Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/95 lok. 7
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1995
Mosala na biso ya Bokonzi—1995
km 8/95 lok. 7

Mayebisi

◼ Lipesi ya sanza ya Agusto: Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. Setɛmbɛ: Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi! Ɔkɔtɔbɛ mpe Novɛmbɛ: Bazulunalo mpe mwa babuku.

◼ Mbala mingi tozali kozwa mbongwana ya ntalo ya mikanda na biso. Na yango, mpo na kopesa nzela na la Société ete mituya ya mosolo ya masangá mizala malamu, bakomeli mpe bandeko oyo bazali na mokumba ya kotalela mosolo ya lisangá basengeli koyebisa sikisiki mikanda oyo misombamaki epai na babongisi-nzela mpe koyebisa likoló ya lokasa S-20 dati ya S-15 oyo ezali koyebisa ntalo oyo esalelamaki mpo na mosolo oyo etindami na biro.

◼ Lisangá moko na moko ekozwa nkasa mibale ya Ɛvantɛrɛ ya mikanda (S-18). Na ebandeli ya Augusto, mokomeli ya lisangá akoyokana elongo na mosaleli oyo azali na mokumba ya koteka mikanda mpo na dati oyo bakotánga mikanda oyo mizali kati na libombo na nsuka ya sanza. Ekosengela kotánga mokanda moko na moko mpe koyebisa motuya ya mikanda nyonso likolo na lokasa ya Evantɛrɛ ya mikanda. Mosaleli na misala oyo azali na mokumba ya koteka bazulunalo akopesa motuya mobimba ya bazulunalo. Bótindela biso kopi moko, mokolo ya nsuka mpo na kotinda yango ezali mwa 6 Setɛmbɛ 1995. Bóbomba kopi mosusu kati na badosye na bino. Kotánga mikanda yango ekosalema na litambwisi ya mokomeli, mpe lokasa oyo etondisami malamu ekotalelama mpe ekotyama lobɔkɔ na mokɛngɛli-mokambi.

◼ Baoyo balingi eloko moko ya sikisiki mpo na bango bakoki koyebisa yango epai ya mosaleli na misala oyo akotekaka mikanda, ye akokoma yango nokinoki kati na lisɛngi ya mikanda ya lisangá. Mokɛngɛli-mokambi akotángisa sanza nyonso liyebisi oyo lizali kolobela kotindama ya lisɛngi ya mikanda na la Société na mbala ezali koya, mpo ete basakoli báyebisa bamposa na bango ya mikanda epai na ndeko oyo azali na mokumba yango.

◼ Mokomeli ya lisangá akosangisa balapolo ya mosala mpo na kosala Lapolo ya nsuka ya mbula ya lisangá (S-10). Akopesa malako ya sikisiki epai na nkulutu to epai na mosaleli na misala oyo akosunga ye mpo na kosala lapolo yango. Kosala motindo wana ekopesa nzela na kosala lapolo ya sikisiki ya mituya oyo mizali kati na bakalati ya mosala ya mosakoli mokomoko (S-21). Lapolo ya nsuka ya mbula ya lisangá (S-10) esengeli kotondisama malamu, mpe ekotalelama malamu mpenza na komite ya mosala ya lisangá.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto