Tózala na limemya epai na bazalani na biso—Eteni ya liboso
1 Tozali na esengo ya komona ete libota ya Yehova lizali kofuluka, yango epesi nzela na bokoli ya motuya ya masangá. Kati na bitúká mosusu, mingimingi na bingumba minene, basalelaka mpenza Bandako ya Bokonzi, mpamba te Ndako bobele moko ya Bokonzi ekoki kosalelama na masangá mingi. Ezalela wana ezali kobenda mingi baoyo nyonso batalelami na likambo yango.
2 Ebongi ete lisangá moko na moko oyo eyanganaka na Ndako ya Bokonzi etika yango pɛto mpe ebongisami malamu mpo na bandeko mibali mpe basi oyo bakoya na nsima. Bakiti ekotyama na molɔngɔ, bisika mikanda mitɛkisamaka bikotikala mpamba, mpe eloko nyonso oyo moto asundoli kati na Ndako ya Bokonzi ekolɔkɔtama. Batwalɛti esengeli kokɔmbɔlama, esengeli kozala na sabuni, na bipangwiseli-mabɔkɔ mpe na papier hygiénique, bibwekelo ya bosɔtɔ bisengeli kotikala mpamba.
3 Ntango ebongisami ete makita mibale malandana nokiniki moko nsima na mosusu, bato ya liboso mpo na kobima basengeli te kolekisa ntango mpambampamba, mpo soki basali bongo bakobebisa bibongiseli ya likita oyo likolanda na nsima. Ntango basusu bazali koyeisa masolo na bango milai, bazali kotondisa ekuke mpe bazali kopesa nzela te na bandeko ete bábongisa likita oyo elandi na ntango esengeli. Ekoki kozala ete bisika ya kotɛlɛmisa mituka ezali moke; na bongo ezali malamu kokende nokinoki mpo ete baoyo bazali koya bázwa esika ya kotɛlɛmisa mituka na bango. Epai mosusu, baoyo bazali koya na likita oyo likolanda basengeli te koya naino ntango ekoki te, mpamba te bakotondisa mpambampamba ekuke, esika ya kotya bilamba mpe bisika ya kotɛlɛmisa mituka.
4 Soki masangá mingi nde matalelami, ezali mpenza malamu kosala na boyokani mpo na kotya bopɛto pɔsɔ na pɔsɔ kati na Ndako na Bokonzi. Na momeseno, lisangá na lisangá ezalaka na ngala na yango mpo na kotya bopɛto. Soki ezali na ngala ya lisangá na bino, bósɛnzɛla ete bopɛtoli yango esalema malamumalamu mpe na molende nyonso. Boye, masangá mosusu makozala na ntina ya komilelalela te.
5 Na bantango mosusu, ezali na ntina ete lisangá moko na moko ebongola manaka na yango ya makita, mingimingi na ntango ya boyei ya mokɛngɛli ya zongazonga. Bankulutu basengeli koyebisa mwa mikolo na liboso bankulutu ya lisangá to ya masangá mosusu mpo ete bázala na likoki ya koyebisa nokinoki epai na basakoli. Lisusu, soki ebongisami kosalela Ndako ya Bokonzi mpo na likambo moko oyo endimami, na ndakisa Eteyelo mpo na babongisi-nzela, likita ya bankulutu ya zongazonga, to libala, masangá mpe bakɛngɛli nyonso ya zongazonga oyo batalelami na likambo yango, basengeli koyeba yango liboso mpenza mpo ete bákamata bibongiseli ya kosalela te Ndako ya Bokonzi na ntango yango.
6 Bandako mingi ya Bokonzi esalelami na masangá oyo mazali na zongazonga ikeseni. Ezali likambo ya ntina ete bakɛngɛli ya zongazonga oyo bazali kotala masangá wana báyebisamelana badati oyo bazali kokana kotala masangá yango. Mabongwani ya mbalakaka ezalaka malamu te to mpe mikakatano mosusu mikoki kobima wana bakɛngɛli-batamboli mibale babongisi boyei na bango na pɔsɔ bobele moko.
7 Na kosaláká milende mpo na komonisa limemya epai na bazalani na biso, na kotyáká ebongiseli na bango mikolo mingi liboso mpe na kopesanáká mabɔkɔ, masangá makozala na boyokani malamu, mpe bakolonga na ‘kosala nyonso na lolenge ya malamu mpe na molɔngɔ.’—1 Kol. 14:40.