Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/96 lok. 6
  • “Oyo elimboli bomoi ya seko”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Oyo elimboli bomoi ya seko”
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Masolo mosusu
  • Boyebi oyo euti na Nzambe ezali koyanola na ebele ya mituna
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Makanisi mpo na ndenge ya kobanda masolo na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Makanisi mpo na ndenge ya kobanda masolo na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Tólakisa búku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 12/96 lok. 6

“Oyo elimboli bomoi ya seko”

1 Maloba ya Yesu oyo mazali na Yoane 17:3, (NW ) masengeli kozwama na motuya. Mazali komonisa mpenza oyo yango elingi kolobela: koyekola koyeba Nzambe mpe Klisto elimboli bomoi ya seko! Kasi mpo na kozwa mbano motindo wana esuki bobele na koyeba Yehova mpe Yesu? Te. Bayisalaele bayebaki ete Yehova azalaki Nzambe na bango, kasi lolenge na bango ya bomoi eyokanaki mpenza te na endimeli yango. Na bongo, babungisaki ngɔlu ya Nzambe. (Hos. 4:1, 2, 6) Lelo oyo, bamilió ya bato bazali mbala mosusu “na molende mpo na Nzambe; kasi te engebene boyebi ya sikisiki.” (Lom. 10:2, NW ) Esengeli ete bákóma koyeba Yehova, “Nzambe bobele moko ya solo,” mpe koyeba lolenge malamu ya kosalela ye. Mpo na yango, tokolakisa na Desɛ́mbɛ búku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Tokosala lolenge nini? Ndambo ya makanisi oyo malandi makozala na litomba mpo na biso.

2 Lokola bato mingi bandimaka te likanisi ya kozala na bomoi ya seko awa na mabelé, maloba oyo ya bokɔti na lisoló esengeli kobenda likebi na bango:

◼ “Tozali kotuna motuna moko epai na bazalani na biso. Soki obyangami ete ozala na bomoi ya seko na mokili lokola oyo, okondima libyangami yango? [Tómonisa elilingi ya nkasa 4-5 ya búku Boyebi. Tóyoka eyano.] Okoki mpenza kozala na bomoi wana ya esengo. Kasi na likanisi na yo, osengeli kosala nini mpo na kozwa yango? [Tótika ete moto yango ayanola.] Talá oyo esɛngami na biso na Yoane 17:3. [Tótánga vɛrsɛ́ yango.] Búku oyo ezali kosalisa bato mingi na kozwa boyebi wana ya sikisiki. Okosepela kozwa ekzamplere moko? [Tóyoka eyano.] Na ntango nakoya mbala ya nsima, nakomonisa yo mpo na nini ebongi kondima ete tokoki kozala na bomoi ya seko awa mpenza na mabelé.”

3 Ntango tozongeli baoyo tosololaki na bango likoló na Yoane 17:3, tokoki koloba boye:

◼ “Mbala eleki, natángelaki yo maloba ya kokamwisa ya Yesu oyo mazwami na Yoane 17:3, epai andimisi biso ete koyekola koyeba ye mpe Tata na ye, elimboli bomoi ya seko. Kasi bato mingi bandimaka ete ezali bobele na likoló nde bomoi ya malamu ezali kozela biso. Okanisi boni mpo na yango? [Tóyoka eyano.] Soki búku oyo natikelaki yo ezali mosika te, nakosepela kolakisa yo mwa bavɛrsɛ́ ya Biblia oyo emonisi ete Paladiso ekozongisama awa na mabelé. [Tósolola likoló na paragrafe 11-16 na nkasa 9-10 ya búku Boyebi.] Mbala ekoya, nakosepela komonisa yo mpo na nini okoki kozala na elikya na bilaka wana ya Biblia. Na kozeláká bokutani na biso na mbala ekoya, ntango mosusu okolinga kotánga mokapo 2 kati na búku na yo, boye te?”

4 Talá lisoló oyo likoki kozala malamu soki tokutani na moto oyo azali mondimi:

◼ “Tozali kosolola elongo na bazalani na biso bantina oyo esali ete mangomba mázala ndenge na ndenge kati na mokili. Bobele na États-Unis, mangomba mazali soko na motángo ya 1 200, mpe mangomba koleka 10 000 mazali na mokili mobimba. Nzokande, Biblia ezali bobele moko. Lolenge nini okoki kolimbola koyikana wana ya mangomba? [Tózela eyano. Tófungola búku Boyebi na mokapo 5 mpe tótánga paragrafe 1.] Okozwa biyano ya kosepelisa na mituna wana na kotángáká mokapo oyo. Nakosepela kotikela yo búku oyo soki okolinga kotalela yango.” Soki molobani na biso andimi, tólakana mokolo ya sikisiki oyo tokokutana mpe tósukisa boye: “Mbala ekoya, tokomona soki mangomba nyonso mazali bobele banzela ekeseni oyo ezali komema sé na esika moko.”

5 Ntango tozongi kokóba lisoló likoló na bantina oyo mpo na yango mangomba mazali mingi, tokoki koloba ete:

◼ “Mbala ya nsuka oyo tokutanaki, nabimisaki motuna ya koyeba soki mangomba nyonso mazali bobele banzela ekeseni oyo ezali komema sé na esika moko. Okanisi boni mpo na yango? [Tóyoka eyano.] Nakosepela komonisa yo kati na búku oyo natikelaki yo oyo Yesu alobaki na ntina na likambo yango. [Tófungola búku Boyebi na mokapo 5 mpe tótánga paragrafe 6-7 epai Matai 7:21-23 elobelami na mobimba.] Omitunaka mbala mosusu mpo na nini ezali likambo ya ntina mingi koyeba na sikisiki mokano ya Nzambe. Okomona ete baparagrafe elandi ezali mpenza koteya. Tángá eteni etikali ya mokapo oyo, soki okolinga; mpe ntango nakoya mbala ya nsima, nakosepela komonisa yo ntina ya kozala na boyebi ya sikisiki ya Biblia.”

6 Mpo na kobanda boyekoli ya Biblia, maloba ya bokɔti na lisoló na mbala moko ezalaka malamu. Maloba ya ebandeli oyo malandi mazwami na lokasa 5 ya mwa búku “Lolenge nini okoki kobanda mpe kolandisa masoló likoló na Biblia”:

◼ “Nayei kotala yo mpo na koyekola Biblia elongo na yo kozanga ete ofuta mbongo. Soki opesi ngai nzela, nalingi kolakisa yo na boumeli ya mwa miniti lolenge nini, kati na mikili koleka 200, bato bazali koyekola Biblia elongo na mabota na bango. Tokoki kolobela motó na likambo oyo yo olingi. [Tómonisa etánda ya masoló ya búku Boyebi.] Ezali na lisoló moko oyo esepelisi yo mingi?” Tiká ete moto yango apona. Tófungola búku na mokapo oyo esepelisi ye mpe tóbanda boyekoli uta na paragrafe ya liboso.

7 Talá lolenge mosusu ya mwango ya kokɔta mbala moko na lisoló oyo tokoki komeka mpo na kobanda boyekoli:

◼ “Nazali kopesa mateya ya Biblia kozanga kofuta mbongo mpe na manáka na ngai nazali naino na ntango ya kobakisa bayekoli mosusu. Nazali kosalela búku oyo. [Tómonisa búku Boyebi.] Mateya yango mazali koumela bobele mwa basanza mpe mazali kopesa biyano na mituna lokola: Mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi? Mpo na nini tonunaka mpe tokufaka? Nini ekómelaka balingami na biso oyo bazali kokufa? To lisusu: Lolenge nini okoki kobɛlɛma epai na Nzambe?” Na nsima tótuna ete: “Okosepela namonisa yo lolenge yango esalemaka?” Soki moto yango asepeli na boyekoli te, tótuna ye soki akosepela kozwa búku Boyebi mpo ete atángaka yango ye moko. Soki andimi ete akotánga yango, tólakisa ye ekzamplere moko mpe tóyebisa ye likabo oyo esɛngami mpo na yango.

8 Oyo nde eloko ya motuya ezali na moto oyo azali na boyebi ya sikisiki ya Nzambe mpe ya Klisto! Koyekola koyeba bango elimboli mpenza bomoi ya seko kati na ezalela ya kokoka. Na boumeli ya sanza ya Desɛ́mbɛ, tósalela mabaku nyonso mpo na koyebisa epai na bazalani na biso boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto