Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Desɛ́mbɛ: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Tokosala mpenza makasi na kozongela bato nyonso oyo bakondima búku yango, na mokano ya kobanda boyekoli ya Biblia. Yanuáli: Traduction du monde nouveau mpe búku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? Febwáli: Búku nyonso ya nkasa 192 oyo ebimaki liboso ya 1984, oyo ezali na libómbo ya lisangá. Masangá oyo mazali na babúku wana te, bakolakisa búku Ndenge nini okoki kobika mpo na kokota na mokili ya sika. Mársi: La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création? to Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi! Tokoki mpe kolakisa búku nyonso ya kala ya nkasa 192 oyo ezali kati na libómbo ya lisangá.
◼ Masangá oyo mazali naino na trakte Nsango ya Bokonzi No. 34 makoki kolendisa basakoli ete bákabola yango motindo moko na batrakte mosusu, ezala na mosala ya ndako na ndako to na lolenge nyonso mosusu ya litatoli. Soki yango ekoki kosalema na teritware na bango, basakoli bakoki mbala mosusu kotika ekzamplere moko epai na moto nyonso oyo azalaki te, na kondimisamáká ete trakte ekomonana te na baleki-nzela. Milende misengeli kosalema mpo na kokabola baekzamplere nyonso etikali ya trakte oyo ezali na nsango moko ya ntina.