Programɛ ya libota—Mokapo ya mokolo
1 Baboti oyo balingaka bana na bango basalaka milende mokolo na mokolo mpo na koleisa bango malamu. Koleisa bana na elimo na makambo oyo euti na Liloba ya Nzambe, ezali kutu na ntina koleka. (Mat. 4:4) Lolenge moko oyo okoki kosalisa bana na yo bákolisa mposa makasi mpo na bilei ya elimo mpe ‘bákola tii na lobiko,’ ezali kozwaka ntango mokolo na mokolo mpo na kotalela mokapo ya mokolo mpe komantɛrɛ na yango elongo na libota mobimba. (1 Pet. 2:2) Ntango nini okoki kokɔtisa yango na programɛ ya libota na yo?
2 Ntango bozali kolya: Kotalela mokapo ya mokolo na ntɔngɔ ekoki kosalisa libota na yo bákanisaka Yehova mokolo mobimba. (Nz. 16:8) Mama moko azalaki kotánga mpe kotalela mokapo ya mokolo mpe komantɛrɛ na yango ná mwana na ye ya mobali na ntɔngɔ ntango mwana yango azali komela ti, mpe azalaki kobondela liboso mwana akende kelasi. Yango ezalaki kolendisa mwana yango ete akwea te na likambo etali kolinga ekólo, na masɛnginya ya kosala pite, mpe ezalaki kolendisa ye apesa litatoli na mpiko nyonso ezala epai ya bana-kelasi to epai ya balakisi. Atako azalaki kaka ye moko Motatoli na eteyelo yango, azalaki komiyoka te ete azali ye moko.
3 Soki bozali kokoka te kotalela mokapo ya mokolo na ntɔngɔ, bokoki kosala yango na nsima libota mobimba, mbala mosusu na mpokwa na ntango ya kolya. Basusu mpe balobelaka makambo oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola mpe makambo oyo basepelaki na yango ntango batángaki Biblia bango moko, ntango bazali kolya. Mingi bakanisaka na esengo mpenza bantango wana oyo bazalaki kolekisa na mesa mpe balobelaka yango lokola bantango ya malamu koleka oyo balekisá na mabota na bango.
4 Na butu: Mabota mosusu bamonaka ete ezali malamu koleka kotalela mokapo ya mokolo na butu, liboso ya kolala. Yango ekoki mpe kozala ntango ya malamu ya kobondela elongo na libota mobimba. Ntango bana na yo bazali koyoka yo ozali koloba mpo na Yehova mpe kobondela ye mokolo na mokolo, bango mpe bakomona ete Yehova azali mpenza moto ya solo.
5 Tiká ete Yehova apambola milende oyo ozali kosala mpo na kokɔtisa solo na mitema ya bana na yo, mpe koluka kosalela malamu mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo.