Tózwa litomba na Eteyelo ya mosala ya teokrasi na 1996—Eteni 2
1 Mwa moke nsima ya kofungwama ya Eteyelo ya mosala ya teokrasi na 1943, moko na bafiliale ya la Société ekomaki ete: “Ebongiseli yango kitoko esili kosalisa bandeko mingi, oyo bazalaki kokanisa ete bakoki soko moke te koloba liboso ya bato, ete bakóma na mwa ntango moke, balobi malamu mpe basakoli babongi.” Eteyelo ezali kokóba kopesa kobongisama malamu oyo biso nyonso tozali na mposa na yango.
2 Botángi ya Biblia: Baoyo basalaka mikumba bazwaka litomba na Eteyelo bobele bango moko te. Na bosolo, biso nyonso tozwaka mokumba: botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. Manáka ya Eteyelo emonisaka mikapo oyo tosengeli kotánga pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. Makomami mazali na makundweli mingi oyo mazali kolobela ntina ya kotánga Biblia mokolo na mokolo. (Yos. 1:8; Nz. 1:2; Mis. 17:11) Botángi yango ezali na ntina mingi mpo na kolɔngɔ́nɔ́ na biso ya elimo; ezali koleisa makanisi mpe motema. Na kotángáká Biblia na boumeli soko ya miniti mitano na mokolo, tokoki kolanda manáka ya pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. Na nsuka ya mobu, tokosilisa kotánga mikapo koleka 150 ya Liloba ya Nzambe. Soki tozali ntango nyonso na Biblia na mabɔkɔ, tokozala na likoki mpenza ya kotánga eteni moko mokolo na mokolo.
3 Lisukúlu mpo na koteya: Mpo na kolendisa bandeko basi mpe bandeko mibali ete básalela Yehova na bosembo mpe na molende, molobi oyo akosala lisukúlu mpo na koteya asengeli kozala motei malamu, kolimbola ntina ya makambo oyo mazali kotalelama mpe kobenda likebi ya baoyo bazali koyoka ye ete bázala na botɔ́ndi epai na Nzambe, na Liloba na ye mpe na lisangá na ye. Bankulutu mpe basaleli na misala bakolónga na kosala bongo na lisalisi ya komibongisa malamu, na kotongáká lisukúlu na bango zingazinga na motó ya likambo, na kolobáká na kondimisama nyonso mpe na kopesáká nguya na makambo oyo bazali koloba. (Ebe. 4:12) Ezali na ntina ete molobi atosa ntango oyo epesameli ye. Búku “Toute Écriture” etondi na mikapo ya Biblia mpe ezali kosolola likoló na makambo ya ntina mingi mazali kati na Makomami, oyo tokoki kozwa na yango litomba na elimo. Búku Prédicateurs ezali kolobela lisoló ya lisangá ya Yehova oyo lizali komonana mpe ezali komonisa makambo oyo masalemaki na bomoi ya bato oyo bamonisaki kondima, molende, komipesa mpe bolingo. Tozali na makambo mingi ya koyekola kati na teokrasi mpo na mikolo oyo mileki mpe mingi ya koyekola mpo na lolenge oyo Yehova azali kopambola libota na ye na ntango na biso.
4 Ndimbola ya mikapo ya Biblia: Bandeko mibali oyo bapesamelaka mokumba oyo basengeli kopona mikapo ya sikisiki, oyo na yango bakoki kobimisa makanisi ya kosalela mpo na lisangá. Na bongo, ezali na ntina ete bátánga mikapo oyo milengelami, bamanyola likoló na yango mpe básala bolukiluki likoló na mikapo oyo baponi mpo na kozwa bandimbola oyo ekongɛngisa mikapo yango polele. Na nsuka ya Index des publications de la Société Watch Tower, ezali na “Index biblique,” oyo ekoki komonana na ntina mingi ntango tozali koluka bandimbola likoló na mokapo moko ya sikisiki. Bandeko mibali oyo basalaka lisoló oyo basengeli kosalela bososoli malamu mpe kopɛngola kolobela makambo oyo mazali na boyokani te na makambo oyo mazali kotalelama. Basengeli te kobongisa bandimbola koleka na boye ete likoki ekozala te mpo na kolobela yango na boumeli ya miniti motoba.
5 Mokomoko kati na biso akoki kozwa matomba na Eteyelo ya teokrasi. Ekoki kosunga biso ete tókólisa makoki na biso ya balobi mpe ya batei. Kozwa litomba mpenza na ebongiseli oyo ekosunga biso ete tómonisa ‘bokóli na biso polele epai na bato nyonso.’—1 Tim. 4:15.