Biyano na Mituna na bino
◼ Nini tosengeli kobatela na makanisi ntango tozali kotánga baparagrafe na makita?
Eteni monene ya ntango oyo ebongisami mpo na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe boyekoli ya mokanda elekisamaka na botángi ya baparagrafe. Yango elimboli ete motángi azali na mokumba moko monene mpo na oyo etali mateya. Asɛngɛli kotánga na lolenge ete ‘apesa ntina’ ya mateya mpo ete bayangani bákanga ntina na yango, kasi lisusu bátindikama na kosala eloko. (Neh. 8:8) Mpo na yango motángi asengeli komibongisa malamu. (1 Tim. 4:13; talá liteya 6 na Mokanda mpo na Eteyelo.) Talá mwa makambo ya ntina masengeli mpo ete botángi liboso ya bato ezala malamu.
Koyeba konyata maloba ya ntina na lolenge esengeli. Poná liboso maloba to bafraze oyo osengeli konyata mpo na kopesa nzela ete bososoli ezala ya sikisiki.
Kobénga maloba na lolenge ya malamu. Ezali likambo ya ntina kobénga maloba malamu mpe kobimisa yango polele mpo ete bayangani bákanga ntina ya maloba oyo masalelami kati na mikanda. Luká kati na diksionere ndimbola ya maloba oyo oyebi te to oyo esalelamaka mpenza mingi te.
Koloba na lolenge ete oyokana mpe na mɔ́tɔ. Na kolobáká na mongongo makasi mpe na mɔ́tɔ, okolamwisa bosepeli ya bayoki, okolamwisa mayoki na bango mpe okupusa bango na kosala eloko.
Koloba na esengo mpe lokola lisoló. Elobeli ya malamu emonanaka na maloba ya pɛpɛlɛ. Na komibongisáká mpe na kozongeláká mbala na mbala, motángi akomiyoka malamu mpe yango ekosala ete botángi na ye esepelisa bato na esika ete yango elɛmbisa bango.—Hab. 2:2.
Kotánga makambo nyonso makomami. Maloba na nsé ya lokasa mpe makambo oyo mazalaka kati na bizibeli (parenthèses to crochets) esengeli kotángama na mongongo makasi soki yango ezali na boyokani na makambo tozali kotánga. Bobele mitindami (références) nde esengeli kotángama te. Maloba na nsé ya lokasa esengeli kotángama na esika oyo yango epesami kati na paragrafe mpe ekolobama boye: “Maloba na nsé ya lokasa elobi ete . . .” Nsima na kotánga yango, osengeli kokóba botángi ya eteni etikalaki ya paragrafe.
Botángi malamu liboso ya bato ezali moko na myango ya ntina oyo mizali na mokano ya ‘koteya bazalani ete bátosa nyonso oyo batindi biso kosala’ na Moteyi monene na biso.—Mat. 28:20.