Mayebisi
◼ Lipesi ya Febwáli: Mwa babúku. Mársi: Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. Apríli: Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis mpe mwa babúku. Máí: Les Saintes Écritures — Traduction du monde nouveau elongo na búku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? Yuní: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo.
◼ Bakɔnti ya lisangá moko na moko esengeli kotalelama nokinoki nsima ya 1 Mársi, soki epesi nzela.
◼ Mpo na kosimba bakɔnti malamu, tosɛngi na bino ete bólanda lilako oyo: Mokomeli ya lisangá akosɛnzɛla na bosikisiki ya mitángo mizwami na lokasa S-20 liboso ya kotya mabɔkɔ mpe kotinda yango na la Société. Esengeli ntango nyonso kokoma likoló na yango dati ya S-15 (Prix courants) oyo esalelamaki mpo na mikanda oyo babongisi-nzela basombaki mpe kobosana te kokoma malamu nimero ya lisangá. Na nsuka, mosaleli na misala oyo atalelaka bakɔnti akosɛnzɛla na boye ete ntalo ya sika oyo ekokóma esalelama nokinoki.
◼ Mokomeli ya lisangá mpe mokɛngɛli mpo na mosala ya kosakola bakotalela mosala ya babongisi-nzela ya sanza na sanza nyonso. Soki basusu bazali na mokakatano ya kokokisa bangonga na bango, bankulutu bakosala na boye ete bákoka kozwa lisungi.
◼ Basakoli oyo balingi kozala babongisi-nzela basungi na Mársi mpe na Apríli basengeli komibongisa uta sikawa mpe kotondisa lokasa ya lisɛngi liboso. Yango ekopesa nzela na bankulutu ete bákamata meko ebongi mpo na mosala ya kosakola mpe kolengela mikanda oyo mikopesa nzela mpo na mosala yango.
◼ Departemá ya mikanda ezali koyebisa ete tozali na mikanda ya sika oyo milandi kati na libombo:
L’index des publications de 86-90 (dx-86-90-F);
Une vie de famille heureuse (fl-F);
Louons Jéhovah par nos chants (Ssb-F);
Mwa búku “Vivez éternellement” (le-F).