Tósakola solo mokolo na mokolo na ndakisa ya Yesu
1 Ntango Yesu ayaki awa na mabelé, azalaki na mosala moko ya sikisiki ya kokokisa. Mosala yango esɛngaki mpenza “Kotatola mpo na solo.” (Yoa. 18:37) Asakolaki solo etali bizaleli kitoko mpe mikano ya Tata na ye. Mpo na ye, mosala yango mokokanaki na bilei; bomoi na ye mobimba etongamaki zingazinga na etinda oyo azwaki. (Yoa. 4:34) Luka alobi ete Yesu “azalaki kati na Tempelo mokolo na mokolo kolakisa.” (Luka 19:47) Yesu asalelaki malamumalamu ntango oyo azalaki na yango. (Yoa. 9:4) Mwa liboso ya liwa na ye, alobaki na Tata na ye ete: “Ngai nasili kokumisa yo na mokili. Nasilisi mosala mopesi yo ngai ete nasala yango.”—Yoa. 17:4.
2 Bobele bongo, soki motema na biso mozali na botɔ́ndi mpenza mpo na nyonso oyo Yehova asili kosala, tokomiyoka ete topusami mpo na koloba na ntina na ye mokolo na mokolo. Na bongo, tokokokana na bayekoli ya Yesu oyo balobaki na mpiko nyonso ete: “Mpo na makambo mayebi biso mpe mayoki biso, tokoki kotika kosolola yango te.” (Mis. 4:20) Bazalaki koloba na ntina na Yehova ntango nyonso, mpamba te lisoló limonisi ete “mokolo na mokolo . . . batiki te kolakisa.” (Mis. 5:42, NW) Tosengeli komituna: ‘Nazali momekoli ya Motei na ngai, Yesu?’
3 Tósakola kozanga kozela: Yesu ayebisaki ete ntango nsango ya Bokonzi ekosila kosakolama na mokili mobimba, ‘wana nsuka ekoya.’ (Mat. 24:14) Yango esengeli kopusa biso na kokanga ntina mpe lolenge ya lombangu ya mosala na biso. Koyebáká ete bomoi ya bamilió ya bato ezali kati na likámá, tozali kososola ete ezali na likambo moko te ya motuya mpe ya ntina oyo eleki kosakola. Lokola ebongiseli ya biloko ya ntango oyo ezali kobelama na nsuka na yango, ntango etikali bobele moke mpo na kokokisa mosala oyo.
4 Balapólo ezali komonisa ete Yehova azali kotambwisa na lombangu mpenza koyanganisama ya bato oyo bakokani na bampate. (Yis. 60:22) Bipai mingi na mokili, bato bazali koya kati na solo, kolobáká ete: “Tokokenda na [bino] elongo, pamba te toyoki ete Nzambe azali elongo na bino.” (Zek. 8:23) Maloba ya Yesu mazali lelo na ntina mingi koleka: “Mbuma na elanga iteli mingi mpenza nde basáli bazali mingi te. Bóbɔndela Nkolo na elanga ete atinda basáli kati na elanga na mbuma na ye.” (Mat. 9:37, 38) Yango ezali kolendisa biso ete tózala na molende, lolenge moko na bayekoli ya Yesu oyo “bazalaki kati na Tempelo mikolo nyonso [mpo] na kosanzola Nzambe,” boye te?—Luka 24:53.
5 Tólakisa solo mokolo na mokolo: Tosengeli kokanisa mokolo na mokolo na lolenge tosengeli koyebisa solo epai na bazalani na biso. Mabaku mazangaka te. Tokoki kozwa mwa miniti mpo na kosolola na moninga moko to moyebani moko na telefone oyo, engebene biso, akoki mbala mosusu koyoka biso? To, mpo na nini te kokomela moto moko oyo tokutaki ye te epai na ye? Tosilá kokanisa kotika trakte epai na moto ya mombongo oyo tosombaka biloko epai na ye? Na ntembe te, tokoki kokanisa na makoki mingi oyo mapesameli biso mokolo na mokolo mpo na koyebisa elikya na biso epai na bazalani na biso. Soki tokosala milende mpe tokomilatisa na mpiko, Yehova akosunga biso.—1 Tes. 2:2.
6 Na yango, liboso ya kobanda misala na biso ya mokolo na mokolo, tómituna: ‘Nakobanda koyebisa elikya na ngai soki libaku emonani lelo?’ Tómekola ezaleli ya Yesu, oyo alimbolaki mpo na nini atindamaki awa na mabelé: “Esengeli na ngai kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe.” (Luka 4:43, NW) Soki tolingi kokokana na Motei ba biso, tokosala bobele bongo.—Luka 6:40.