Tókanga ntina ya liloba litali Bokonzi
1 Kati na lisese ya molóni, Yesu alimbolaki ete mbóto oyo ekweaki likoló na “mabelé malamu” ezali “oyo ayoki liloba mpe akangi ntina na yango.” (Mat. 13:23, NW) Nsima na koyoka nsango etali Bokonzi, ‘tokangi ntina’ na yango? Yango ezali na bopusi nini likoló na bomoi na biso? Tosili kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso, komonisáká bongo ete tokangi ntina ya nsango yango?
2 Boyekoli ya moto na moto ezali ntina mpo na bososoli malamu ya nsango ya Bokonzi. Tosengeli kozwa ntango ya komanyola likoló na bilei ya elimo oyo tozwaka. Soki tozali kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mbangumbangu, ezali lokola nde tozali komɛla nokinoki bilei kitoko mpe ya ntina mpo na nzoto. Tozwaka ntango ya kolya malɛmbɛmalɛmbɛ bilei ya elimo? Mpo na kozwa litomba malamu yango, esengeli na biso kozala na bopusi malamu mpe na mposa malamu ya bilei ya elimo. Soki yango ezali te, makambo mosusu makoki kokitisa bolamu ya boyekoli ya moto na moto to kokamata ntango oyo tozali na yango mposa mpo na koyekola. Ezalaka likambo ya pɛtɛɛ te mpo na kotosa manáka malamu ya boyekoli. Ezali solo ete tosengeli kosɛnzɛla mpenza mpo na bokatikati ya makambo na biso oyo totyaka na esika ya liboso, kasi bozwi ya elimo oyo tokoki komizwela ezali na ntalo te.—Mas. 3:13-18; Kols. 1:27.
3 Na kotaleláká Makomami na mozindo, tokokólisa mokolo na mokolo makanisi ya kokende liboso mpe kolendisa mpo na Bokonzi. Baoyo bazali “kososola bamposa na bango ya elimo” bamibongisaka mpo na kotánga mokapo ya mokolo mpe komantɛrɛ na yango. (Mat. 5:3) Mikapo mingi mizali kolobela Bokonzi na mitindo mikeseni. Na ndakisa, mokapo oyo mopesamaki mpo na mokolo mwa 22 Novɛ́mbɛ 1994 ezalaki Matai 13:4. Komantɛrɛ na yango elobelaki elikya ya Bokonzi mpe ekundwelaki biso likámá oyo ekoki kobima kati na boyokani elongo na bazalani na biso to elongo na basangani ya libota na biso. Kati na Betele nyonso, botaleli ya mokapo ya mokolo na boumeli ya miniti 15 ebongisamaka na ntɔ́ngɔ́, mikolo nyonso ya mosala. Ebongiseli yango ezali komonisa ntina ya kotalela mokapo ya mokolo elongo mpe bolamu oyo tokoki kozwa na kosaláká bongo. Kati na manaka na yango, libota na yo libongisaka mpe lisoló ya mokolo na mokolo motindo wana?
4 Na meko oyo botɔ́ndi na biso ezali kokóla mpo na Bokonzi, tozali komiyoka ete topusami mingi na koyebisa epai na bazalani na biso nsango oyo etali bokonzi yango. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! epesaka biso oyo tokoki kobenga ete bipeliseli ya makanisi, koleisáká elimo na biso na mateya mabongi. Na lisalisi ya bazulunalo wana, tozali mpenza koyeba ete mokili mozali na mposa ya Bokonzi ya Nzambe. Esalisaka biso na kozala bato ya elimo oyo bazali na “makanisi ya Klisto.” (1 Kol. 2:15, 16) Na bongo, tokoki kolendisa kondima na biso mpe kokólisa molende na biso ya koyebisa elikya etali Bokonzi.—1 Petelo 3:15.
5 Ezali na ntina ete tókanga mpenzampenza ntina ya nsango ya Bokonzi. Bokonzi ezali mwango oyo na nzela na yango Nzambe akotya boyangeli na ye, akosilisa mabe mpe akotya mokili ya sika, paladiso. Yesu asɛngaki na biso ete tótyaka Bokonzi na esika ya liboso kati na bomoi na biso. Soki tolingi kozala na bomoi na nsé ya boyangeli na ye, esengeli na biso kozala bato oyo bakokani na bampate. (Mat. 6:10, 33) Tósimba libaku oyo lipesameli biso ya kozwa bolamu oyo Bokonzi ezali kopesa!