala na elimo ekoki kotya na likámá lobiko na biso, oyo sikawa ebɛlɛmi.

12 Tópesa motuya koleka na liloba ya esakweli: Basakoli Baebele ya ntango ya kala bazalaki komipesa mingi na kokokisama ya maloba mapemami na ntina na Masiya. “Balukaki mpe batunaki” na ntina na kokokisama ya mokano ya Nzambe (1 Pet. 1:10, 11) Bobele bongo, soki tozali kotya likebi na liloba ya esakweli lizwami na mokanda ya Emoniseli, tokososola mingi koleka motuya ya makambo ya elimo. Mposa na biso ya bilei ya elimo ekokóla, yango ekopusa biso ete tótimola kati na “makambo na bozindo na Nzambe.” (1 Kol. 2:10) Soki, kati na motema na biso, tozali kopesa motuya monene na liloba ya esakweli mpe soki tozali kolinga yango na mozindo, moto moko te akozala na mposa ya kolendisa biso ete tóya na makita; tokozala na esengo ya koyangana mpe ya kosangana na yango pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. (Luka 6:45) Mpe soki ‘liloba lizali kati na motema na biso mpenza,’ yango ekopusa biso na ‘koyambola yango mpo na lobiko.’​—Lom. 10:8-10.

13 Lokola tozali kopusana na ntango ya nsuka, bakosɛka biso lisusu mingi koleka mpo ete tozali kobatela kondima na biso kati na maloba ya bisakweli ya Nzambe (2 Pet. 3:3, 4) Atako bongo, tokosɛnzɛla ntango nyonso na ntina na liloba ya esakweli. Mwinda oyo ete Liloba ya Nzambe ezali kolakisa biso epai oyo tokómi na kotaleláká ntango. Ezali kongɛngisa biso na likambo oyo ete tozali kati na mikolo ya nsuka ya mokili oyo ezali kati na molili. Monzoto ya ntɔ́ngɔ́ mosili kotɛlɛma. Klisto asili kolatisama nguya ya bokonzi. Tozali komona na mosika kotana ya mokolo ya sika. Tiká ete mokili ya sika oyo molakami na Nzambe mozala ntango nyonso solo na miso na biso, lokola Bokonzi ezalaki solo mpo na bantoma misato oyo bazwaki libaku ya komona yango mwa moke na emonaneli ya kosimba motema ya mbongwana ya Yesu!

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto