Tósakola Bokonzi
1 Na Baebele 10:23, tolendisami na ‘kosimba ngwi eyambweli ya elikya na biso,’ oyo etyami likoló na Bokonzi ya Nzambe. Yesu apesaki mpenza etindá ete nsango malamu ya Bokonzi esakolama kati na mabota nyonso. (Mko. 13:10) Ezali likambo ya ntina ete tóyeba yango ntango tozali kosangana na mosala ya kosakola.
2 Ntango tozali kokutana na bato, tozali komeka kobanda kosolola elongo na bango likoló na lisoló moko oyo ezali kosepelisa bango to oyo etali bango. Mingimingi, tolobelaka makambo oyo bayebi malamu, na ndakisa mobulu kati na kartyé, mikakatano oyo mitali bilenge, komibanzabanza ya moto mpo na kokokisa bamposa na ye to mikakatano ya nkita. Lokola bato mingi, batyaka makanisi na bango likoló na “mitungisi ya bomoi,” mbala mingi bayebisaka biso makambo oyo mazali mpenza kotungisa bango wana tomonisi ete tozali komibanzabanza mpo na bango mpe ete tozali komitya na esika na bango. (Luka 21:34) Yango ekoki kopesa nzela na koyebisa elikya na biso.
3 Nzokande, soki tokebi te, lisoló likoki kolobela makanisi ya mabe na boye ete tokobosana mokano ya boyei na biso: kosakola nsango ya Bokonzi. Ezali solo ete tobendaka likebi ya bato likoló na makambo ya mawa oyo mazali kobimisa ebele ya mikakatano, nzokande mokano na biso ezali ya kobenda likebi na bango likoló na Bokonzi, elikya bobele moko mpo na bato. Kozanga ntembe, tozali na elikya moko kitoko oyo bato basengeli mpenza koyeba yango. Na bongo, ata soki tokobanda na kolobela makambo mazali komonisa “ntango ya mpasi mpe ya mikakatano,” tókamba nokinoki lisoló na biso na nsango na biso, elingi koloba “nsango malamu ya seko.” Na kosaláká bongo, tokokokisa mpenza mosala na biso.—2 Tim. 3:1, NW; 4:5; Emon. 14:6.