Tósala mosala na bulɛɛ butu na moi
1 Tozali na libaku moko ya motuya mingi koleka: ya kozala Batatoli ya Yehova. Tozali kati na lisangá ya bapalanganisi ya nsango malamu na mokili mobimba oyo Yehova azali kosalela mpo na kokokisa mosala monene koleka, kosakolama ya Bokonzi oyo esalemáká naino te. (Mko 13:10) Lokola tozali kobika na eleko moko ya mpasi, tomipesaka mpenza kati na mosala yango engebene makoki na biso?
2 Toyebi te soki bato boni bakoyoka nsango na biso. Yehova azali kopesa biso endimiseli ete ekozala na “ebele monene” oyo basangani na yango bazali kokesana na basusu na ‘mosala na bulɛɛ oyo bazali kosala butu na moi.’ (Emon. 7:9, 15) Batatoli koleka milió mitano oyo bazali kosala mingi sikawa kati na mosala ya Nzambe bazali te bobele bayoki oyo bazali komonisa mwa bosepeli, soko mpe te bato oyo basepelaka bobele koyangana na makita. Ezali bato oyo bazali kokokisa mosala moko, oyo bazali kosakola nsango malamu kati na mokili mobimba.
3 Mokolo na mokolo tozali na mabaku ya kokumisa Yehova, ezala na mosala ya kosakola oyo ebongisami to na lolenge ya libaku malamu. Tómanyola likoló na kopalanganisama ya litatoli oyo ekokaki kosalema soki mokomoko na biso azwi likatami ya koyebisa solo ata bobele na moto moko mokolo na mokolo. Botɔ́ndi na biso epai na Yehova esengeli kopusa biso na koloba na ntina na ye na lolenge ya mɔ́tɔ.—Nz. 92:1, 2.
4 Tósalisa basusu ete básala mosala na bulɛɛ: Yehova azali kokóba kopambola biso na kopesáká biso bokóli. (Hag. 2:7) Mwayene ya boyekoli ya Biblia oyo etambwisamaki na boumeli ya mobu ya mosala oyo eleki, ezalaki ya 3 278 na Burundi, 11 138 na Congo mpe 180 017 na Zaïre. Ntango tozali koyekola na bato, mokano na biso ezali ya kosunga bango ete bákóma bayekoli ya Yesu Klisto. (Mat. 28:19, 20) Motángo monene kati na bango basili kokóla mpe bayanganaka na makita mbala na mbala. Babandi koyebisa na bayebani na bango “misala na Nzambe minene” oyo basili koyekola. (Mis. 2:11) Tokoki sikawa kobyanga bango ete básangana na mosala ya kosakola?
5 Na boumeli ya sanza ya Máí, tokosala molende ya solosolo mpo na kobyanga bayekoli ya Biblia oyo bakokisi masɛngami ete básangana na biso kati na mosala ya kosakola. Moto oyo oyekolaka na ye asili komonisa mposa? Soki ezali bongo, akokisi masɛngami ya Makomami? (Talá búku Lisanga, nkasa 98-100.) Ntango moyekoli ya Biblia amonisi mposa ya kosangana na mosala ya kosakola, yebisá mokano na ye epai na mokɛngɛli-mokambi, ye akozwa bibongiseli mpo ete bankulutu mibale bátalela likambo yango. Soki akokisi masɛngami mpo na kokóma mosakoli oyo azwi naino batisimo te, byangá moyekoli yango ete abima na yo elongo na mosala ya kosakola. Mokɛngɛli na mosala mpe batambwisi ya boyekoli ya mokanda bakosɛnzɛla mingimingi ete básunga baoyo bakoki kokokisa masɛngami mpo na kobanda kosakola na sanza ya Máí.
6 Ekozala malamu ete baboti bátalela soki bana na bango bazali na likoki ya kokóma basakoli oyo bazwi naino batisimo te. (Nz. 148:12, 13) Soki mwana na yo azali na mposa ya koyambola (s’exprimer) kati na mosala ya Bokonzi mpe soki azali na etamboli malamu, okoki koyebisa yango epai na nkulutu moko oyo azali mosangani ya komité ya mosala. Nsima ya kosolola elongo na yo mpe mwana na yo, bankulutu mibale bakomonisa soki akoki kondimama na molɔngɔ́ ya basakoli. Ezali mpenza likambo ya esengo ete bana bákumisa Nzambe elongo na biso!
7 Bobele Yehova nde abongi ete tósalela ye mosala na bulɛɛ. (Luka 4:8) Tiká ete biso banso tózwa litomba na libaku malamu oyo tozali na yango ya kokumisa ye “mingi”!—Nz. 109:30; 113:3.