Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/95 lok. 4
  • Tósakola ‘maloba ya esakweli’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tósakola ‘maloba ya esakweli’
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Masolo mosusu
  • Tólakisa nsango malamu, koyebáká ete ntango ezali kokende mbangu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Tósalisa bazalani ete ‘bátosa makambo makomami’
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Emoniseli—Tozali na esengo na komona kokokana na yango!
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1995
km 9/95 lok. 4

Tósakola ‘maloba ya esakweli’

1 Tozali kobika na eleko ya kokokisama ya bisakweli oyo biyebisami kati na mokanda ya Emoniseli. Bato mingi bazali komeka kososola ndimbola ya makambo ya mobulu oyo mazali kosalema lelo oyo. Bakoki kozwa litomba na ‘koyoka maloba’ ya esakweli ya Emoniseli. (Emon. 1:3) Na Sɛtɛmbɛ, tokozala na likoki ya kosalisa bango na kokaboláká buku Emoniseli: kokokana na yango. Ntango tokolakisa buku yango, tóbosana te ete mokanda ya Emoniseli esakolaki mikakatano oyo bato bazali kokutana na yango lelo. Tokoki koloba nini?

2 Maloba oyo ya bokɔti na lisolo makoki kozala malamu:

◼ “Bitumba, nzala mpe maladi ezali konyokola bato na boumeli ya ekeke oyo ya ntuku mibale. Na makanisi na yo, mpo na nini ezali bongo atako tosili kosala bokoli mingi kati na makambo ya siansi? [Tótika moto yango ayanola.] Bato mingi bazali kokamwa na koyoka ete mikakatano nyonso wana misilá kosakolama kati na Biblia. Osilá mbala mosusu koyoka ete bazali kolobela ‘batamboli minei na mpunda ya Apokalipse.’ Oyo Biblia elobi na ntina na batamboli na mpunda yango ezali nde esakweli oyo tozali komona kokokisama na yango lelo na nzela ya makambo oyo mazali kobima na mokili. [Tófungola buku Emoniseli: kokokana na yango na mokapo 16 mpe tólakisa bililingi oyo bizali na lokasa 91 kino lokasa 97.] Esakweli yango ezali kolobela eleko moko ya mpasi monene, kasi ezali mpe kopesa elikya. [Tótánga Emoniseli 6:2 kati na paragrafe 3.] Motamboli na mpunda mpɛmbɛ ezali bongo Yesu Klisto. Apesaki elaka ete akolonga mabe nyonso mpe akotya mokili ya bolamu mpe ya kimya na nzela ya Bokonzi oyo ateyaki biso ete tóbɔndelaka mpo na yango.” tólakisa buku.

3 Motuna oyo molandi mokobimisa mbala mosusu lisolo moko ya kosepelisa:

◼ “Na makanisi na yo, tozali na mposa ya nini mpo na kotya nsuka na ezalela ya mpasi oyo mokili ezali kati na yango? [Tótika moto yango ayanola.] Bato mingi bazali na likanisi oyo ete, mpo na kobika mokili mozali na mposa ya mbongwana kati na makambo manso. Biblia emonisi ete Nzambe ayebi mwango ya kosilisa mikakatano na biso mpe asili kolaka ete akosalisa biso.” Tófungola buku Emoniseli: kokokana na yango na lokasa 171 mpe tótánga Emoniseli 11:15 kati na paragrafe 1. Tólakisa bililingi oyo bizali na lokasa 302 kino lokasa 308, mpe tóbenda likebi ya moto yango likolo na bolamu oyo ekosopama na Bokonzi oyo etambwisami na Klisto. Na nsima, tólibwela ye lolenge oyo ye moko akoki kozwa litomba na yango.

4 Mbala mosusu bokɔti na lisolo oyo ekobonga:

◼ “Bato mingi oyo batángaka mokanda ya Emoniseli, oyo mozali kati na Biblia, bamonaki ete ezali mpasi mpo na kososola makambo mazali kati na yango. Mokanda wana mozali kolobela makambo mingi ya kokamwisa mpe oyo mazali kobima na bonene mpenza. Buku oyo, Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!, ezali kotalela molɔngɔ moko na moko ya Emoniseli. Ezali kolimbola ete kokokisama ya bisakweli ezali kotalela moko na moko na biso.” Tófungola buku yango na lokasa 15, paragrafe 2, mpe tólakisa [ye] Emoniseli 1:1 oyo ekomami na makomi ya moindo makasi. Tóyebisa moto yango ete molɔngɔ moko na moko ya mokanda ya Emoniseli elimbolami na lolenge wana mpe ete bingɛngisɛli oyo bipesami bikosalisa ye na kososola bisakweli wana ya kobenda likebi. Tólakisa buku soki moto yango amonisi bosepeli.

5 Soki moto yango azali kosala mosala to soki tomoni ete bosepeli na ye ezali bobele ya bongo na bongo, tokoki kotikela ye zulunalo to trakte moko. Soki na mbala ya nsima amonisi bosepeli, tokoki kolakisa ye buku.

6 Bato banso batalelami na nsango oyo ezali kati na Emonseli. Na yango, ezali likambo ya ntina ete moto moko na moko ayoka maloba ya esakweli yango. Tiká ete tósala nyonso oyo ekoki na biso mpo na kosakola nsango wana ya ntina mingi!

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto