Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/95 lok. 3
  • Betele ezali na mposa ya basali na bolingo malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Betele ezali na mposa ya basali na bolingo malamu
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Masolo mosusu
  • Yango ekoki kozala mosala oyo ebongi na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Yo mpe okoki komipesa?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Tómonisa botɔ́ndi mpo na “Ndako ya Nzambe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Libyangi mpo na moto nyonso!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1995
km 9/95 lok. 3

Betele ezali na mposa ya basali na bolingo malamu

1 Nzembo 110:3 emonisi ete eloko oyo esengelaki komonana na libota mobimba ya Nzambe na boumeli ya mikolo oyo ya nsuka ezali elimo na yango ya kosala na bolingo malamu. Kati na mabele mobimba, basaleli ya Yehova bazali komipesa mpo ete nsango malamu ya Bokonzi esakolama. Kati na bato yango, tozali mpe na basangani ya libota ya Betele. Tolingi kopesa bino mayebisi mosusu na ntina ete bósosola malamumalamu libaku kitoko oyo lolenge wana ya mosala ezali kopesa mpe ete bóyeba mposa oyo la Société azali na yango.

2 Misala mizali mingi: Misala oyo mipesami na basangi ya libota ya Betele mizali ndenge na ndenge. Na Brooklyn, mpe na bafiliale ya la Société, bandeko bazali komipesa na kobimisama to kotindama ya ba Biblia, babuku, bazulunalo, mwa babuku mpe batrakte. Basusu bazali na mosala ya kobongisa bisaleli mpe bandako. Kobatela libota (bilei, kopɛtola bilamba, mpe bongo na bongo) ezali kosɛnga mosala mingi. Lisusu, bandeko mibali mpe basi oyo batalelaka mosala ya bopɛto bazali kobatela bisika pɛto mpe bazali kokokisa misala mingi ya ntina.

3 Makoki mpe masɛngami: Sikawa, Betele ezali libosoliboso na mposa ya bilenge mibali oyo bazali minzemba mpe na kolɔngɔnɔ malamu, mpamba te mosala na Betele esɛngaka makasi mpe nguya na nzoto. Elenge mobali oyo alingi kokɔta na Betele asengeli kozala moto oyo abatisami ekoki mbula moko to koleka. Asengeli kozala moto ya elimo, oyo azali pene mpo na kosala mosala makasi, mpe mbala mingi mosala ya mabɔkɔ. Na mikolo na biso, kati na mokili, bato mingi bamoni ete esengeli te kosala misala motindo wana. Yango wana moto nyonso oyo alingi kosala na Betele asengeli kolata bomoto ya sika mpo na kosalisa mabɔkɔ na ye misala malamu. (Talá Baefese 4:28) Asengeli te kozala moto oyo makanisi na ye nyonso matyami likolo na bisengo, komipesa mpe kominanola, mpe asengeli kozala moto oyo asili kotika bizaleli ya bomwana.—Talá 1 Bakolinti 13:11.

4 Bambula na yo ya kobotama ezali kati na 19 mpe 35? Ozali na kolɔngɔnɔ malamu na nzoto mpe na makanisi? Otángaka, oyokaka mpe olobaka Lifalanse malamu? Ozali moto ya elimo? Soki babengisi yo na Betele, okofanda kati na yango na bosembo nyonso na boumeli ya mbula moko to koleka mpe okondima lolenge nyonso ya mosala oyo bakopesa yo? Soki eyano na yo na mituna yango ezali ɛɛ, ekozala malamu ete okanisa na mozindo likolo na libaku kitoko ya kosala na Betele.

5 Matomba oyo mazali kouta na mosala na Betele: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni 1994 limonisaki likambo oyo: “Mosali na Betele azali na libaku malamu ya kosalela Yehova kati na etuluku ya bandeko mikolo nyonso! (Nzembo 26:12) Oyo nde mabaku malamu ya bokoli na elimo yango ezali kopesa!” Ɛɛ, yango ezali litomba monene oyo ezali kozwama na kosaláká na Betele. Basali na Betele bazalaka elongo na bandeko oyo bazali sembo uta bambula mingi. Na bantango mosusu, bayambaka mosangani moko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Ata soki mosala na yo ezali ya lolenge nini, ezali mpenza litomba na kosala na bomoko elongo na baninga motindo wana.

6 Manaka ya Betele: Mosali na Betele azindisami mpenza kati na misala mitali Bokonzi. Kobanda Mwayambo kino Mwapɔsɔ, na ngonga ya 6 na miniti 45, akokende na ndako ya bolei mpo na koyangana na losambo ya ntɔngɔ. Basangani ya libota ya Betele basalaka komantɛrɛ likolo na mokapo ya mokolo. Na nsima, ndeko moko ya makoki mingi akosala mwa lisolo oyo ekolandana na libondeli. Na lolenge yango, libota lilendisami na elimo liboso ya kobanda mosala na mokolo wana. Nsima ya bolei ya ntɔngɔ, moto na moto azali na mposa ya kokokisa mosala oyo mopesameli ye, kobanda Mwayambo kino Mwamitano, uta ngonga ya 7 na miniti 45 kino ngonga ya 5 na nsima ya nzanga, bakisa mpe bopemi ya ngonga moko mpo na bolei na midi; mpe na Mwapɔsɔ, kobanda na ngonga ya 7 na miniti 45 kino ngonga ya 12. Na oyo etali bantango na ye ya mpokwa mokolo na mokolo, bantango na ye na nsima ya nzanga ya Mwapɔsɔ mpe mikolo na ye ya lomingo, Mosali na Betele alekisaka yango kati na makita, na mosala ya kosakola, na boyekoli mpe na mikumba ndenge na ndenge oyo azali na yango. Akoki kokɔta na bibliotɛkɛ ya Betele mpo na koyekola mpe kobongisa makita na ye. Kasi, ezali solo ete azali mpe na ntango ya kopema mpe ya kominanola. (Malako 6:31, 34) Betele ezali kopesa nzela na moto ete apesa eteni monene ya ntango na ye kati na mosala ya bulɛɛ.

7 Misala kati na lisangá: Na Zaïre, basangani ya Betele bakabolami na masangá 29 ya engumba Kinshasa. Bayebi ete basengeli kosala na molende mpo na kobatela elimo malamu. Yango wana bayanganaka na makita ya lisangá na bango mpe basanganaka na mosala ya kosakola elongo na bandeko na bango mibali mpe basi. Lisusu, bazali na libaku ya kosala boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elongo na libota ya Betele na mpokwa ya Mwayambo. Manaka ya Betele ekangami mpenza likolo na makambo ya elimo. Litomba oyo yango ezali kobimisa ezali bongo bomoi ya esengo kati na mosala ya Yehova.—1 Kol. 15:58.

8 Lolenge ya komibongisa mpo na kosala na Betele: Soki olingi kosala na lolenge lobongi kati na Betele, yeisá elimo na yo makasi mpe salá na boyokani ya penepene elongo na Yehova. Mpo na kopona basangani ya sika ya Betele, babongisi-nzela nde bazwamaka mingi. Kasi mosala yango mozali te bobele mpo na babongisi-nzela. Baoyo nyonso bazali kokokisa masɛngami bakoki kosɛnga ete bákɔta na Betele. Na nsuka, ezala soki moto azali na makoki moko ya sikisiki to azali na yango te, esengeli na ye ete azala na likoki ya koyokana na basusu mpo na kosala na elimo ya etuluku. Kowelana mpe elimo ya lipandá esengeli kotika esika na bosalani elongo na bolingo, bakisa mpe na mposa ya kotosa litambwisi ya Teokrasi.—Talá Baefese 4:16.

9 Kati na libota ya Yehova, bilenge bazali na likoki ya kosala mpe kokolisa makoki oyo toutaki kolobela. Na yango, soki babyangami ete básala na Betele, bakozala na likoki ya kozwa kobongisama mosusu na ntina na kopesamela mikumba. Tozali kolendisa baboti baklisto mpe bankulutu ete bázala na momeseno ya kosolola na ntina na Betele elongo na bilenge. Baboti mingi bamemaka mbala na mbala bana na bango mpo na kotala Betele; yango ezali kopesa bango nzela na komimesenisa na makambo oyo mazali kosalema kuna mpe ezali kopusa bango na kotondisa lokasa ya lisɛngi mpo na kokɔta na Betele na ntango bakosilisa kelasi.

10 Bandeko mibali mpe basi oyo bazali na boyebi na électronique to na makambo matali baordinatɛrɛ bakozala bayei malamu na Betele. La Société azali ye moko kotalela kobongisama ya bamasini ya kosala fotokopi, ya bamasini ya bonyati mikanda mpe ya biloko ndenge na ndenge oyo bikangisami na baordinatɛrɛ. Tozali mpe na mposa ya baoyo bayebi mosala ya kobongisa bapompi ya mai (plombiers), baoyo bayebi kobongisa frigo, baoyo bayekolá makambo matali lotiliki mpe bato oyo bakoki kosala na maintenance. Kati na misala mingi, lokola kobongola mikanda, bandeko oyo bayebi Lingelesi malamu mpe mingimingi baoyo bayebi malamu Lifalanse, Kiluba, Kirundi, Lingala, Monokutuba, Otetela, Sango, Swahili, Tshiluba, mpe bongo na bongo, bakozala lisungi ya ntina mingi mpo na biso. Kosalela mituka kati na mosala esili kokóma likambo ya ntina mingi. Na ntina yango, batambwisi mituka mpe babongisi mituka oyo bayebi mosala malamu bazali mpenza na ntina mpo na Betele.

11 Tozali mingimingi na mposa ya bandeko oyo bazali minzemba, kasi bandeko oyo bazali na makoki kati na mosala moko ya sikisiki bakoki mpe kobyangama na Betele ata soki basilá kobala. Bokoki kozwa nkasa ya lisɛngi mpo na kokɔta na Betele epai ya mokɛngɛli ya zongazonga to na boumeli ya mayangani ya etúká; bokoki mpe kozwa yango na kotindáká nkoma na biro ya filiale. Soki osilá kobala, omikundola ete mwasi na yo mpe asengeli kozala na bizaleli malamu ya elimo mpe kolɔngɔnɔ malamu na nzoto mpe na mayoki. Soki ozwaki kobongisama moko to osili kozwa eksperiance kati na moko na misala oyo toutaki kotánga, tindá, elongo na lokasa na yo ya lisɛngi, mayebisi oyo matali yo moko, mosala oyo oyekolá mpe bakelasi oyo osalá, na komonisáká yango polelepolele.

12 Okoyanola na libyangi? Betele ezalaka ntango nyonso na mposa ya basali na bolingo malamu. Soki okokisi masɛngami mpo na kosala na Betele, topesi yo elendiseli makasi ete otondisa lokasa ya lisɛngi. Kolɛmba nzoto te soki omoni ete ntango ezali koleka liboso ete obyangama. Okoki kozongela kosala lisɛngi na yo mbula na mbula; yango ekopesa yo nzela na komonisa sikisiki ete ozali ntango nyonso pene mpo na kosala.

Epai na Yehova oyo alobaki ete: “Nakotinda nani mpe nani akokende mpo na biso?” Yisaya ayanolaki kozanga kokakatana ete: “Ngai oyo! Tindá ngai.” Bolamu mingi ezali kozela yo soki obyangami mpo na kosala na Betele, “ndako ya Nzambe.”—Yis. 6:8, NW.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto