Tosengeli kobima na mosala ya kosakola mibale-mibale?
1 Motángo ya bato na bateritware mosusu ezali kokóla mbangu mpe emonani lokola ete bato mingi bazali sikawa na mposa ya koyeba ndimbola ya makambo oyo mazali koleka na mokili. Tomoni ete mosala ya kobuka mbuma mozali monene mpe basáli bazali bobele moke mpo na komipesa na mosala ya kosakola mpe koteya. Motuna moko mozali koyela biso kati na makanisi: Ndenge nini tokoki kokutana na bato mingi koleka na ntango oyo tolekisaka na mosala ya Bokonzi?
2 Bosili komona kati na lisangá na bino ete basakoli bazalaka mbala mosusu na bopusi ya kokenda ebele mpe mbala mosusu misato-misato na mosala ya ndako na ndako? Bomonaka mbala mingi ete basakoli oyo bakɔmeli babimaka na mosala ya kosakola bango na bango? Ezali nde mpo ete bazali kokenda na kartyé moko ya likámá to ezali bobele momeseno oyo mokóli na boumeli ya bambula?
3 Makomami mazali komonisa ete uta kala mpenza bato basepelaka kosala elongo kati na mosala ya Nzambe. Ntango Yesu aponaki bayekoli ntuku nsambo mpo ete bákenda liboso na ye na bingumba mosusu, atindaki bango mibale-mibale. (Luka 10:1) Ntango Paulo akendaki na mobembo na ye ya misionere, akamataki Timoté lokola mosungi na ye. (Mis. 16:1-3) Salomo mpe amonaki ntina ya kozala na moninga; na yango alobaki ete: “Mibale baleki moko na malamu, zambi bakozala na libonza malamu na mosala na bango.” Yango elingi koloba te ete moto asengeli kosala ye moko te kati na mosala ya kosakola, kasi elingi koloba ete matomba mamonanaka mingi soki tokobima elongo na baninga mpe kosungana bamoko na basusu. Kati na bandakisa oyo nyonso, ezali likambo litali baministre baklisto mibale oyo bazali kosakola elongo. Tokoki mpe kozwa momeseno ya kobimaka misato-misato kati na mosala ya kosakola?
4 Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛ́mbɛ 1991, lokasa 1, epesi eyano kati na lisoló “Tosalisa bazalani na biso kati na mosala ya kosakola.” Na paragrafe 1 mpe 4 tokoki kotánga boye: “Uta ebandela na yango, lisangá ya boklisto ezali ebongiseli ya bapalanganisi ya nsango malamu. Yesu ye moko abongisaki bayekoli na ye mpo na mosala ya kosakola mpe ‘atindaki bango mibale-mibale.’ (Mko. 6:7; Luka 8:1) . . . Atako ezali ntango nyonso lisɛngisi te ya kozala na moninga kati na mosala ya kosakola, kasi mingi kati na biso balingaka kobima na basusu elongo. (Mos. 4:9). . . . Ntango tozali kobima elongo na moninga moko kati na mosala ya kosakola, tozali na mposa ya kosala mosala ya ekipe. (Talá 1 Bakolinti 3:6, 9.) Biso nyonso mibale tokoki kopesa litatoli ya malamu, na ndakisa, na kosaláká lisoló moko nsima na mosusu.”
5 Esengeli kosala nini wana tozali kosakola na kartyé moko ya likámá? Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛ́mbɛ 1991 oyo tosilaki kolobela eyanoli boye na paragrafe 3: “Mpo na komibatela, ezali mbala mosusu malamu ete tózalaka bato mingi elongo ntango tozali kosakola na bakartyé mosusu.” Bobele bongo, tokoki mpe kotánga kati na búku Lisangá (lokasa 98, paragrafe 1 mpe lokasa 104, paragrafe 2) ete: “Epai mosusu, mpo na bantina mosusu ezali mbala mosusu malamu kotinda basakoli mibale-mibale to ata koleka mibale mpo na kosakola elongo na bakartyé mosusu.” “Soki mosakoli moko asengeli kokokisa mosala na ye kati na kartyé epai kuna ezali malamu te ete azala ye moko, mpe bongo azali kosakola elongo na ndeko mosusu oyo akei na ye elongo, bango mibale bakotanga ngonga, soki nde bango mibale bazali kopesa litatoli.”
6 Na kotalela oyo touti kolobela, emonani ete basakoli basengeli kokenda na mosala ya ndako na ndako moto moko to mibale-mibale. Na bakartyé mosusu ya likámá, ekozala malamu kosakola mibale-mibale; mbala mosusu ekozala malamu mpenza kozala bato mingi. Ekómaka mbala mosusu ete ndeko mobali moko abima elongo na ndeko mwasi moko oyo azali mobalani na ye te, to mpe azali ndeko na ye ya mosuni te. Na yango, ezali malamu ete etuluku na bango ezala na bato soko misato. Longola mwa mabaku oyo, soki totye moboko likoló na ndakisa oyo Nkolo na biso Yesu Klisto mpe bayekoli na ye ya liboso batikaki, tokosala milende ya kosakola, soki epesi nzela, mibale-mibale, to mpe moto moko, na esika ya kozala misato-misato.—1 Pet. 2:21.