Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/97 lok. 6
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 1/97 lok. 6

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Yanuáli: Traduction du monde nouveau mpe búku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? Febwáli: Búku nyonso ya nkasa 192 oyo ebimaki liboso ya 1984, oyo ezali kati na libómbo ya lisangá. Masangá oyo mazali na búku wana te, bakolakisa búku Ndenge nini okoki kobika mpo na kokota na mokili ya sika. Mársi: Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi! Apríli: Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota.

◼ Masangá makokamata bibongiseli malamu mpo na Ekaniseli oyo ekosalema mbula oyo na Mwalomingo 23 Mársi, nsima na kolala ya moi. Lokola likita mosusu ekosalema mokolo wana te, longola bobele likita ya mosala ya kosakola, mbongwana esengeli kosalema mpo ete boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli esalema na ntango mosusu. Bakɛngɛli ya zongazonga basengeli mpe kobongisa manáka na bango ya pɔ́sɔ wana engebene makambo matali lisangá mokomoko. Atako mbala mosusu likoki lizalaka te, nzokande ezali malamu ete lisangá na lisangá esala Ekaniseli yango moko kozanga kozala elongo na lisangá mosusu. Na bisika oyo masangá mingi masalaka makita na bango na Ndako ya Bokonzi bobele moko, ekozala mbala mosusu malamu ete lisangá moko to masangá mingi kati na yango másalela bandako mosusu na mpokwa wana. Ekaniseli esengeli kobanda na ntango malamu mpo ete yango ekoka te kozala mabe mpo na bato ya sika oyo bazali kosepela na solo. Lisusu, manáka esengeli kokangana te kino kosala ete ntango ezanga, liboso mpe nsima ya likita, mpo na kopesa babyangami mbote, mpo na kosɛnga na basusu ete tósalisa bango na elimo to mpo na kolendisana bamoko na bamosusu. Nsima ya kotalela na bozindo mpenza makambo nyonso oyo masengeli, bankulutu bakozwa ekateli mpo na oyo esengeli kosalema na ntina ete bápesa nzela na baoyo nyonso bakoya na Ekaniseli ete bázwa mpenza litomba na yango.

◼ Na kotalela bonene ya likambo yango, bankulutu basengeli kopona lokola molóbi mpo na lisukúlu ya Ekaniseli moko na bankulutu oyo bazali na makoki mingi na esika ya kopona ndeko na kolandana ya ngala to na kosalela ndeko bobele moko mbula nyonso.

◼ Na 1998, Ekaniseli ekosalema na Mwapɔ́sɔ 11 Apríli nsima na kolala ya moi. Toyebisi bino dati oyo na liboso mpo ete bózala na likoki ya koluka to ya komizwela bisika oyo bokoki kofutela epai kuna masangá mingi masalelaka Ndako ya Bokonzi bobele moko; yango ekopesa bango nzela ete bámizwela bisika mosusu mpo na molulu wana.

◼ Lisukúlu ya sipesiale oyo ebongisami na eleko ya Ekaniseli ekosalema na Mwalomingo 6 Apríli 1997. Masangá oyo makoyamba mokɛngɛli ya zongazonga na pɔ́sɔ wana, to oyo makozala na liyangani na bango ya zongazonga to liyangani na bango ya mokolo moko, bakoyoka lisukúlu ya sipesiale na pɔ́sɔ oyo ekolanda. Lisangá moko te esengeli kokana kosala lisukúlu yango liboso ya mokolo mwa 6 Apríli.

◼ Mikanda ya sika oyo tozali na yango:

Pourquoi adorer Dieu en amour et en vérité? (mwa búku ya monene).

Nzembo mpo na kokumisa Yehova ​​​— Lingala

Les Écritures grecques chrétiennes ​​​— Traduction du monde nouveau ​​​— Swahili

◼ Bakasɛti ya sika oyo tozali na yango:

Faisons ce qui est droit aux yeux de Dieu ​​​— Lifalansé (kasɛti)

Jusqu’aux extrêmités de la terre ​​​— Lifalansé (kasɛti video)

Mélodies du Royaume (miziki ya mpamba) ​​​— Lifalansé

◼ Na likita ya mosala ya mokolo mwa 6 Yanuáli, esengeli kopesa basakoli nyonso oyo basili kozwa batisimo kalati ya monganga “Instructions médicales ​​​— Pas de sang” mpe bakalati mpo na bana na bango.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto