Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/96 lok. 1
  • Ntango ezali kobongwana

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntango ezali kobongwana
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Masolo mosusu
  • Nsango oyo tosengeli kosakola
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Tósakola Bokonzi
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Lingomba
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • ‘Bazali koyeisa nsango malamu ya eloko moko oyo eleki malamu’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 5/96 lok. 1

Ntango ezali kobongwana

1 Biblia ezali koyebisa biso ete “motindo na mokili oyo ezali [kobongwana, NW].” (1 Kol. 7:31) Lelo oyo, yango ezali mpenza solo! Bobele na boumeli ya bomoi na biso, tosili komona mbongwana ya miboko na lolenge ya kokanisa mpe na etamboli ya bato ya mitindo nyonso. Soki tolingi ete nsango ya Bokonzi esimba mitema na bango, tosengeli kolakisa yango na koyebáká ete ntango ezali mpe kobongwana. Tolingi komema nsango malamu na lolenge ete elamwisa bosepeli ya bato mpe esimba mitema na bango.

2 Esili koleka mwa bambula, mosala ya litatoli ezalaki kosalema na lolenge lokeseni kati na mikili mingi, mpamba te bato mingi bazalaki na bomoi ya kimya mpe bazalaki komiyoka kati na libateli. Losambo ezalaki na esika ya ntina kati na bomoi na bango; bazalaki kotalela Biblia na motuya. Mbala mingi, esengelaki kolobela makambo matali mateya ya moboko kati na mosala ya kosakola. Lelo oyo, bomoi ya bato ekómi na yikiyiki. Losambo ekómi likambo ya lisɛki. Bobele bato moke nde bazali kondimela Biblia, mpe liteya ya evolisyó ebebisi kondima ya bato mingi epai na Nzambe.

3 Mokɛngɛli-motamboli moko alobaki ete: “Lelo, bato bazali na mitungisi mpe mikakatano mingi na boye ete, mbala mosusu, esengeli na biso komonisa bango lolenge nini bakoki kotambwisa bomoi na bango.” Na ntembe te lobanzo mpenzampenza ya bato ezali mpo na bango moko, mabota na bango mpe mitungisi na bango. Ezali makambo oyo balobaka mingi ntango bazali elongo. Tosengeli kokanisa yango kati na mosala na biso ya litatoli.

4 Bokonzi ya Nzambe ezali elikya bobele moko ya solosolo mpo na mikolo mizali koya: Bato mingi bazali kotya motema te na biyangeli ya bato. Bazali kokanisa ete nkɔ́nzɔ ezali te mpo na kosepela na mokili moko ya malamu na boumeli ya bomoi na bango. Mangomba ya lokuta malóngi te kopesa bango ntina ya kozala na elikya. Na yango, likambo oyo bato bazali na yango mposa mingi, ezali bongo koyoka nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Tóbenda likebi likoló na Bokonzi yango mpe tómonisa ete ekosilisa mikakatano nyonso ya bato.

5 Biblia ezali liziba bobele moko ya batoli ebongi na kotyela motema: Lelo oyo, bato bazimbisami na bakonzi oyo bazali kotya motema likoló na mayele ya bomoto mpe bafilozofi ya mokili. Na yango, bato bakoki komona ete “ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.” (Yil. 10:23) Likambo ya malamu koleka oyo bakoki koyeba, ezali ete basengeli ‘kotya elikya na Nzambe na motema na bango mobimba mpe kotya motema te likoló na mayele na bango moko.’ (Mas. 3:5) Ntango ezali kobongwana, kasi Biblia ezali kobongwana te. Na bongo, tosengeli ntango nyonso kotya Liloba ya Nzambe na esika ya liboso kati na mosala na biso ya kosakola mpe kolakisa na bazalani na biso ete básosola motuya oyo litambwisi ya Nzambe ezali kopesa. (2 Tim. 3:16, 17) Mpo na yango, tosengeli kolakisa motuya ya Biblia epai na bato na kotángáká yango kati na bokɔti na biso ya masoló, na kosaleláká yango mpo na koyanola na mituna na bango mpe na kolobeláká mpenza ntina ya koyekola yango mpe kosalela mayele mabongi oyo mazali kati na yango.

6 Atako ntango ezali kobongwana na mikolo na biso, mikano na biso kati na mosala ya kosakola ezali kobongwana te. Esengeli na biso kosakola nsango malamu ya Bokonzi, kolendisa elikya na biso kati na Liloba ya Nzambe mpe kosalisa bazalani na biso ete básosola ntina ya koyekola Biblia elongo na biso. Makambo oyo tokoloba masengeli kokokana na bamposa ya bato oyo tozali kopesa litatoli na ntango yango. Na lolenge wana, likoki ekozala mpo na biso ya kokóma basangani na kopalanganisama ya nsango malamu elongo na basusu, kozwáká bongo bato mingi koleka.​—1 Kol. 9:19, 23.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto